Biblia elobi nini?
Nini ekómelaka biso soki tokufi?
NZAMBE asalaki bato te mpo bákufaka. (Baloma 8:20, 21) Kutu, mbala ya liboso oyo Yehova ayebisaki Adama likambo ya liwa, ezalaki nde lokola etumbu oyo asengelaki kozwa soki atosi ye te, kasi te lokola likambo oyo abongisaki mpo na moto nyonso. (Genese 2:17) Adama ayebaki nini babengi liwa, mpamba te azalaki komona banyama bazali kokufa.
Adama asalaki lisumu mpe azwaki lifuti na yango na ndenge akufaki na mbula 930. (Genese 5:5; Baloma 6:23) Lokola azangaki botosi, Nzambe abenganaki ye na libota na ye, mpe azalaki lisusu te mwana ya Nzambe. (Deteronome 32:5) Mpo na makambo mabe oyo lisumu ememelá bato, Biblia elobi ete: “Lisumu ekɔtaki na mokili mpo na moto moko mpe liwa mpo na lisumu, ndenge moko mpe liwa epalangani epai ya bato nyonso.”—Baloma 5:12.
Nini ekómelaka makanisi na biso?
Biblia elobi lisusu boye: “Yango ekokwela bana na bato, ekokwela mpe banyama; bobele likambo moko ekokwela bango. Lokola moko akokufa, oyo mosusu mpe akokufa; ɛɛ, bango nyonso bazali na mpema moko; boye moto azali koleka likoló na nyama te. Nyonso bobele mpamba. Nyonso bakokenda na esika moko; nyonso elongwe na putulu, nyonso ekozonga na putulu lisusu.” (Mosakoli 3:19, 20) Kozonga na putulu elimboli nini?
Maloba “ekozonga na putulu” ekundweli biso maloba oyo Nzambe ayebisaki mwasi ná mobali ya liboso ete: “Ozali putulu, mpe okozonga kati na putulu.” (Genese 3:19) Yango elingi koloba ete bato bazali bikelamu oyo ezali na mai ná makila lokola banyama. Tozali te bilimo oyo efandi kati na nzoto ya mosuni. Soki nzoto na biso ekufi, makoki na biso ya kokanisa mpe esili. Mpo na moto oyo akufi, Biblia elobi ete: “Soki apemi mpema na ye ya nsuka, azongi putulu; na ngonga wana kaka, makanisi na ye nyonso esili.”—Nzembo 146:4, The New English Bible.
Soki ezali bongo, nini ekómelaka moto soki akufi? Liloba ya Nzambe epesi eyano ya polele ete: “Bato ya bomoi bayebi ete bakokufa; nde bakufi bayebi likambo te.” (Mosakoli 9:5) Biblia elobeli liwa te lokola moninga moko oyo azali koyamba biso na esika oyo tokozala na bomoi ya malamu koleka, kasi ebengi yango “monguna ya nsuka,” mpamba te yango esukisaka misala na biso nyonso. (1 Bakolinti 15:26; Mosakoli 9:10) Yango elingi nde koloba ete elikya moko te ezali mpo na bakufi?
Elikya kitoko mpo na bakufi
Mpo na bato mingi oyo bakufá, liwa ezali lokola mpɔngi mpe bakolamuka mokolo mosusu. Yesu ayebisaki bayekoli na ye mpo na moninga na bango moko oyo akufaki ete: “Lazalo moninga na biso akei kopema, kasi nazali kokende kuna mpo na kolamwisa ye na mpɔngi.” Ntango Yesu azalaki kokende na lilita ya kokanisama, akutanaki na ebele ya bato oyo bazalaki kolela. Ntango akómaki na lilita, apesaki etinda ete báfungola yango, mpe alobaki na mongongo makasi ete: “Lazalo, bimá!” Mpe moto oyo akufaki esilaki koleka mikolo minei, abimaki. (Yoane 11:11-14, 39, 43, 44) Yesu asekwisaki Lazalo atako nzoto na ye ebandaki kopɔla. Yango emonisi ete Nzambe akoki koyeba makambo nyonso oyo etali moto oyo akufá, elingi koloba, bomoto na ye, makambo oyo ayebaki, mpe elongi na ye; mpe akoki kozongisa ye lisusu na bomoi. Na libaku mosusu, Yesu alobaki ete: “Ngonga ezali koya wana baoyo nyonso bazali na kati ya malita ya kokanisama bakoyoka mongongo na ye [Yesu] mpe bakobima.”—Yoane 5:28, 29.
Biblia eyebisi biso mpe makambo mosusu etali elikya yango; elobi ete: “Liwa, oyo ezali monguna ya nsuka, akobebisama nyɛɛ.” (1 Bakolinti 15:26) Moto moko te akoyoka lisusu mpasi ya kokende kokunda moto oyo alingaka. Biblia elobi boye: “Liwa ekozala lisusu te.” (Emoniseli 21:4) Omoni te ete makambo oyo Biblia elobi mpo na bakufi ezali mpenza kobɔndisa?
OSILÁ KOMITUNA?
◼ Bakufi bayebaka makambo?—Mosakoli 9:5.
◼ Elikya nini ezali mpo na bakufi?—Yoane 5:28,29.
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 29]
“Soki apemi mpema na ye ya nsuka, azongi putulu; na ngonga wana kaka, makanisi na ye nyonso esili.”—Nzembo 146:4, “The New English Bible”