Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g 4/09 lok. 31
  • Okopesa eyano nini?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Okopesa eyano nini?
  • Lamuká!—2009
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Esalemaki wapi?
  • Ezali na zulunalo oyo
  • Nani azali na kati ya molɔngɔ ya bankɔkɔ ya Yesu?
  • BIYANO
  • Okopesa eyano nini?
    Lamuká!—2008
  • Okopesa eyano nini?
    Lamuká!—2009
  • Okopesa eyano nini?
    Lamuká!—2010
  • Mpo na kotalela na libota
    Lamuká!—2010
Lamuká!—2009
g 4/09 lok. 31

Okopesa eyano nini?

Esalemaki wapi?

1. Yesu azalaki wapi ntango amataki likoló?

LISALISI: Tángá Misala 1:6-12.

Zingá engumba yango na karte oyo.

Ngomba Kalemele

Ngomba Gelizimi

Ngomba ya Olive

Hebeloni

Mwa moke liboso Yesu azonga na likoló, bayekoli na ye batunaki ye likambo nini?

․․․․․

Yesu alobaki ete bayekoli na ye bakosala nini?

․․․․․

MPO NA KOSOLOLA:

Maloba ya anzelu oyo ezali na Misala 1:11 ekokisamaki ndenge nini? Okoki kosala nini mpo na kopesa mabɔkɔ na mosala oyo Yesu apesaki bayekoli na ye, ndenge elobelami na Misala 1:8?

Ezali na zulunalo oyo

Yanolá na mituna oyo, mpe tyá vɛrsɛ to bavɛrsɛ oyo esengeli.

LOKASA 4 Biblia elobi ete Eliya azalaki moto ya ndenge nini? Yakobo 5:․․․

LOKASA 7 Moto asengeli kobika na nini? Matai 4:․․․

LOKASA 19 Nani akoki kotikala penepene koleka ndeko? Masese 18:․․․

LOKASA 20 Ezalaka mpe na ntango mpo na nini? Mosakoli 3:․․․

Nani azali na kati ya molɔngɔ ya bankɔkɔ ya Yesu?

Talelá makambo oyo ekoki kosalisa yo. Tángá bavɛrsɛ. Na nsima, komá bankombo oyo esengeli na bisika oyo batye mikɔlɔtɔ.

2. ․․․․․

LISALISI: Na boyangeli na ngai, Hilikiya amonaki ‘mokanda ya mobeko ya Yehova oyo apesaki na nzela ya Moize.’

Tángá 2 Ntango 34:1, 14.

3. ․․․․․

LISALISI: Nazalaki guvɛrnɛrɛ ya liboso ya Bayuda oyo azongaki na Yisalaele nsima ya boombo na Babilone.

Tángá Hagai 1:14.

4. ․․․․․

LISALISI: Nazalaki mosali ya mabaya.

Tángá Matai 1:16; 13:55.

BIYANO

1. Ngomba ya Olive.

◼ Batunaki Yesu soki akozongisa Bokonzi ntango nini.

◼ Yesu alobaki ete bayekoli na ye bakozala batatoli na ye tii na esika eleki mosika na mabelé.

2. Yosiya.​—Matai 1:10.

3. Yelubabele.​—Matai 1:12.

4. Yozefe.​—Matai 1:16.

[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 31]

Center circle: Oxford Scientific/​photolibrary

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto