Nakendeki mosika mpo na kosakola nsango malamu
Lisolo ya Helen Jones
Mokolo moko, na ebandeli ya bambula ya 1970, nazalaki kotambola na zando moko ya bato ebele na engumba Bangalore, na Inde. Mbala moko, mpakasa moko etombolaki ngai na maseke na yango mpe ebwakaki ngai na nse. Soki mwasi moko ya Inde abikisaka ngai te, mpakasa yango elingaki mpenza kopanza ngai. Kasi, nakendeki kosala nini na Inde?
NABOTAMAKI na 1931, mpe nakolaki na engumba kitoko babengi Vancouver, na Canada. Baboti na ngai bazalaki bato malamu, kasi bazalaki kosambela te. Nzokande, ngai nazalaki na mposa makasi ya koyeba Nzambe; yango wana, ntango nazalaki mwana moke, nazalaki kokende na Eteyelo ya Lomingo mpe na bakelasi ya koyekola Biblia na eleko ya bopemi.
Na 1950, ntango nakómaki na mbula 19, nabalanaki na Frank Schiller, oyo abotaki bana minei ná mwasi na ye ya liboso. Nsima ya mbula mibale, tobotaki mwana ya mobali. Tozalaki na mposa ya kokóma bandimi ya lingomba moko, kasi lokola Frank abomaki libala na ye ya liboso, mangomba nyonso epai tokendeki eboyaki biso. Likambo yango epesaki Frank nkanda mpe alingaki lisusu te kolobela makambo ya losambo.
Nayekoli solo ya Biblia
Na 1954, mokolo moko yaya na ngai ya mobali ayebisaki ngai na esengo mpenza makambo oyo moninga na ye moko ya mosala, oyo azalaki Motatoli ya Yehova, alakisaki ye na Biblia. Atako nazalaki na mituna mingi mpe nayebaki esika Batatoli ya Yehova basanganaka, nakendeki koluka bango te mpo nayebaki ete Frank alingaka makambo wana te. Eumelaki te, Batatoli mibale bayaki na ndako na biso. Nalingaki koyeba oyo lingomba na bango eteyaka na likambo ya koboma libala; basalelaki Biblia mpo na komonisa ngai likambo oyo ekoki kotinda moto aboma libala. (Matai 19:3-9) Bamonisaki ngai ete soki nabandi koyekola Biblia mbala na mbala, nakozwa biyano na mituna na ngai.
Frank asilikaki mingi; alingaki koyoka ata moke te likambo ya Batatoli ya Yehova. Na 1955, nayanganaki na Ekaniseli ya liwa ya Klisto mpe ntango nazongaki ndako, nayebisaki ye na esengo mpenza mateya ya Biblia oyo nayokaki kuna. Alobaki na mongongo makasi ete: “Nandimi yango te!” Mpe abakisaki ete: “Soki omonisi ngai makambo yango na kati ya Biblia, nakokende ata mokolo moko na makita na bino wana ya mpambampamba!”
Napesaki ye Biblia mpe azwaki yango na limemya mpenza. Totángaki elongo bavɛrsɛ oyo nakomaki; naboyaki koloba mingi, natikaki Biblia yango moko eloba. Frank atyaki ntembe te, mpe mpokwa wana mobimba azalaki kaka kokanisakanisa.
Nsima ya mikolo, nayebisaki ye lisusu elaka oyo apesaki ya koyangana na likita moko. Alobaki na mwa kokakatana boye: “Nakokende kaka mpo namona ndenge yango esalemaka.” Lisukulu oyo esalemaki na mokolo oyo ayanganaki elobelaki botosi ya basi epai ya mibali na bango. (Baefese 5:22, 23, 33) Makambo oyo ayokaki esepelisaki ye mingi. Kaka na mikolo wana, Frank ayanganaki na boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli oyo ezalaki na motó ya likambo “Saláká mosala mpo ozala na esengo.” Lokola Frank azalaki kolinga mosala mingi, asepelaki mpenza na lisolo yango. Banda wana, azalaki lisusu kozangisa makita te. Eumelaki te, Frank akómaki kosakola na molende mpe ngai nazalaki koyekola Biblia na bato oyo nsukansuka bazwaki batisimo. Ngai, mama, ndeko na ngai ya mobali mpe Frank, tozwaki batisimo kaka na mbula wana mpo na komonisa ete tomipesi na Nzambe.
Mposa ya kosakola mingi
Na liyangani ya etúká oyo tosalaki na 1957 na engumba Seattle, na États-Unis, tolandaki lisukulu moko oyo elobelaki likambo ya kokende kosakola epai mposa ya basakoli ya Bokonzi ezali makasi. Nabondelaki boye: ‘Ee, Yehova, ngai mpe nalingi kokende. Salisá biso tókende epai bazali na mposa na biso.’ Kasi, Frank azalaki komitungisa mpo na mokumba na ye ya koleisa mpe kosunga libota na biso.—1 Timote 5:8.
Na mbula oyo elandaki, libota na biso mobimba tokendeki na liyangani ya etúká oyo esalemaki na engumba New York; liyangani yango ezalaki kosalema mbala moko na libándá ya masano ya Yankee Stadium mpe ná oyo ya Polo Grounds. Bato koleka 253 000 balandaki lisukulu ya bato nyonso ya liyangani yango! Makambo oyo Frank amonaki mpe ayokaki kuna esimbaki motema na ye. Yango wana, ntango tozongaki ndako, toponaki kokende kofanda na Kenya, na Afrika, mpo kuna balobaka Lingelesi mpe tokokaki kozwela bana na biso bakelasi ya malamu.
Na 1959, totɛkaki ndako na biso, totyaki biloko na motuka na biso mpe tokendeki tii na engumba Montréal, na Canada. Kuna, tozwaki masuwa tii na Londres, na Angleterre. Na Angleterre, tozwaki masuwa mosusu oyo elekaki na Mbu ya Meditelane, mpe na Mbu Motane tii na océan indien. Nsukansuka, tokómaki na libongo ya Mombasa, na Kenya, na ɛsti ya Afrika. Mokolo oyo elandaki, engbunduka ememaki biso tii na Nairobi, mboka-mokonzi ya Kenya.
Mapamboli na Afrika
Na ntango wana, mosala ya kosakola ya Batatoli ya Yehova epekisamaki na Kenya. Yango wana, tozalaki kosakola na mayele. Tokutaki mpe mabota ebele oyo bautaki bikólo mosusu mpe bayaki kofanda na Kenya; Leta andimaki biso nyonso tófanda na ekólo yango. Na makita na biso, bayangani basengelaki koleka zomi te. Yango wana biso nyonso, ata bana mike, tozalaki kopesa biyano mingi.
Nsima ya kokóma na Kenya, eumelaki te tozwaki ndako mpe Frank azwaki mosala. Mwasi ya liboso oyo nakutanaki na ye na mosala ya ndako na ndako andimaki koyekola Biblia mpe nsukansuka akómaki mobongisi-nzela, nkombo oyo Batatoli ya Yehova babengaka bandimi na bango oyo basakolaka mingi. Nayekolaki mpe Biblia na elenge mwasi moko ya Lingomba ya Sikh, mpe tozalaki kobenga ye Goody. Akangamaki na mateya ya solo atako libota mpe lingomba na bango etɛmɛlaki ye. Ntango babenganaki ye na ndako, libota moko ya Batatoli bazwaki ye; amipesaki na Yehova, akómaki mobongisi-nzela mpe na nsima, akɔtaki na Eteyelo ya Gileadi oyo ebongisaka bamisionɛrɛ.
Libota na biso ekutanaki mpe na mikakatano. Mwana na biso ya mobali ya mokóló abɛlaki mingai makasi nzoto mobimba, Frank azikaki makasi ntango azalaki kobongisa motuka moko mpe balongolaki ye na mosala. Na nsima, azwaki mosala mosusu na Dar es Salaam, mboka-mokonzi ya ekólo Tanganyika (lelo oyo Tanzanie), kilomɛtrɛ soki 1 000 longwa na esika oyo tozalaki. Na bongo, totyaki biloko na biso na motuka mpe tokendeki tii kuna. Na ntango wana, Dar es Salaam ezalaki na lisangá moko ya moke mpe bandeko bayambaki biso malamu.
Atako na ntango wana mosala ya kosakola epekisamaki na Tanzanie, epekiseli yango ezalaki mpenza makasi te. Na 1963, Milton Henschel, momonisi ya biro monene ya Batatoli ya Yehova oyo autaki na États-Unis, ayaki kotala biso. Na boumeli ya lisukulu moko oyo asalaki na Karimjee Hall, ndako ya makita oyo elekaki kitoko na ekólo wana, mobange moko oyo alataki lokola mobola ayaki kofanda pene na ngai. Napesaki ye mbote mpe nazalaki kolakisa ye bavɛrsɛ na Biblia na ngai mpe azalaki kolanda loyembo na buku na ngai ya nzembo. Na nsuka ya lisukulu, nasɛngaki ye aya na makita mosusu. Ntango kaka abimaki, bandeko bayaki nokinoki epai na ngai.
Batunaki ngai ete: “Oyebi moto wana? Ye nde guvɛrnɛrɛ ya Dar es Salaam!” Alobaki mwa liboso ete akopekisa liyangani esalema. Emonani ete ayaki ndenge wana mpo soki nasaleli ye makambo na boboto te, akokisa mokano na ye ya kokata liyangani. Kasi, akamwaki mpenza na ndenge natyelaki ye likebi mpe namoniselaki ye boboto, mpe atikaki liyangani esalema tii na nsuka. Bayangani bazalaki 274 mpe bato 16 bazwaki batisimo!
Ntango tozalaki na Tanzanie, ekólo yango ezwaki lipanda. Na nsima, bakómaki kopesa misala kaka na bana-mboka. Bapaya mingi basengelaki kolongwa na ekólo yango, kasi Frank alɛmbaki te koluka mosala. Nsukansuka, bayebisaki ye ete bazali koluka moto oyo ayebi mpenza kobongisa motɛrɛ mpo abongisaka mitɛrɛ ya bingbunduka. Mosala wana epesaki biso nzela ya kofanda lisusu mbula minei na ekólo yango. Ntango bambula oyo bayokanaki mpo na mosala yango ekómaki na nsuka, tozongaki na Canada mpe tofandaki kuna tii bana na biso nyonso babalaki. Lokola tozalaki naino na makasi, tozalaki na mposa ya kosala mingi.
Tokei na Inde
Na 1970, biro ya Batatoli ya Yehova na Bombay (lelo oyo Mumbai) esɛngaki biso tókende na Bangalore, engumba moko oyo ezalaki na bato koleka milio moko na ndambo. Kuna nde mpakasa elingaki kopanza ngai. Engumba yango ezalaki na lisangá moko ya Lingelesi oyo ezalaki na basakoli 40 mpe na etuluku moko ya monɔkɔ Tamoul oyo ezalaki mosika na lisangá. Frank ayekolaki na mibali mingi oyo bakolaki na elimo mpe na nsima bakómaki bankulutu na lisangá. Ngai mpe nayekolaki na mabota oyo bakómaki mpe basaleli ya Yehova.
Mwasi moko na nkombo Gloria azalaki kofanda na kartye moko ya babola. Mbala ya liboso oyo nakendeki kotala ye, ayebisaki ngai nakɔta na ndako. Lokola bakiti ezalaki te, tofandaki na nse. Napesaki ye Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe akataki esika oyo ezalaki na maloba ya Emoniseli 4:11 na zulunalo yango mpo asepelaki na yango mingi; mpe abambaki eteni yango ya papye na efelo mpo amonaka yango mikolo nyonso. Eteni yango ya papye ezalaki na maloba oyo: “Yehova . . . obongi kozwa nkembo.” Nsima ya mbula moko, azwaki batisimo.
Babengaki Frank akende kosala mbula moko na biro ya filiale na Bombay mpo na kotambwisa mosala ya kotonga Ndako ya Mayangani ya liboso oyo Batatoli batongaki na Inde. Mosala yango esɛngaki kaka kobakisa etazi moko na ndako ya Betele oyo ezalaki wana. Na ntango wana, na Inde mobimba, motángo ya Batatoli elekaki mwa moke 3 000 mpe bandeko oyo bazalaki kosala na Betele balekaki 10 te. Na 1975, lokola mbongo na biso esilaki, tosengelaki kozonga na mboka na biso, atako ezalaki mpasi kokabwana na baninga oyo tolingaki mingi.
Tozongi na Afrika
Nsima ya mbula zomi, Frank akokisaki mbula ya kozwa epaso na mosala. Tomonisaki biro ya filiale ete tokoki kokende na bikólo mosusu mpo na kopesa mabɔkɔ na kotonga bandako ya filiale. Tozwaki mokanda oyo esɛngaki biso tókende na engumba Igieduma, na Nigeria, esika bazalaki kotonga Betele. Ntango tozalaki na Igieduma, Frank ayekolaki Biblia na mobali moko ya mwa mboka moko ya pene wana. Mobali yango akolaki na elimo mpe na nsima akómaki kosala na biro ya filiale ya Batatoli ya Yehova ya Nigeria.
Na nsima, tokendeki kotonga bandako ya filiale na Zaïre (lelo oyo République démocratique du Congo). Eumelaki te, mosala ya kosakola epekisamaki mpe babɔtɔlaki biso ba passeport. Mokolo moko na mosala, maladi ya motema ekweisaki Frank, kasi azongaki lisusu makasi na boumeli ya epekiseli. Na nsima, esɛngaki ete bandeko nyonso oyo bazalaki kotonga bandako yango bálongwa, mpe batindaki biso na Libéria, ekólo mosusu ya Afrika. Na Betele ya ekólo yango, oyo ezali na engumba Monrovia, basɛngaki Frank abongisaka masini oyo epesaka kura. Na 1986, ntango viza na biso esilaki, tozongaki lisusu na Canada.
Na nsuka, tokei na Équateur
Mwa moke na nsima, toyokaki nsango ete Andy Kidd, moninga na biso ya motema, akendeki kofanda na ekólo Équateur mpe azalaki kosepela na mosala ya kosakola kuna. Andy azalaki nkulutu kaka moko na lisangá na bango mpe mbala mingi, asengelaki kosala masolo mingi na makita. Na 1988, abengaki biso tókende kotala biro ya filiale ya Équateur mpe bandeko balendisaki biso tótikala kuna.
Tozwaki ndako ya malamu; kasi tosengelaki koyekola monɔkɔ ya Espagnol mpe Frank akómaki na mbula 71. Na boumeli ya mbula mibale oyo elandaki, atako toyebaki monɔkɔ yango malamu te, tosalisaki bato 12 mpe bazwaki batisimo. Basɛngaki Frank akende kopesa mabɔkɔ na kotonga bandako ya filiale na Équateur. Ayekolaki mpe Biblia na mobali ya ndeko mwasi moko oyo azalaki moko ya Batatoli ya liboso na engumba Guayaquil. Mobali yango oyo atɛmɛlaki Batatoli na boumeli ya mbula 46, akómaki moninga mpe ndeko na biso ya elimo.
Mpasi monene ekweli ngai
Tokendeki kofanda na Ancón, mwa mboka moko oyo ezali pene na océan pacifique, epai topesaki mabɔkɔ na kotonga Ndako ya Bokonzi moko. Likambo ya mawa, na mokolo ya 4 Novɛmbɛ 1998, maladi ya motema ekangaki Frank nsima ya kosala lisolo ya nsuka na Likita ya Mosala, mpe akufaki na butu wana. Bandeko na biso ya elimo basalisaki ngai mingi! Mokolo oyo elandaki, bakundaki Frank na esika ya kokunda bato oyo ezalaki kotalana na Ndako ya Bokonzi. Kokufela moto oyo olingaka esalaka mpasi ya koloba te.
Nsima na yango, nazongaki lisusu na Canada mpo na kotya makambo mosusu ya libota na molɔngɔ mpe kobongisa mikanda ya Leta, kasi mbala oyo nazalaki kaka ngai moko. Atako nazalaki na mawa mingi, Yehova abosanaki ngai te. Biro ya filiale ya Équateur etindelaki ngai mokanda mpo na kosɛnga ngai nazonga lisusu kuna. Nazongaki mpe nazwaki mwa ndako pene na biro ya filiale. Lokola nazalaki kosala na Betele mpe kosakola, yango esalisaki ngai nabosana mwa moke mpasi ya kobungisa Frank. Atako bongo, nazalaki komiyoka ete nazali kaka ngai moko.
Mosala ezali kokoba
Na nsima, nayebanaki na Junior Jones, mobongisi-nzela moko oyo autaki na États-Unis mpe ayaki na Équateur na 1997. Ngai ná ye tozalaki na mikano ya ndenge moko mpe tozalaki kosepela na makambo ya ndenge moko. Tobalanaki na Ɔkɔtɔbɛ 2000. Junior ayebaki malamu mosala ya kotonga. Yango wana, basɛngaki biso tókende kosilisa mosala ya kotonga Ndako ya Mayangani na Cuenca, engumba moko oyo etongamá na bangomba ya Andes. Na nsima, na mokolo ya 30 Aprili 2006, Geoffrey Jackson ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi ya Batatoli ya Yehova, oyo autaki na New York, asalaki lisukulu ya bofungoli liboso ya bato 6 554.
Nani akokaki kondima ete mosala ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi ekokaki kobota mbuma mingi na bamboka ya mosika, na ndakisa na Afrika, na Inde mpe na Amerika ya sudi? Sikoyo, ngai ná Junior tozwi naino te likanisi ya kotika mosala oyo. Bambula koleka 50 oyo nasaleli Yehova eleki noki mpenza mpe namonaka lokola nabandaki mosala yango lobilobi awa. Mpe nayebi ete ntango mokili ya sika ekoya, tokomona ete eleko oyo tozali sikoyo eumelaki mpenza te.—Emoniseli 21:3-5; 22:20.
[Karte/Elilingi na lokasaa 15]
(Mpo na komona yango, talá mokanda)
Bisika oyo tosalaki
CANADA → ENGLAND → KENYA → TANZANIA
CANADA → INDIA
CANADA → NIGERIA → CONGO, DEM. REP. (ZAIRE) → LIBERIA
CANADA → ECUADOR
[Bisika mosusu]
UNITED STATES OF AMERICA
[Elilingi]
Na Inde, ngai ná Frank tozali kokende na liyangani
[Elilingi na lokasa 23]
Ngai ná mobali na ngai Junior Jones