Engbunduka oyo ezangá bapinɛ
EUTI NA MOKOMI NA BISO NA HONG KONG
LIBOSO bámata na engbunduka yango na Shanghai, na Chine, bato ya mobembo bayebaka ete bakosala mobembo na engbunduka moko oyo ekeseni na misusu. Bakamwaka lisusu makasi ntango engbunduka etiki gare mpe ebandi kokende mbangu makasi, na vitɛsi ya kilomɛtrɛ koleka 430 na ngonga; mpe na ndenge yango ezali engbunduka ya mombongo oyo etambolaka mbangu koleka bingbunduka nyonso na mokili. Esalaka mobembo ya kilomɛtrɛ 30 tii na libanda ya mpɛpɔ ya Pudong na boumeli ya miniti mwambe mpamba. Kasi, engbunduka yango ezali na likambo moko oyo ekesenisi yango na bingbunduka mosusu: ezali na bapinɛ te!
Na mokili mobimba, kaka nzela ya engbunduka ya Shanghai tii Pudong nde esalemá mpo engbunduka oyo ezangá pinɛ to maglev etambola. Na esika engbunduka yango etambola na bapinɛ ya bibende, etambolaka nde na mayele babengi champ magnétique. Mpe na esika moto nde atambwisaka yango, etambwisamaka nde na ordinatɛrɛ oyo ekɛngɛlaka yango ntango nyonso mpe elakisaka bato oyo bazali kosala na gare ndenge engbunduka ezali kotambola. Bato oyo basalaka na gare basalelaka mpe baordinatɛrɛ mpo na kotala malamumalamu ndenge engbunduka yango ezali kotambola.
Maglev ekeseni na bingbunduka mosusu
Kosala engbunduka ya ndenge wana mpe nzela na yango ezalaki pɛtɛɛ te. Na ndakisa, ntango engbunduka yango ezali kotambola, ntaka oyo ekabolaka yango na rayi ezali moke mpenza. Na yango, lokola mabelé ya Shanghai ezalaka pɛtɛpɛtɛ, ba-ingénieur babakisaki mwa bibende na rayi mpo esimba mabelé wana ya pɛtɛpɛtɛ. Bazwaki mpe bibongiseli mpo na kobatela bibende mpo enyangwa te ntango mɔtɔ (température) ekómi makasi.
Atako bongo, ndenge maglev esalemá ezali na matomba mingi. Na ndakisa, engbunduka yango ebimisaka makɛlɛlɛ ya motɛrɛ to ya bapinɛ te; ebimisaka mpe milinga to gaze ya mabe te. Kobongisa yango mpe rayi na yango ezalaka na mosala mingi te. Lisusu, kura oyo maglev ekosalela mpo na komema motángo moko boye ya bato mpe kokómisa bango na esika moko boye ezali moke mpenza soki tokokanisi yango na oyo motuka mpe mpɛpɔ ekoki kosalela. Kutu, kura oyo engbunduka yango esalelaka ntango etɛlɛmi, ezali moke koleka oyo esalelaka mpo na kotya malili na kati na yango! Engbunduka yango ekoki mpe komata bangomba mpe koleka na mabunu (virages) ya makasi mpenza koleka engbunduka oyo ezali na bapinɛ; na yango esɛngaka te ete bábongisela yango lisusu nzela.
Nsima ya kotalela matomba oyo nyonso, tokoki komituna mpo na nini basalá bamaglev ebele te. Ntina ya liboso ezali ete kosala engbunduka yango esɛngaka mbongo mingi. Kutu, bakonzi ya Chine bakataki mpo na mwa ntango misala ya kotonga nzela ya maglev kolongwa Shanghai tii Pékin, mpo mbongo oyo elingaki kobima eleki mbala mibale oyo elingaki kobima mpo na kotonga nzela ya engbunduka ya bapinɛ. Lisusu, maglev etambolaka te ndenge bingbunduka mosusu ya Chine etambolaka.
Mpo na kotambwisa maglev ya Shanghai, basalelaka mayele ya siansi ya bato ya Allemagne, mpe bazali kokoba kosala bolukiluki na likambo yango na Allemagne, Japon mpe na bikólo mosusu. Na Desɛmbɛ 2003, ntango bamekaki maglev ya libosoliboso ya Japon, maglev yango etambolaki na vitɛsi ya kilomɛtrɛ 581 na ngonga moko, vitɛsi oyo eleki makasi na mokili mobimba. Atako bongo, maglev ya Shanghai eleki kaka.
Ntango maglev etikaka Pudong mpo na kozonga na Shanghai, miso ya bato nyonso ya mobembo etalaka na esika oyo elakisaka vitɛsi, mpe bazalaka na mposa makasi ya komona vitɛsi ya nsuka. Mpo na mbala ya liboso, bato oyo bakɔti na engbunduka yango bamonaka mpenza te bazamba; na yango, basalaka mobembo mpo na mbala ya mibale. Ntango bazali komona bazamba ezali koleka mbangumbangu na miso, bayebaka mpo na nini bato mosusu babengaka maglev “mpɛpɔ oyo ezangi mapapu.”
[Etanda/Bitanda na lokasa 18]
MAGLEV ETAMBWISAMAKA NDENGE NINI?
Ba-emá oyo etambwisamaka na kura (1) ekangisamá na wagɔ mokomoko, mpe ba-emá oyo ezali na nse ya rayi ya maglev (2) etombolaka engbunduka yango tii ntango ba-emá wana mibale ekokabwana na ntaka ya santimɛtrɛ soki moko. Ba-emá mosusu (3) esalisaka engbunduka yango mpo etɛlɛma semba. Babobine (4) oyo ezali na rayi ekutanaka na ba-emá mpe ebimisaka nguya oyo etambwisaka maglev.
Mpo na kobatela kura, bato oyo batambwisaka engbunduka yango na nzela ya ordinatɛrɛ batindaka kura na rayi (5) kaka soki engbunduka ekómi na esika yango. Batindaka kura mingi na bisika oyo engbunduka esengeli kobakisa vitɛsi to komata ngomba. Ntango elingi kokitisa vitɛsi to kokende na ngámbo mosusu, bakitisaka nguya ya babobine oyo ezalaka na rayi.
EZALAKA NA LIKAMA TE?
Ata soki maglev etambolaka na vitɛsi ya makasi, bansɔngɛ na yango (6) ekangamaka makasi na rayi, mpe yango esalisaka engbunduka yango mpo ekwea te. Bato oyo bazali na kati ya engbunduka yango basɛngisami te kolata nsinga oyo babengaka ceinture de securité, mpe bazalaka na bonsomi ya kotambolatambola na kati ata soki engbunduka yango ezali na vitɛsi makasi. Soki kura ekei, ba-frein oyo esalaka na ba-batterie, ekitisaka vitɛsi ya engbunduka tii na kilomɛtrɛ 10 na ngonga. Na yango, engbunduka ekómaka kotambola malɛmbɛmalɛmbɛ tii ntango ekotɛlɛma.
Nguya oyo ebimaka na ba-emá ya maglev ezali na likama mpo na bato ya mobembo oyo balataka masini babengi stimulateur cardiaque? Bolukiluki ya minganga emonisi ete ezali na likama te. Kutu, nguya oyo ba-emá yango ebimisaka ezali moke soki tokokanisi yango na oyo ya bingbunduka mosusu.
[Bililingi na lokasa 18, 19]
Esalaka kilomɛtrɛ koleka 430 na ngonga!
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 18]
Nkasa 18 mpe 19: bafɔtɔ nyonso mpe bilembo: © Fritz Stoiber Productions/Courtesy Transrapid International GmbH & Co. KG