Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w12 1/11 nk. 6-7
  • Motuna 2: Nini ekokómela ngai soki nakufi?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Motuna 2: Nini ekokómela ngai soki nakufi?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
  • Masolo mosusu
  • Bato oyo bakufá bazali wapi?
    Biblia eteyaka mpenza nini?
  • Soki moto akufi akendaka wapi?
    Makambo oyo Biblia eteyaka
  • “Liwa emɛlami libela na libela”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
  • Elikya nini ezali mpo na balingami na biso oyo basili kokufa?
    Elikya nini ezali mpo na balingami na biso oyo basili kokufa?
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
w12 1/11 nk. 6-7

Motuna 2: Nini ekokómela ngai soki nakufi?

ROMAN azalaki naino elenge ntango moninga na ye ya motema akufaki na likama ya motuka. Alobi boye: “Liwa ya moninga na ngai esalaki ngai mpasi mingi, bambula mingi nsima ya likama yango, nazalaki komituna nini ekómelaka biso soki tokufi.”

Mpo na nini kotuna motuna wana?

Esengelaki te ete bato bákufaka. Ezala tozali na mbula boni, biso nyonso tolingaka kokufa te. Mingi babangaka mpo na oyo ekokómela bango nsima ya liwa.

Bamosusu bapesaka eyano nini?

Mingi bakanisaka ete soki moto akufi, eteni moko ya nzoto na ye ekobaka kozala na bomoi. Bakanisaka ete bato malamu bakendaka na likoló mpe bato mabe banyokwamaka libela na libela mpo na masumu na bango. Bamosusu bakanisaka ete soki moto akufi, azalaka lisusu te mpe nsukansuka babosanaka ye libela.

Biyano ya ndenge wana emonisaka nini?

Eyano ya liboso emonisi ete moto akufaka mpenza te. Ya mibale emonisi ete bomoi ezali na ntina te. Baoyo bamonaka ete bomoi ezali na ntina te bakoki kokóma na makanisi lokola oyo: “Tólya mpe tómɛla, mpo lobi tokokufa.”​—1 Bakorinti 15:32.

Biblia eteyaka nini?

Biblia eteyaka te ete soki moto akufi, eteni moko ya nzoto na ye ekobaka kozala na bomoi. Na litambwisi ya elimo ya Nzambe, Salomo akomaki boye: “Bato ya bomoi bayebi ete bakokufa; kasi bakufi bayebi ata eloko moko te.” (Mosakoli 9:5) Baoyo “bayebi ata eloko moko te” bayebi ata likambo moko te oyo ezali kosalema zingazinga na bango. Bakoki koyoka te mpe kosala likambo te. Na yango, bakufi bakoki kosalisa te to kosala bato ya bomoi mabe.

Bato mingi bakanisaka ete Nzambe asalaki bato mpo bákufaka, nzokande ezali bongo te. Akelaki Adama moto ya liboso mpo azala na bomoi awa na mabele libela na libela. Mbala ya liboso oyo Nzambe atángaki likambo ya liwa ezali ntango ayebisaki Adama etumbu oyo akopesa ye soki atosi ye te. Apekisaki Adama kolya mbuma ya nzete moko mpe akebisaki ye ete soki alye yango, ‘akokufa solo.’ (Ebandeli 2:17) Soki Adama ná Eva bátosaka, bango ná bana na bango oyo balingaki kozala sembo epai ya Nzambe balingaki kofanda libela na libela awa na mabele.

Adama aboyaki koyoka likebisi ya Nzambe. Asalaki lisumu ntango atosaki Nzambe te, yango wana akufaki. (Baroma 6:23) Eteni moko te ya nzoto ya Adama ekobaki kozala na bomoi nsima ya liwa na ye. Kutu, ntango akufaki, Adama azalaki lisusu te. Nzambe alobaki na Adama boye: “Na motoki ya elongi na yo okolya limpa kino okozonga na mabele, mpo outaki na yango. Mpamba te ozali putulu mpe okozonga na putulu.” (Ebandeli 3:19) Lokola bato nyonso bautá na Adama, tozwá lisumu mpe liwa epai na ye.​—Baroma 5:12.

Atako Adama aboyaki kotosa, Nzambe akokokisa mokano na ye ya kotondisa mabele na bakitani ya Adama. (Ebandeli 1:28; Yisaya 55:11) Mosika te, Yehova akozongisa na bomoi bato mingi oyo bakufá. Ntoma Paulo alobaki boye mpo na ntango yango: “Lisekwa ekozala, ya bayengebene mpe ya bato oyo bazangi boyengebene.”​—Misala 24:15.

Roman, oyo tolobelaki liboso, ayekolaki Biblia mpe ayebaki oyo yango eteyaka mpo na liwa mpe Yehova Nzambe. Makambo oyo ayekolaki, esalisaki ye mingi. Tángá lisolo na ye na “Biblia ebongolaka bato”.

Mpo na koyeba makambo mosusu etali nini ekómelaka moto soki akufi, talá mokapo 6 ya buku Biblia eteyaka mpenza nini? Okoki kozwa yango na Internet na www.jw.org

Yesu alobaki nini mpo na liwa?

Yesu andimaki te makanisi ya bakonzi ya mangomba ya ntango na ye oyo bazalaki koloba ete lisekwa ya bakufi ekozala te. (Luka 20:27) Ateyaki mpe te ete eteni mosusu ya nzoto etikalaka na bomoi nsima ya liwa. Kutu, Yesu ateyaki nde makambo oyo elandi.

Liwa ezali lokola mpɔngi. Ntango moninga na ye Lazare akufaki, Yesu alobaki boye: “Lazare moninga na biso akei kopema, kasi nazali kokende kuna mpo na kolamwisa ye na mpɔngi.” Bayekoli ya Yesu bayebaki te soki alingaki koloba nini. Bayanolaki boye: “Nkolo, soki akei kopema, akoyoka malamu.” Biblia elobi: “Nzokande, Yesu alobelaki liwa na ye. Kasi bakanisaki ete azali kolobela kopema na mpɔngi. Bongo, na ntango wana Yesu alobaki na bango polele ete: ‘Lazare akufi.’”​—Yoane 11:11-14.

Bakufi bakosekwisama. Ntango Yesu akómaki na esika oyo Lazare azalaki kofanda, abɔndisaki Marta, ndeko ya Lazare , alobaki boye: “Ndeko na yo ya mobali akosekwa.” Na nsima Yesu apesaki elaka oyo: “Ngai nazali lisekwa mpe bomoi. Moto oyo azali kondimela ngai, ata soki akufi, akozonga na bomoi.” Elaka ya Yesu ezalaki maloba ya mpamba te. Atako elekaki mikolo minei bandá Lazare akufaki, Yesu asekwisaki ye na miso ya bato ebele.​—Yoane 11:23, 25, 38-45.

Na emonaneli oyo apesaki ntoma Yoane, Yesu alakaki lisusu ete bakufi bakosekwisama. Alobelaki ntango oyo liwa ekobimisa baoyo nyonso yango ekangaki na boombo na ndenge ya elilingi.​—Emoniseli 20:13.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto