Ndenge nkombo ya Nzambe epalanganaki
DAVIDI, moko ya bakomi ya Biblia, ayembaki boye: “Nakosanzola nkombo ya Nzambe na loyembo.” Davidi ayebaki nkombo ya Nzambe, mpe na loyembo moko, alobaki boye: “Tiká ete [Yehova] . . . asanzolama . . . Tiká nkombo na ye ya nkembo esanzolama.” (Nzembo 69:30; 72:18, 19) Nkombo ya Nzambe oyo eyebani mingi na Lingala ezali Yehova to Yawe; yango euti na maloba ya Liebele יהוה, oyo ezali na bisika soki 7 000 na Biblia.
Na bankama ya bambula oyo euti koleka, longola Biblia, nkombo ya Yehova esalelamaki mpe na bisika mosusu mingi. Na ndakisa, maloba ya Latin Benedictus Sit Iehova Deus, oyo elimboli “Tiká ete Yehova Nzambe asanzolama,” ekomamaki na mbongo ya bibende ya wolo oyo esalemaki na boumeli ya bambula mingi na ekólo Suisse [1]. Kutu, na boumeli ya bankama ya bambula oyo eleki, nkombo ya Nzambe na monɔkɔ ya Liebele mpe ya Latin ekomamaki na mitindo ya mbongo ya bibende mpe ya bamedayi koleka nkóto moko.
Nini etindaki bato básalela nkombo ya Nzambe mingi bongo, ndenge tozali komona yango na bafɔtɔ oyo ezali na nkasa mibale oyo?
Mpo na nini basalelaki nkombo ya Nzambe?
Na ebandeli ya bambula ya 1500, bitumba kati ya Lingomba ya Katolike ya Loma mpe Lingomba ya Protesta eyaki ndongo na mikili ya Mpoto ya Wɛsti. Atako bato mingi ya mikili wana bazalaki bandimi ya Lingomba ya Katolike, emonani ete bitúká mingi ya Espagne etikaki Lingomba ya Katolike mpe ekómaki kosepela na Lingomba ya Protesta. Likambo yango ebimisaki bitumba. Bato bakómaki kosalela mbongo ya bibende ná bililingi oyo ezalaki na mbongo yango mpo na koyebisa ete Nzambe azali na ngámbo na bango.
Ndenge oyo bazalaki kosalela nkombo ya Nzambe
Bato oyo bazalaki kosala mayemi oyo ezalaki na mbongo ya bibende bazalaki mpe kokoma na mbongo yango nkombo ya Nzambe, Yehova, na balɛtrɛ minei ya monɔkɔ ya Liebele. Na Lingala, bakomaka yango YHWH to JHVH. Mbala mingi, ezala bato oyo bazalaki kosala mayemi oyo ezalaki na mbongo ya bibende to bato mosusu nyonso, bayebaki kotánga Liebele te. Lokola bazalaki kokoma mbala na mbala nkombo ya Nzambe na balɛtrɛ wana minei ya monɔkɔ ya Liebele, nsukansuka ekómaki kokomama na mitindo mingi.
Na mobu soki 1568, ekólo Suède ebimisaki mbongo ya bibende oyo ezalaki na nkombo ya Nzambe [2], mpe na mobu soki 1591, ekólo Écosse esalaki mpe bongo. Na mobu soki 1600, Charles IX, mokonzi ya Suède, akomisaki nkombo ya Nzambe na mbongo ya bibende, kasi bakomaki yango na ndenge mingi: Ihehova, Iehova, mpe Iehovah [3]. Asalisaki kutu mbongo moko ya ebende ya wolo mpe ya kitoko mpenza, oyo ezalaki na valɛrɛ ya lifuti ya sanza koleka minei ya mosali moko!
Mitindo ya mbongo ya bibende koleka 60 oyo ebengamaki “mbongo ya Yehova” ebandaki kosalelama na eleko ya Christian IV, mokonzi oyo ayangelaki Danemark mpe Norvège banda na mobu 1588 tii 1648. Na mobu soki 1650, mbongo yango ekómaki mpe kobimisama na Pologne, na Suisse, mpe na Allemagne.
Na boumeli ya Etumba ya Mbula Ntuku Misato, oyo ebandaki na mangomba mpe ebundamaki na mikili ya Mpoto banda na mobu 1618 tii 1648, mbongo ya bibende oyo ezalaki na nkombo ya Yehova epalanganaki mingi. Nsima ya kolonga etumba ya Breitenfeld na mobu 1631, Gustave II Adolphe, mokonzi ya Suède, abimisaki mbongo ya bibende oyo ezalaki na nkombo ya Nzambe na monɔkɔ ya Liebele [4]. Mbongo yango ezalaki kosalema na bingumba lokola Erfurt, Fürth, Mayence, mpe Würzburg. Na nsima, bakonzi ya bamboka mosusu oyo basalaki boyokani na mokonzi ya Suède bakómaki mpe kobimisa mbongo ya bibende oyo ezalaki na nkombo ya Nzambe.
Na boumeli ya mbula soki 150 nsima ya Etumba ya Mbula Ntuku Misato, nkombo ya Nzambe ekobaki kobimisama na bamedayi mpe na mbongo ya bibende ya ndenge na ndenge. Mbongo yango ebimisamaki mpe na bikólo lokola Autriche, France, Mexique, Russie, mpe na bikólo mosusu. Nzokande, na ebandeli ya bambula ya 1700, bazalaki lisusu kotya mpenza te nkombo ya Nzambe na mbongo ya bibende. Nsukansuka, batikaki kotya nkombo yango na masini ya kosala mbongo ya bibende mpe na bakashɛ.
Koyebisa bato nkombo ya Nzambe
Atako lelo oyo bakomaka lisusu te nkombo ya Nzambe na mbongo, kasi nkombo yango esakolami mingi koleka na bileko mosusu nyonso. Na ntango ya kala, Nzambe aponaki bato ya ekólo moko mpo bázala basaleli na ye mpe alobaki na bango ete: “Bozali batatoli na ngai. . . . Ngai nazali Nzambe.” (Yisaya 43:12) Mbongo moko te ya ebende ekoki kokokisa mokumba wana ya ntina mingi. Kutu, bato oyo bakomisaki nkombo ya Nzambe na mbongo ya bibende bapesaki litatoli ya lokuta mpo na ye na ndenge bazalaki koloba ete azalaki kosalisa bango na bitumba na bango ya nsɔmɔ. Kasi lelo oyo, bato mosusu bazali koyebisa nkombo ya Nzambe na ndenge oyo alingaka.
Batatoli ya Yehova bazali kolendisa yo oluka koyeba malamu Yehova, Nzambe ya solo, mpe ndimbola ya nkombo na ye. Mokomi ya nzembo akomaki mpo na Yehova boye: “Ɛɛ báyeba ete ezali bobele yo oyo azali na nkombo [Yehova] Oyo-Aleki likoló na mokili mobimba.” (Nzembo 83:18) Ezali na ntina mingi koyeba Yehova, ndenge Mwana na ye ya bolingo amonisaki yango ntango abondelaki ete: “Oyo elakisi bomoi ya seko, báyekola koyeba yo, Nzambe kaka moko ya solosolo, mpe moto oyo yo otindaki, Yesu Klisto.”—Yoane 17:3.
[Elilingi na lokasa 19]
Biloko ya kosala mayemi na mbongo ya bibende
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 18]
Mbongo 1 mpe bisaleli: Hans-Peter-Marquardt.net; mbongo 2: Mit freundlicher Genehmigung Sammlung Julius Hagander
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 19]
Mbongo 3 mpe 4: Mit freundlicher Genehmigung Sammlung Julius Hagander