Biblia elobi nini?
Mpo na nini kobatela zamba, mai mpe mopɛpɛ?
LELO oyo, emonani ete makambo bato bazali kosala ezali kobebisa mabelé koleka na bileko mosusu nyonso. Lokola molunge ezali kokóma makasi, bato ya siansi, bakompanyi mpe bakonzi ya Leta, bazali koboma nzoto mpo na koluka kosilisa mokakatano yango mpe mikakatano mosusu ya ndenge wana.
Ezali na makambo oyo mokomoko na biso akoki kosala mpo na kobatela zamba, mai mpe mopɛpɛ? Soki ɛɛ, mokumba na biso esuki wapi? Biblia emonisi bantina mpenza oyo tosengeli kosala makambo oyo ekobatela mabelé. Esalisi mpe biso tózala na bokatikati na milende na biso.
Tópesa mabɔkɔ na kokokisama ya mokano ya Mozalisi
Yehova Nzambe asalá mabelé mpo ezala elanga kitoko mpe bato báfanda wana. Alobaki ete misala nyonso asalaki ezalaki “malamu mingi” mpe apesaki moto mokumba ya “kokona biloko kuna [na mabelé] pe po na kokengelaka yango.” (Ebandeli [Genese] 1:28, 31; 2:15, Bible na lingala ya lelo oyo) Nzambe ayokaka ndenge nini ntango amonaka ndenge mabelé ekómá? Na ntembe te, ayokaka mpasi na motema komona ndenge bato bazali kobebisa mabelé, mpamba te Emoniseli 11:18 esakoli ete Nzambe ‘akobebisa baoyo bazali kobebisa mabelé.’ Yango wana, tosengeli kotya likebi na makambo oyo ezali kokómela mabelé.
Biblia emonisi polele ete Nzambe akolongola makambo nyonso oyo bato bazali kosala, oyo ezali kobebisa mabelé, ntango ‘akosala biloko nyonso biloko ya sika.’ (Emoniseli 21:5) Nzokande, tosengeli kokanisa te ete lokola Nzambe akozongisa mabelé sika, ata soki tobebisi yango ndenge nini ekosala eloko te. Ezali bongo te! Ndenge nini tokoki komonisa ete tolingi mabelé ezala ndenge Nzambe alingaki, mpe kopesa mabɔkɔ na kokokisama ya mokano na ye ya kokómisa yango paladiso?
Tósala oyo tokoki mpo na kobatela mabelé pɛto
Makambo oyo tosalaka mokolo na mokolo ebimisaka mpe mwa bosɔtɔ. Na bwanya na ye, Yehova abongisá ete mabelé, mai, mpe mopɛpɛ epɛtolaka bosɔtɔ wana yango moko. (Masese 3:19) Tosengeli te kosala makambo oyo ekopekisa biloko wana emipɛtolaka. Yango wana, tosengeli kokeba ete tósala te makambo oyo ekobebisa mabelé, mai, to mopɛpɛ mpambampamba. Kosala bongo ekomonisa ete tolingaka bazalani na biso ndenge tomilingaka biso moko. (Malako 12:31) Tótalela ndakisa moko ya ntango ya kala.
Nzambe apesaki libota ya Yisalaele etinda ya kokunda nyei “na libándá ya molako.” (Deteronome 23:12, 13) Yango ezalaki kosala ete molako to kaa ezala pɛto mpe kopesa nzela ete nyei wana esila noki. Lelo oyo mpe, baklisto ya solo basalaka makasi ya kobwaka bosɔtɔ nokinoki mpe na ndenge ebongi. Esengeli koyeba malamu bisika nini kobwaka biloko oyo ezali na pwazɔ.
Biloko mingi oyo tobwakaka, bakoki kosalela yango lisusu to kosala na yango biloko mosusu. Soki na mboka na bino, Leta atyá mobeko ya kosala biloko ya sika na biloko oyo babwaki, boye kotosa yango ekozala kopesa “biloko ya Kaisala epai ya Kaisala.” (Matai 22:21) Ekoki kosɛnga tósala milende mpo na kopesa mabɔkɔ ete básala biloko ya sika na biloko oyo tobwaki, kasi kosala bongo ekomonisa ete tolingi mabelé ezala pɛto.
Tóbatela biloko oyo ezali awa na mabelé
Na bomoi na biso ya mokolo na mokolo, esɛngaka tósalela biloko oyo ezali awa na mabelé mpo na kolya, kosala ndako, mpe kopelisa mɔtɔ. Ndenge oyo tosalelaka biloko yango emonisaka soki tondimaka mpenza ete ezali makabo oyo euti na Nzambe. Ntango Bayisalaele bazalaki na mposa ya kolya nyama na esobe, Yehova apesaki bango ebele ya bankanga. Lokoso etindaki bango básalela na ndenge ya moimi likabo wana, mpe yango epesaki Yehova Nzambe nkanda makasi. (Mituya 11:31-33) Lokola Nzambe abongwani te, baklisto ya solosolo balingaka te kobebisa biloko mpambampamba, yango ekoki komonisa ete bazali na lokoso.
Basusu bakoki kokanisa ete bazali na lotomo ya kosalela kura, petrole, nkoni, to biloko mosusu ndenge balingi. Kasi, tosengeli te kobebisa biloko oyo ezali na mabelé kaka mpo tozali na likoki ya kozwa yango to mpo ezali beboo. Ntango Yesu aleisaki ebele ya bato na ndenge ya likamwisi, ayebisaki bayekoli na ye básangisa biteni ya mbisi mpe ya mampa oyo etikalaki. (Yoane 6:12) Alingaki te ete bábebisa biloko oyo Tata na ye apesaki bango.
Tózala na bokatikati na milende na biso
Makambo oyo tosalaka mokolo na mokolo ekoki kobebisa to kobongisa mabelé. Kasi, tosengeli nde kolekisa ndelo na milende na biso, na ndakisa koboya kofanda esika moko na bato mosusu mpo na koboya kobebisa mabelé? Vɛrsɛ moko te esɛngi biso tósala likambo ya ndenge wana. Tótalela ndakisa ya Yesu. Ntango azalaki awa na mabelé, azalaki na bomoi lokola bato nyonso; yango nde epesaki ye nzela ya kokokisa mosala ya kosakola oyo Nzambe apesaki ye. (Luka 4:43) Lisusu, Yesu aboyaki komikɔtisa na politiki mpo na koluka kosilisa mikakatano ya bato ya mboka na bango. Alobaki polele ete: “Bokonzi na ngai ezali ya mokili oyo te.”—Yoane 18:36.
Atako bongo, ebongi ete tótalaka malamu soki biloko oyo tosombaka to oyo tosalelaka mpo na kominanola, mpe mituka to biloko na biso mosusu ya kosala mobembo, ezali te kobebisa zamba, mai mpe mopɛpɛ. Na ndakisa, basusu basepelaka kosomba biloko oyo esalemi na biloko oyo ebebisaka mai mpe mopɛpɛ mingi te, to biloko oyo ebebisaka mpenza te mai to mopɛpɛ. Basusu basalaka makasi básala mingi te makambo oyo ebebisaka mai mpe mopɛpɛ to oyo esalelaka mingi biloko oyo ezali na mabelé.
Moto moko te azali na lotomo ya kotinda bato mosusu básala makambo oyo ye alingaka kosala mpo na kobatela mai mpe mopɛpɛ. Yango ezali likambo oyo etali moto na moto mpe esika na esika. Atako bongo, moto na moto akozongisa monɔkɔ epai ya Nzambe mpo na bikateli na ye. Biblia elobi ete: “Moto na moto akomema mokumba na ye moko.”—Bagalatia 6:5.
Mozalisi apesaki bato mokumba ya kobatela mabelé. Soki tozali na botɔndi mpo na mokumba wana mpe na komikitisa, mpe tozali komemya Nzambe mpe misala na ye, tokokanisa malamu mpe tokozwa bikateli oyo ebongi ntango tozali kosalela biloko oyo ezali awa na mabelé.
OSILÁ KOMITUNA?
◼ Nzambe akosilisa makambo oyo ezali kobebisa zamba, mai mpe mopɛpɛ?—Emoniseli 11:18.
◼ Mokumba nini Nzambe apesá bato mpo na mabelé?—Genese 1:28; 2:15.
◼ Ndakisa nini Yesu Klisto apesaki na likambo ya koboya kobebisa biloko mpambampamba?—Yoane 6:12.