Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g97 Janvier nk. 15-17
  • Nani asengeli kokata motángo ya bana kati na libota?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nani asengeli kokata motángo ya bana kati na libota?
  • Lamuká!—1997
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Kokata motángo ya bana​—Mpo na nini mingi balingi yango te?
  • Oyo Biblia ezali koteya
  • Zwá makatami oyo okoki kokokisa yango
  • Bana—bozwi to mokumba?
    Lamuká!—1993
  • Ezali mabe koboya kozwa zemi?
    Lamuká!—2008
  • Motuya ya bana—Likanisi ya boklisto ezali nini
    Lamuká!—1993
  • Baboti—Bóteya bana na bino bálinga Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2019
Makambo mosusu
Lamuká!—1997
g97 Janvier nk. 15-17

Nani asengeli kokata motángo ya bana kati na libota?

EUTI NA MOKOMANI NA BISO NA BRÉSIL

NA MOKO na bitɛmɛlo ya métro, basundolaki na saki ya plastiki, elɛzi moko oyo azalaki bobele na mikolo misato ya bomoi. Nzokande zulunalo moko ya ekólo Brésil elobelaki bolingo malamu ya mabota mwa mingi oyo masɛngaki ete babɔkɔla elɛzi wana.

Atako likambo ya nsɔ́mɔ motindo wana lizali kosalema mingimingi te, nzokande na mokili mobimba motángo ya bana oyo balingami te mpe basundolami mozali sé kobakisama. Mingi mpenza mpo ete ebele na bato bazali kokamata mokumba ya moboti na kilo te. Kokanga kobota ekoki kozala lisungi? Ekozala mabe kokata motángo ya bana kati na libota na yo?

Engebene Ebongiseli ya Mabota Masangani mpo na makambo matali kolɔngɔ́nɔ́ ya nzoto na mokili mobimba (O.M.S.), pene ya 50 % ya bazemi oyo ezali kozwama na mokili mobimba ezali kosalema kozanga kokana. Likambo ya kokamwa, baoyo bazali kozwa zemi kozanga kokana, mingimingi bazali kútu kolinga yango te.

Mingi bazali kolinga kokumba zemi te, ntango mosusu mpo na mikakatano ya kolɔngɔ́nɔ́ ya nzoto, ndako ya kolala to na ntina na mitungisi oyo mikoki kobima na mosala ya mosuni. Yango wana, myango ya kokanga kobota ezali kosalelama mingi, na ndakisa oyo ya komela nkisi babéngi pilules to oyo ya kosalela kapoti. Kosopa zemi to komikómisa ekomba (stérilisation) ezali mpe kosalelama lokola myango ya kokata motángo ya bana. Zulunalo O Estado de S. Paulo ya ekólo Brésil elobi na ntina na kosopa zemi ete: “Ebongiseli ya Mabota Masangani mpo na makambo matali kolɔngɔ́nɔ́ ya nzoto na mokili mobimba epesi lapólo oyo ete kati na basi milió 13 oyo bazali kokumba zemi na ekólo Brésil mbula na mbula, milió 5 bazali kosopa yango na nkuku.” Kasi, engebene zulunalo Time, basi ya mabala 71 % na ekólo Brésil, oyo bakómi na mbula ya kobota mpe kobɔkɔla bana, bazali kokanga kobota. Kati na basi yango, 41 % bazali komela bapilules mpe 44 % basili kosalela stérilisation.

Ankɛtɛ moko emonisi ete bato 75 % na ekólo Brésil bamoni ete kokata motángo ya bana ezali likambo ya ntina mpenza. Basusu baboyi kosala bongo na ntina na endimeli oyo ete nyonso esilá kokanama liboso to likanisi oyo ete Nzambe nde alingi libota lizwa ‘bana mingi engebene motángo ye moko akotinda.’ Nani asengeli kokata motángo ya bana kati na libota​—soki totaleli matomba ya babalani, ya ekólo to ya lingomba?

Kokata motángo ya bana​—Mpo na nini mingi balingi yango te?

Atako epekisi te mwango ya kopɛngola zemi na kotaleláká bileko mwasi amonaka sanza, Lingomba ya Katolike ya Loma, oyo ezali lingomba lileki monene na ekólo Brésil, eboyi myango mizali kosalelama mpo na kokanga kobota, ezala oyo ezali kosuka na kosopa zemi to mosusu nyonso. Pápa Paul VI alobaki ete: “Kosangisa nzoto kati na libala esengeli kopesa nzela na kobota bana.” Pápa Jean-Paul II abakisaki ete: “Soki etalelami na bosembo nyonso, myango ya kokanga kobota ezali mabe mpenza na boye ete ekoki kolóngisama ata moke te, ezala mpo na litomba nini.” Na yango, Bakatolike mingi bazali na mokakatano mpo na kokata motángo ya bana kati na mabota na bango, mpamba te bazali komona kokanga kobota lokola lisumu.

Epai mosusu, zulunalo Lancet, oyo elobelaka makambo ya minganga, elobi ete: “Bamilió kati na bana wana bakokɔta kelasi te na boumeli ya bomoi na bango, bakozwa misala te, ndako ya malamu te, mpe bakoyeba ata komisalisa te na kokokisáká makambo ya pɛtɛɛ oyo masɛngami na misala ya ntina mitaleli kolɔngɔ́nɔ́ ya nzoto mpe bopɛto; nyonso wana mpo motángo ya bana oyo bazali kobotama mozali kobakisama kozanga kotalelama.” Kobakisama ya motángo ya bato, bákisa bobólá oyo yango ekomema, ezali likambo ya komibanzabanza mingi epai na bakonzi ya biyangeli mosusu, na bongo bazali kolendisa baboti mpo bátya ndelo na motángo ya bana kati na mabota na bango; atako bakonzi ya mangomba bazali kotɛmɛla likanisi wana. Na ndakisa, engebene maloba ya biolojiste Paul Ehrlich, “[boyangeli ya] Costa Rica ekitisi mwayene ya bana longwa na 7 kino na 3 kati na libota mokomoko.”

Mokanda ya O.N.U., Facts for Life​—A Communication Challenge, epesi litatoli oyo: “Nsima wana mwasi asili kobota bana minei, soki akumbi lisusu zemi, akotya mpenza na likámá bobele bomoi mpe kolɔngɔ́nɔ́ ya nzoto na ye moko te kasi mpe oyo ya mwana. Mingimingi soki ntango abotaki bana [minei yango] ya liboso, alekisaki mbula mibale te kati na mwana na mwana, mwasi yango akolɛmba nzoto mpenza na ntina na kobota wana ya penepene, bákisa mosala ya kobɔkɔla bana, ya komɛlisa, mpe ya kobatela bana oyo bazali naino mikemike.”

Mabota minene mazali naino komonana, mingi mpenza na mboka mikemike ya zamba na Afrika, na Azia mpe na Amérique latine, atako motángo ya bana oyo bazali kokufa kuna ezali likoló. Mpo na nini? Mpo ete, na mikili yango, mabota mingi emeseni naino te na myango ya kokanga kobota. Na bisika mosusu, moko na bantina minene ya likambo yango ekoki kozala, lokola elobaki yango mwasi moko mosáli na mibeko, likanisi oyo ete “mobali ya solosolo nde oyo mwasi na ye azali kokumba zemi mbula na mbula.” Zulunalo Jornal da Tarde eyebisi ntina mosusu oyo emonisi mpenzampenza makanisi ya basi: “Bana bazali moko na biloko na bango ya motángo oyo epesaka esengo mpe ememelaka bango liyoki ete basili kokokisa mosala moko ya ntina.” Lisusu, Paulo Nogueira Neto, mokomeli ya kala ya makambo ya ezingelo na ekólo Brésil, alobaki ete: “Epai na bato ya mikili ya bobólá, bana bazali nguba ya mboka.”

Oyo Biblia ezali koteya

Oyebaka ete Biblia, Liloba ya Nzambe, etiki mokumba ya kokata motángo ya bana na libota epai na mwasi mpe mobali? Lisusu, yango elobeli libala lokola likambo libongi, ata mpo na kobota bana to mpo na komonisanela bolingo ya motema kati na bomoko ya kosangisa nzoto na bopɛto nyonso.​—1 Bakolinti 7:3-5; Baebele 13:4.

Kútu Nzambe alobaki na Adama mpe Eva na Paladiso ete “bobotaka mpe bozala na kobota mingi, mpe botondisa mokili, boye te”? (Genese 1:28) Ezali boye, nzokande mokapo moko te kati na Biblia emonisi ete tosengeli kolanda etindá yango lelo. Mokomi Ricardo Lezcano abimisaki likanisi oyo ete: “Yango mpenza elongobani te, ete lisɛngami oyo litalelaki bobele bato mibale, oyo bazalaki na mokili na ntango wana, lityama likoló na [bamiliare ya] bato oyo bazali na mokili lelo.” Soki na mabala mosusu, babalani bayokani ete babota ata mwana moko te, yango ezali liponi na bango mpenza oyo bato mosusu basengeli te kotɔnga yango.

Likambo ya kobenda likebi, búku la Nouvelle encyclopédie catholique emonisi ete likanisi ya Batatoli ya Yehova ezwi moboko likoló na Biblia. Elobi boye: “Bizaleli malamu na bango na oyo etali bomoko kati na libala mpe kosangisa nzoto ezali likambo ya lisɛki te, kasi bazali kotika likatami ya kokata motángo ya bana epai na babalani bango moko.” Búku yango ebakisi ete: “Bazali kotalela Biblia lokola liziba bobele moko ya bindimeli mpe ya etamboli na bango.”

Myango nyonso ya kokanga kobota kati na libota ezali ya malamu? Te. Mpo Nzambe apesaki na Yisalaele mobeko oyo elobaki ete, oyo akosopa zemi akotalelama lokola mobomi na bato mpamba te bomoi ezali bulɛɛ. (Exode 20:13; 21:22, 23) Na oyo etali mwango ya komikómisa ekomba, na ndakisa na nzela ya lipasó lisalemi na misisa ya ntéi epai na mobali (vasectomie), moto na moto akozwa likatami engebene lisosoli na ye moko, mpamba te likambo yango elobelami polele kati na Biblia te. “Zambi moto na moto akomema bozito na ye moko.” (Bagalatia 6:5)a Mpe lokola myango ya kokanga kobota mizali mingi, babalani bakoki koluka lisungi epai na minganga mpo na kopona mwango ya sikisiki oyo balingi kosalela to oyo balingi kosalela te.

Zwá makatami oyo okoki kokokisa yango

Tolingi koloba te ete eloko nyonso moto akosala kati na bomoi asengeli kokana yango liboso. Kasi okosomba nde motuka to ndako kozanga kotalela na bozindo makambo oyo yango ekosɛnga? Motuka to ndako ekoki kotɛkama lisusu, kasi okoki kokitanya eloko mosusu te na esika ya bana. Na bongo, awa mwasi na mobali bayokani kobota mwana, esengeli na bango ete bátalela makoki bazali na yango mpo na kobɔkɔla mwana, boye te?

Ya solo, tokolinga te ete libota na biso eleisama mabe, to tótikela basusu mokumba yango. (1 Timoté 5:8) Bobele na ntango yango, longola bilei mpe ndako ya kolala, ebongi ete bana bakɔta kelasi, bateyama bizaleli malamu mpe bolingo.

Awa babalani bazali komibanzabanza na ntina na bonene ya mosala ya kobɔkɔla mwana, bákisa mbongo mpe motema pɛtɛɛ oyo yango esɛngaka; esengeli mpe ete bátalela kolɔngɔ́nɔ́ ya nzoto ya mama. Kobota bana na ntango ebongisami ekobatela bomoi ya bato mpe ekoyeisa kolɔngɔ́nɔ́ ya nzoto malamu koleka. Mokanda Facts for Life elobi ete: “Kolɛngɛlɛ kobota bana na ntango ebongisami ezali moko na myango ya ntina mpenza mpo na kokitisa kobanga ya likámá oyo ezalaka wana mwasi akumbi zemi mpe akómi na eleko ya kobota, likámá oyo litaleli bobele mama te kasi mpe mwana oyo azali na libumu. Kokumba zemi mpe kobota mwana ezali na makámá, mingi mpenza epai na mwasi oyo azwi zemi kasi akokisi naino mbula 18 te to oyo alekisi mbula 35, bakisá oyo asili kobota mbala minei to koleka, to soki mama azongeli zemi nsima na mwa ntango moke oyo ekókisi ata mbula mibale te.”

Babalani oyo bayokani kobota bana basengeli koyeba ete, engebene bisakweli ya Biblia, tozali kobika na mokili oyo etondi na kobomana, nzala, bitumba mpe mitungisi ya nkita. (Matai 24:3-​12; 2 Timoté 3:1-5, 13; Emoniseli 6:5, 6) Bolingo ya motema oyo bazali na yango epai na bana na bango ekosalisa babalani ete bátalela mokili oyo lokola na ndɔ́tɔ te, awa bayebi malamumalamu ete kobɔkɔla bana ezali mokumba monene na ntango na biso. Yango wana, na esika ya kolɛmbisa nzoto, ya kokólisa molɔngɔ́ ya bana, kolikyáká ete makambo makobonga; bato mingi bamoni malamu kopima bonene ya libota na bango mpo bana na bango báyoka ete bazali na libateli mpe na esengo mingi koleka.

Longola likambo oyo ete Liloba ya Nzambe ezali kosunga biso mpo na kozwa makatami ya mayele na makambo ya libota, yango ezali mpe kopesa biso elikya ya solo mpo na mikolo mizali koya. Biblia emonisi mokano ya Mozalisi oyo elobi ete bato bakofanda na kimya mpe na esengo kati na paladiso awa na mabelé. Mpo na kokokisa elaka yango, etikali moke, Nzambe akotya nsuka na ebongiseli oyo ya biloko mabe. Na nsima, kati na mokili ya sika ya sembo oyo bobólá ekosila mpe motángo ya bato mokoleka ndelo te, wana bana bakobwakama lisusu te mpo ete bakolingama.​—Yisaya 45:18; 65:17, 20-25; Matai 6:9, 10.

Ya solo, kotalela bolamu ya mobalani mokomoko mpe ya bana, komonisáká na yango bokatikati ya kosalela likoki ya kobota, ekosunga babalani ete bákata motángo ya bana oyo bakobota kati na libota na bango. Na esika ya kotika makambo másalema kozanga komibongisa, esengeli na bango ete báluka litambwisi ya Nzambe kati na libondeli. “Mapamboli na [Yehova] ikoyeisa bozwi, akobakisa mawa na yango te.”​—Masese 10:22.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Tala Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli, ya 1 Máí 1985, lokasa 31 (ebimeli ya Lifalansé).

[Elilingi na lokasa 15]

Bamilió ya bana bazali kosundolama

[Elilingi na lokasa 16]

Bana bazali na mposa ya libateli ya bolingo

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto