Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w95 1/4 nk. 21-25
  • Ekateli na ngai ya kokóla kino kokɔmela

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ekateli na ngai ya kokóla kino kokɔmela
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Etumba ebongoli bomoi na biso
  • Bipekiseli mpo na bokóli ya elimo
  • Nasɛngi mosala ya mobongisi-nzela
  • Nalandi mosala ya misionere
  • Namiyokanisi na teritware ya mboka mopaya
  • Nasali mobembo na Etats-Unis
  • Nalandi kokóla na elimo
  • Nakendeki mosika mpo na kosakola nsango malamu
    Lamuká!—2008
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
w95 1/4 nk. 21-25

Ekateli na ngai ya kokóla kino kokɔmela

LISOLÓ YA CARL DOCHOW

“Kokóla kino kokɔmela to kokwea lisusu na masumu, Okopona nini?” wana ezalaki motó ya lisoló moko kati na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Yúni 1948 (ebimeli ya Lingelesi). Lisoló wana libikisaki ngai na likámá ya elimo oyo nazalaki kati na yango na bitúká ya bilanga minene ya Etats-Unis kino ememaki ngai kati na mosala ya misionere na Amerika ya Súdi esili sikawa koleka mibu 43.

NABOTAMAKI na 31 Mársi 1914, mwana ya misato kati na libota ya bana mibali minei, na ndako moke ya mibimbi ya nzeté na engumba Vergas, na etúká ya Minnesota. Bomwana na ngai ezalaki mpenza eleko moko ya esengo. Nazali komikundola ete tozalaki kokende kolɔ́ba mbisi elongo na tata na ngai. Nzokande, mama azalaki kobɛla mbala mingi, mpe nasengelaki kotika kotánga wana nakómaki na kelasi ya mitano na eteyelo ya ebandeli mpo na kosalisa ye na misala ya ndako. Ntango nakómaki na mibu 13, bamonaki ete maladi na ye ezalaki bongo kanser ya lipúlúlú.

Mama ayebaki ete asengelaki kobika lisusu ntango molai te, na yango abandaki koyekolisa ngai makambo mpo ete natikala kokokisa mikumba na ye ya ndako. Azalaki kofanda na kúku mpe kolakisa ngai lolenge ya kolamba mpe ya kosala mampa mpe mikate. Lisusu, alakisaki ngai lolenge ya kosukola bilamba, ya kobongisa bafololo mpe kobɔkɔla bansoso soko monkámá. Alendisaki lisusu ngai ete natángaka mokapo moko ya Biblia mokolo na mokolo, likambo oyo nabandaki kosala, atako nayebaki kotánga malamu te. Nsima ya koyekolisa ngai makambo wana na boumeli ya basanza zomi, mama akufaki na 27 Yanuáli 1928.

Etumba ebongoli bomoi na biso

Nsima wana Etumba ya Mibale ya mokili mobimba ebandaki na Sɛtɛ́mbɛ 1939, kati na ndakonzambe na biso ebéngami Eglise luthérienne, bazalaki kobondela na mikolo nyonso ya Lomingo mpo na mampinga ya basodá. Nkulutu na ngai Frank azalaki na ekateli makasi ya koboma moto te, yango wana ntango aboyaki kokende na mosala ya sodá mpo na kobunda, bakangaki ye. Ntango bazalaki kosambisa ye alobaki ete: “Bokoki kobɛta ngai masasi, liboso ete nakende koboma bato oyo basali likambo moko te!” Bakatelaki ye bolɔ́kɔ ya mbula moko na esanga McNeil oyo ezalaki mwa mosika na Etúká ya Washington.

Kuna, Frank akutanaki na Batatoli ya Yehova 300 oyo bakangamaki na ntina na etɛlɛmɛlo na bango ya kozanga kokɔta na bitumba. (Yisaya 2:4; Yoane 17:16) Mosika te, abandaki kosangana elongo na bango mpe azwaki batisimo bobele kuna na bolɔ́kɔ. Mpo na etamboli na ye malamu, mikolo na ye ya bolɔ́kɔ mikitisamaki na sanza libwa. Na Novɛ́mbɛ 1942, tozwaki nsango ete Frank abimisami na bolɔ́kɔ, mwa moke na nsima ayebisaki biso na ntina na nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe. Nsima ya kotalela malamumalamu nsango yango kati na Biblia na biso moko, banso kati na biso tomonaki ete makambo oyo Frank azalaki koteya mazalaki solo.

Bipekiseli mpo na bokóli ya elimo

Na 1944, nakendaki kofanda na engumba ya Malta, na Montana, epai na noko na ngai. Tozalaki na likambo moko oyo ekokanisaki biso​—basi bakimaki biso nsima ya sanza motoba ya libala. Noko azalaki na esengo ete nazalaki kosalisa ye na misala ya kolamba mpe na misala ya bilanga, mpe tozalaki kokabola na katikati matomba ya mosala ya bilanga. Noko na ngai azalaki koloba ete nakosangola ba hectares 260 ya bilanga na ye soki nakofanda elongo na ye. Bambula wana ezalaki bambula ya kobota mbuma mingi mpo na bilanga, mpe nalingaki yango mingi! Mbula na mbula tozalaki kobuka mbuma mingi, mpe nganu ezalaki kotekama kino na badolare 3,16 mpo na balitɛlɛ 35.

Nzokande, noko na ngai azalaki kosepela soko moko te ete nayanganaka na makita ya lisangá moke ya Batatoli ya Yehova oyo ezalaki na Malta. Na 7 Yúni 1947, kozanga ete noko na ngai ayeba yango, nazwaki batisimo na liyangani ya zongazonga ya Batatoli ya Yehova na engumba Wolf Point. Kuna, ndeko mobali moko abyangaki ngai ete nakóma mobongisi-nzela, to mosáli ya ntango nyonso. Atako nazalaki kooka mposa ya kosalela bomoi na ngai na mosala wana, nalimbwelaki ye ete noko na ngai akopesa ngai nzela soko moke te ete napesa ntango mingi bongo na mosala yango.

Mwa moke na nsima, noko na ngai afungolaki mpe atángaki mokanda moko oyo moninga moko atindelaki ngai mpo na kolendisa ngai ete nakóma mosáli ya ntango nyonso. Na kosilika makasi, noko na ngai atyaki liboso na ngai liponi oyo​—kotika kosakola to kolongwa awa. Liponi yango lizalaki likambo moko malamu mingi mpamba te nalingaki mosala ya bilanga mingi na boye ete nayebi te soki nakokaki kotika yango ngai moko. Bongo nazongaki na libota na ngai na Minnesota, epai basangani na yango nyonso basilaki kozwa batisimo mpe bazalaki kosangana elongo na lisangá ya Detroit Lakes.

Na ebandeli libota na ngai elendisaki ngai mpo na mosala ya mobongisi-nzela, kasi na 1948 babandaki kolɛmba na elimo. Ezali na ntango yango nde lisoló “Kokóla kino kokɔmela to kokwea lisusu na masumu, Okopona nini?” epesaki ngai nguya ya elimo oyo nazalaki na yango mposa. Epesaki likebisi oyo ete “mbuma eleki mabe ekozanga te kokwela biso soki tozali koboya na nkó nyonso kokóla na boyokani ya boyebi oyo tozali na yango.” Lisoló yango elobaki ete: “Ebongi te ete tótɛlɛma bobele na esika moko mpe tózonga na nsima, kasi tosengeli nde kokóla kati na boyengebene. Bokóli nde ezali nguya eleki makasi mpo na kopɛngola kokwea lisusu, kasi ezali kotɛlɛma esika moko te.”

Atako libota na ngai lipesaki bantina mosusu mpo na komilóngisa, nakanisi ete mokakatano monene mozalaki bongo mposa na bango ya kokóma na bozwi mingi. Bazalaki komona matomba ya nkita oyo mazalaki kouta na kopesa ntango mingi na mosala ya bilanga, nzokande bazalaki kopesa ntango moke na mosala ya kosakola. Na esika ete nakangama na motambo ya mposa ya bozwi, nasalaki ebongiseli mpo na kokóma mobongisi-nzela. Nayebaki ete yango ekozala pɛtɛɛ te, mpe nakanisaki nkutu ete nakokoka te kolónga yango. Bongo na 1948, namityaki na komekama na kosaláká molende ya kobanda mosala ya mobongisi-nzela na eleko oyo eleki mpasi kati na mbula​—na sanza ya Dɛsɛ́mbɛ.

Nasɛngi mosala ya mobongisi-nzela

Yehova apambolaki milende na ngai. Na ndakisa, mokolo moko mpiɔ ezalaki makasi kino na 27° C na nsé ya zero, bakisá mpe mopɛpɛ oyo mozalaki kopepa. Nazalaki kosala mosala na ngai ya kopesa litatoli na balabála lokola na momeseno, kobongoláká mabɔkɔ na ngai mbala na mbala​—kotyáká oyo ezwi malili makasi kati na libenga wana nazali kosimba bazulunalo na lobɔkɔ mosusu kino yango ekozwa mpiɔ makasi mpe ekosɛnga ete natya yango na libenga. Mobali moko abɛlɛmaki pene na ngai. Ayebisaki ngai ete asilaki komona mosala na ngai na boumeli ya mwa ntango, mpe atunaki ete: “Makambo nini mazali kati na bazulunalo yango oyo mazali mpenza na motuya mingi na boye ete ezali kotinda yo na kotɛlɛma awa na mpiɔ? Pesá ngai oyo wana mibale mpo ete natánga yango.”

Na eleko wana, namonaki ete kosangana elongo na libota na ngai ezalaki kotya elimo na ngai na likámá, yango wana ntango nasɛngaki na la Société Watch Tower, bapesaki ngai teritware ya sika, na engumba ya Miles City, na Montana. Kuna nasalaki lokola mosaleli ya etuluku, oyo ayebani lelo lokola mokɛngɛli-mokambi. Nazalaki kofanda kati na ndako moke ya bamɛtɛlɛ 2 ya bonene mpe bamɛtɛlɛ 3 ya bolai oyo ebendamaka na motuka, nazalaki komisunga ngai moko na mosolo na kosaláká ndambo ya mokolo na kompanyi moko ya kosukola bilamba. Na bantango mosusu bazalaki kofuta ngai mosolo mpo na mosala oyo nazalaki kolinga mingi​—kobuka mbuma.

Na boumeli ya ntango wana, nazalaki sé koyoka nsango na ntina na kobeba ya ezalela ya elimo ya libota na ngai. Na nsuka, bango elongo na basusu kati na lisangá ya Detroit Lakes, bakómaki batɛmɛli ya lisangá ya Yehova. Kati na basakoli ya Bokonzi 17 oyo bazalaki na lisangá yango, bobele 7 nde batikalaki sembo. Libota na ngai lizwaki ekateli ya kosala ete ngai mpe natika lisangá ya Yehova, yango wana nakangaki ntina ete ezalaki bobele na mwango moko, kosala bokóli mingi. Kasi lolenge nini?

Nalandi mosala ya misionere

Na boumeli ya liyangani ya mikili mingi oyo esalemaki na New York City na 1950, nazalaki wana ntango banakelasi oyo balandaki mateya na kelasi ya mbala 15 na Galadi, Eteyelo ya Biblia ya Watchtower, bazwaki mapɔlɔ́mi na bango. Nakanisaki ete, ‘Ah, soki nakokaki kozala ata kati na baoyo bazalaki kokende kosalela Yehova na mikili ya bapaya.’

Nasɛngaki kokɔta na eteyelo yango mpe nandimamaki lokola mosangani ya kelasi ya mbala 17 ya Galadi, oyo ebandaki na Febwáli 1951. Eteyelo yango ezalaki na nɔ́rdi ya engumba New York, na esika moko kitoko. Nazalaki mpenza kosepela kosala na bilanga nsima ya ngonga ya mateya, mbala mosusu kati na ebokwelo na ndako ya bangombe to na libándá kati na milona! Kasi John Booth, oyo azalaki na ntango wana mokɛngɛli ya Ebokwelo ya Bokonzi, alobaki ete nazalaki ndeko bobele moko oyo ayebaki kosukola bilamba na masini. Yango wana batindaki ngai nasalaka mosala yango.

Galadi ezalaki pɛtɛɛ te mpo na moto oyo asukaki bobele na kelasi ya mitano na eteyelo ya ebandeli. Atako basɛngaki ete miinda nyonso mizimisamaka na ngonga ya zomi na ndambo ya butu, nazalaki mbala na mbala koyekola kino ngonga ya zomi na mibale ya butu. Moko na balakisi na biso abyangaki ngai mokolo moko na biro na ye. Alobaki ete: “Carl, nazali komona ete bapwɛ́ na yo ezali malamu mingi te.”

Nakanisaki kati na motema ete, ‘Boye, bakosɛnga na ngai ete nalanda lisusu mateya na Galadi te.’

Nzokande, na bolingo nyonso, molakisi yango apesaki ngai toli mpo na lolenge oyo nakokaki kosalela malamu ntango na ngai kozanga ete nayekola kino na butu makasi bongo. Na kobanga nyonso natunaki ete: “Boyebi na ngai ekopesa ngai nzela ya kolanda mateya awa na Galadi?”

Ayanolaki ete: “Ee. Kasi nayebi te soki okozwa lipɔlɔ́mi.”

Nabɔndisamaki na maloba ya prezidá ya Eteyelo, Nathan H. Knorr. Na ebandeli ayebisaki banakelasi ete likambo lizalaki kosepelisa ye mingi ezalaki te kozwa bapwɛ́ mingi, kasi nde “kokangama makasi” ya bamisionere oyo bazali kotikala sembo na esika na bango ya mosala.

Likambo oyo ezalaki mpasi mingi mpo na ngai ezalaki lokótá Espagnol, kasi nazalaki kotya motema ete nakotindama na Alaska, esika ya mpiɔ, oyo nasilaki komesana na yango uta kala na mboka na biso. Lisusu, nakokoka bongo kosakola na Lingelesi. Na yango, kanisá kokamwa nazalaki na yango wana, na katikati ya boumeli ya kelasi, naponamaki mpo na kotindama na mokili ya Équateur, na Súdi ya Amerika. Ee, nasengelaki koloba lokótá Espagnol, mpe kuna na esika ya molungé makasi na nzela ya moi!

Mokolo moko, mosáli moko na sûreté na FBI ayaki koluka ngai na Eteyelo ya Galadi. Atunaki mituna na ntina na mwana na mosaleli ya etuluku ya lisangá na biso na Detroit Lakes, oyo asilaki kotika lisangá. Etumba ya Corée ezalaki naino konginda, mpe elenge mobali yango alobaki ete azalaki mosaleli ya Nzambe epai na Batatoli ya Yehova mpe na yango akokaki kokende mosala ya sodá te. Nalimbwelaki ye ete azalaki lisusu Motatoli ya Yehova te. Wana mosáli yango apesaki ngai mbote ya bokabwani, alobaki ete: “Tiká ete Nzambe na yo apambola yo kati na mosala na yo.”

Na nsima, nayokaki ete elenge mobali yango abomamaki kati na bitumba ya liboso oyo ye abundaki na Corée. Oyo nde likambo ya mawa mpo na moto oyo akokaki kokóla kino kokɔmela kati na lisangá ya Nzambe!

Na nsuka, mokolo ya kopesa biso mapɔlɔ́mi ekómaki na 22 Yulí 1951. Ya solo, mosangani moko te ya libota na ngai azalaki wana, kasi esengo na ngai ezalaki monene ntango nazwaki lipɔlɔ́mi mpo na bokóli oyo nasalaki.

Namiyokanisi na teritware ya mboka mopaya

Ntango nakómaki na teritware oyo epesamelaki ngai, namonaki ete kobongisama oyo nazwaki epai na mama ezalaki mpenza na ntina mingi. Kolamba, kosukola bilamba na mabɔkɔ mpe kozanga mai ya pompi ezalaki mpo na ngai likambo ya sika te. Kasi kosakola na lokótá Espagnol nde ezalaki likambo ya sika! Na boumeli ya ntango molai nasalelaki sé lisoló moko na Espagnol oyo enyatámaki likoló na lokasa moko. Esengelaki mibu misato liboso ete nakoka kosala lisukúlu ya bato banso na lokótá Espagnol mpe na kotángáká makambo oyo nakomaki.

Ntango nakómaki na Équateur na 1951, basakoli ya Bokonzi bakómaki naino 200 te. Mosala ya kozalisa bayekoli emonanaki ete ezalaki kotambola malɛmbɛmalɛmbɛ na boumeli ya mibu 25 ya liboso. Mateya na biso ya Biblia makesanaki mingi na mimeseno ya Lingomba ya Katolike oyo miyokani te na Makomami, mpe bokangami na biso na mitindá ya Biblia mitali kozala sembo epai na mobalani na yo eyokanaki mpenza te na makanisi ya bato mingi.​—Baebele 13:4.

Nzokande, tozalaki kokabola mingi mikanda oyo mikolimbolaka Biblia. Mosala na biso na Machala, oyo ezalaki na katikati na bitúká oyo bitabe ebotaka mingi, mokoki komonisa yango. Bobele ngai mpe Nicholas Wesley nde tozalaki Batatoli ntango tokómaki kuna na 1956. Tozalaki kobima na ntɔ́ngɔ́ mpenza mpe komata na motuka oyo bazalaki kosalela na botongi ya banzela minene oyo ezalaki kosalema na mikolo wana. Nsima ya kokende mosika, tozalaki kokita mpe kopesa litatoli epai na bato na kozongáká epai tozalaki kofanda.

Mokolo moko, ngai mpe Nick tosengelaki kotánga motuya ya bazulunalo nyonso oyo tozalaki kokabola mpo na koyeba nani akabolaki yango mingi. Nazali komikundola ete na katikati ya mokolo nalekaki Nick na bokaboli ya bazulunalo, kasi na mpokwa, tokokanaki moto na moto akabolaki bazulunalo 114. Tozalaki kokabola ebele ya bazulunalo sanza na sanza epai na bato oyo bazalaki kozwa bazulunalo na mabɔkɔ na biso. Mbala motoba, nakabolaki bazulunalo koleka nkóto moko na sanza. Kanisá bato boni bakokaki koyekola solo ya Biblia na nzela ya bazulunalo wana!

Na Machala, tozalaki lisusu na libaku malamu ya kotonga Ndako ya Bokonzi ya liboso na Équateur, oyo lisangá litongaki mpo na yango moko. Yango esili sikawa koleka mibu 35 uta 1960. Na mikolo wana ya ebandeli, tozalaki koyangana bobele bato soko 15 na makita na biso. Lelo oyo, Machala ezali na masangá minene 11!

Nasali mobembo na Etats-Unis

Na nsuka ya bambula 1970, nazongaki na Etats-Unis mpo na bopemi mpe nalekisaki mwa bangonga elongo na ndeko na ngai Frank. Amemaki ngai na motuka na ye kino likoló na nkéka moko epai tokokaki komona mosika likoló na lobwaku ya ebale Red. Ezalaki mpenza kitoko, komona mbuma oyo ezali kotela koningana na mopɛpɛ, elanga monene ya nganu oyo eboti mpenza malamu. Na mosika, tokokaki komona ebale Sheyenne oyo ekabolamaki na biteni misato. Bosepeli na ntina na bisika kitoko wana ya kimya ekatanaki ntango ndeko na ngai abandaki masoló na ye ya momeseno.

“Soki ozalaki te lokola ebɛbɛ oyo azali kotambolatambola kuna na Súdi ya Amerika, mbɛlɛ elanga oyo mpe ekokaki kokóma ya yo!”

Nakataki ye nokinoki ete: “Frank, sukisá lisoló yango bobele wana.”

Abakisaki liloba mosusu te. Bobele mwa bambula na nsima, akufaki na mbalakaka na bosénzoi, kotikáká nsima na ye bilanga kitoko misato na etúká ya Dakota ya Nɔ́rdi, oyo nyonso ezalaki na bonene ya ba hectares 400, bakisá mpe ba hectares 260 ya elanga ya noko oyo ezalaki na Montana, oyo ye asilaki kosangola lokola libula.

Sikawa basangani nyonso ya libota na ngai basilaki kokufa. Kasi nazali na esengo ete na Detroit Lakes, epai biso banso tobandaki lokola Batatoli ya Yehova esili koleka bambula mingi, nazali na libota ya elimo oyo ezali na bandeko mibali mpe bandeko basi koleka 90.

Nalandi kokóla na elimo

Awa na Équateur, mibu 15 oyo miuti koleka misili kobota ebele ya mbuma na elimo. Longwa na basakoli ya Bokonzi 5000 na 1980, tozali sikawa na basakoli koleka 26000. Nazwaki libaku kitoko ya kosalisa bato koleka monkámá kati na bango kino na kozwa batisimo.

Sikawa, na mbula 80, nazali kosala makasi mpo na kokokisa bangonga 30 na sanza kati na mosala ya kosakola koleka ntango nasengelaki kokokisa bangonga 150 na 1951. Kobanda 1989, ntango bayebisaki ngai ete nazalaki na kanser ya prostate, nazwaki litomba na kosaleláká ntango oyo nazalaki kozela ete nzoto ezonga makasi mpo na kotánga. Kobanda mobu wana, nasili kotánga Biblia mobimba mbala 19 mpe nasili kotánga búku Les Témoins de Jéhovah: Prédicateurs du Royaume de Dieu mobimba mbala 6. Na motindo yango nazali kolanda kokóla na elimo.

Ee, nasilaki kozwa mabaku ya kozwa matomba ya mosuni na mosala ya bilanga na Etats-Unis. Kasi mbano ya bozwi ya mosuni ezali eloko te soki nakokanisi yango na esengo oyo nasili kozwa kati na mosala ya kobuka mbuma ya elimo. Filiale oyo ezali awa na Équateur eyebisaki ngai ete nasilaki kokabola bazunalo koleka 147000 mpe babúku 18000 kati na mosala na ngai ya misionere. Nazali kotalela yango lokola mbóto ya elimo, oyo mingi na yango esili kobota; mosusu ekoki mbala mosusu kobota kati na mitema ya bato na ntango bazali kotánga solo wana ya Bokonzi.

Nazali na eloko mosusu te eleki malamu oyo nakoki kokanisa likoló na yango lokola likambo ya kolanda kokóla kino na mokili ya sika elongo na bana na ngai nyonso ya elimo mpe bamilió ya bato mosusu oyo basili kopona kosalela Nzambe na biso, Yehova. Mosolo mokoki kobikisa moto te na nsuka ya mokili oyo mabe. (Masese 11:4; Ezekiele 7:19) Nzokande, mbuma ya mosala na biso ya elimo ekolandana​—soki biso banso tolandi kokóla kino kokɔmela.

[Elilingi na lokasa 24]

Nabɛlɛmi mpo na kobanda mosala ya mobongisi-nzela na Miles City, na Montana, na 1949

[Elilingi na lokasa 24]

Tozali kosomba mai mpo na ndako na biso ya bamisionere, 1952

[Elilingi na lokasa 25]

Kosakola na Machala, 1957

[Elilingi na lokasa 25]

Uta nakómaki kobɛla na 1989, nasili kotánga Biblia mobimba mbala 19

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto