Okopesa eyano nini?
Limbolá lisolo oyo
1. Na lisolo oyo ezali na Matai 25:31-46, nani abengami “Mwana ya moto”?
LISALISI: Tángá Matai 16:13-17.
․․․․․
2. Nini emonisaka soki moto azali na ngámbo ya bampate to ya bantaba?
․․․․․
3. Nini ekokómela bampate mpe nini ekokómela bantaba?
․․․․․
MPO NA KOSOLOLA:
Banani mpenza babengami “bandeko na ngai”? Ndenge nini okoki kosalisa bango?
Ezali na zulunalo oyo
Yanolá na mituna oyo, mpe tyá vɛrsɛ to bavɛrsɛ oyo esengeli.
LOKASA 3 Basɛki bakoloba nini na mikolo ya nsuka? 2 Petelo 3:․․․
LOKASA 7 Ntango nini libebi ya mbalakaka ekoya? 1 Batesaloniki 5:․․․
LOKASA 21 Nzambe akebisi basaleli na ye na makambo nini? Deteronome 18:․․․
LOKASA 28 Ndenge nini Nzambe atalelaka kosambela bikeko? Exode 20:․․․
Nani azali na molɔngɔ ya bankɔkɔ ya Yesu?
Talelá makambo oyo ekoki kosalisa yo. Tángá bavɛrsɛ. Na nsima, komá bankombo oyo esengeli na bisika oyo batye mikɔlɔtɔ.
4. ․․․․․
LISALISI: Nazali nkɔkɔ ya Abalayama.
Tángá Genese 11:24-26.
5. ․․․․․
LISALISI: Nalongwaki na engumba Ulu elongo na libota na ngai mpe tokendaki na mokili ya Kanana.
Tángá Genese 11:31.
6. ․․․․․
LISALISI: Yehova abongolaki nkombo na ngai mpo alobaki ete nakozala “tata ya mabota mingi.”
Tángá Genese 17:5.
BIYANO
1. Yesu.
2. Makambo oyo azali kosala epai ya bandeko ya Yesu.
3. Bampate bakozwa bomoi ya seko; bantaba bakobebisama mpo na libela.
4. Nahola.—Luka 3:34.
5. Tela.—Luka 3:34.
6. Abalayama.—Luka 3:34.