Mituna na batangi
Mokamba nini baklisto bazali na yango na ntina etali kobatela ezingelo na biso—mabele, mai monene mpe mopepe mpo ete ebobisama te?
Biso ba Témoins de Jéhovah tozali kotungisama mingi na mikakatano ya ezingelo mitali efandelo na biso mabelé. Toyebi malamu koleka bato mingi ete mabelé na biso mazalisamaki mpo na kozala efandelo ya peto mpe ya malamu mpo na libota yo bato na kokoka. (Genese 1:31; 2:15-17; Yisaya 45:18) Tozali lisusu na elaká na Nzambe ete “akobebisa baoyo bazali kobebisa mabelé.” (Emoniseli 11:18) Na yango ebongi kosala milende ya kozala na bokatikati mpe na bososoli mpo na koboya kobakisa mpambampamba, libebi oyo moto asili koyeisa na etando na biso. Kasi, tosimba liloba “bososoli.” Makomami mazali mpe kolendisa biso ete mokambo mpe meko ya kobatela mabele esengeli te kozola mabanzo na biso ya liboso.
Ata misala ya malamu oyo moto asalaka, ebimisaka bosɔtɔ. Na ndakisa, kotula, kobongisa mpe kolya ebimisaka basɔtɔ, atako mingi na yango elimwaka mpo ete elyami na banyama mike. (Nzembo 1:4; Luka 3:17) Mbisi ya kotumba oyo Yesu asalaki mpo na bayekoli na ye nsima ya lisekwa na ye ezangaki te kobimisa mwa milinga, mputulu mpe ndambo ya mikwa. (Yoane 21:9-13) Kasi bibongiseli ya biloko ya bomoi mpe biloko bizangi bomoi awa na mabele bisalemi mpo ete bilimwisa na bosɔtɔ motindo wana.
Epai mosusu, libota na Nzambe lisengeli te kozanga komibanzabanza na ntina etali makambo ya kobatela mabele. Jéhovah asengaki na libota na ye ya kala ete bazwa meko ya kolongola bosɔtɔ, meko oyo ezalaki malamu mpo na kobatela esika mpe kolongono na nzoto na bato. (Deteronome 23:9-14) Mpe lokolo toyebi makanisi na ye na ntina na baoyo bazali kobebisa mabele, tosengeli te kozala na bopotu na makambo oyo tokoki kosala mpo na kobatela ezingelo. Tokoki komonisa yango na kozaláká na ekundé oyo esengeli mpo na bosɔtɔ ya biloko bibwakami, mingi mpenza soki ezali biloko oyo bikoki koboma. Tosengeli mpenza kopesa lisungi na milende ya kolongola bosɔtɔ, soki yango esengami na Kaisala. (Baloma 13:1, 5) Bato mosusu basepelaka kosala mingi koleka: na ndakisa kosalela biloko bikoki kolyama na banyama mike to biloko bikoki kobongwana mabelé, na esika ya kosalela oyo ekotika ebele ya bosɔtɔ na mabelé to na nsé na mai monene.
Nzokande, ezali moklisto moko no moko nde akokata kino na meko nini akosangana na likamba yango, longola bobele soki Leta etii mibeko mpo na yanga. Bipanzelo ya nsango bizali komonisa polele ete bato bazangi kokoka bazali na mpasi te mpo na kokwea na motambo ya kozanga bokatikati. Toli oyo ya Yesu ezali na ntina mingi mpenza, ete: “Bosambisaka te ete bosambisama te . . . Mpo na nini ozali kotala lititi lizali kati na liso ya ndeko na yo, awa otali naino libaya oyo lizali na liso ya te?” (Matai 7:1, 3, MN) Kobatela likambo oyo na makanisi ekosalisa biso na kobosana te makambo mosusu oyo maleki ntina.
Mosakoli Yilimya akomaki ete: “Nayebi malamu, Ɛ Jéhovah, ete nzela ya moto ezoli kati na ye moko te. Ekoki na motamboli te ete atambolisa makola na ye moko.” (Yilimya 10:23) Kozanga kotalela etinda oyo esili komema bato na “ntango ya mpasi mpe na mikakatano,” lokola eyebisami na 2 Timote 3:1-5. Makambo oyo Nzambe ayebisi na Emoniseli 11:18 emonisi ete milende ya bato mpo na kosilisa mikakatano minene ya kobatela ezingelo na biso, kati na yango, kobebisama ya mopepe, ya mai, mpe mabelé ekolonga na makambo nyonso te. Mwa elonga moke ekoki kozwama na likambo moko to mosusu, kasi kobongisama ya libela ekouta na Nzambe.
Na yango, tozali mingimingi kosalela milende na biso mpe bozwi na biso mpo na koyebisa mwango wana ya Nzambe, na esika ya komeka kosilisa mwa makambo yango likolólikoló. Na likambo yango tozali komekola Yesu, oyo alekisaki eteni monene ya mosala na ye na ‘kopesa litatoli mpo na solo.’ (Yoane 18:37) Na esika ya koleisa bato to kosilisa mikakatano ya mokili—kati na yango, kobebisama ya mabelé—Yesu alobaki mingi likoló na mwango oyo mokosilisa mikakatano ya bato mpo no libela.—Yoane 6:10-15; 18:36.
Awa bolingo ya bazalani ezali kopekisa biso na kobebisa mabelé, mopepe to mai bobele mpambampamba, tokolanda kopesa litatoli na ntina na solo. Yango ezali komema biso na koteya bato ete basalela solo ya Biblia mpe baboya kobebisa nzoto na bango na makaya, na komeláká masanga mingi to mpe kosalela ba drogues. Lokola bamilio ya bato ya sika basili kokóma bayekoli basili koyekola bizaleli ya bopeto mpe limemya mpo na bazalani. Na bongo, mosala ya kosakola esili kosalisa mpo na kokitisa mikakatano ya kobebisama ya mabelé oyo epalangani mingi na mikolo na biso. Oyo eleki ntina ezali ete bayekoli ya Klisto bazali kosala makasi mpa na kobongola bomoto mpe bizaleli na bango uta sikawa mpo ete bakoka kofanda kati na mabelé makobongwana paradis, oyo Nzambe akopetola yango mosika te mpo na basambeli na ye ya solo.