Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g05 8/4 nk. 19-21
  • Bazali kobundana na nsɔmɔ ya likambo bateroriste basalaki

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bazali kobundana na nsɔmɔ ya likambo bateroriste basalaki
  • Lamuká!—2005
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Mpasi oyo eyaka nsima ya komona likambo ya nsɔmɔ
  • Mokolo oyo Izini moko ezikaki
    Lamuká!—2003
  • Zwá matomba na mateya oyo eleki malamu mpo na moto nyonso!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
  • Yehova asungi ngai na bomoi na ngai mobimba
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • “Awa ezali biso na Mosala oyo . . . , Tozali kotika Te”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
Lamuká!—2005
g05 8/4 nk. 19-21

Bazali kobundana na nsɔmɔ ya likambo bateroriste basalaki

EUTI NA MOKOMI NA BISO NA ESPAGNE

NA MOKOLO ya 11 Marsi 2004, engumba ya Madrid, na ekólo Espagne, eninganaki na lokito ya babɔmbi zomi oyo epanzanaki na bagarɛ misato ya bingbunduka. Babɔmbi yango epanzanaki mbala moko na bingbunduka minei, ebomaki bato 190 mpe bato 1800 bazokaki.

Lokola babɔmbi yango epanzanaki na ntɔngɔ, ntango bato mingi bakendaka mosala, bingbunduka yango etondaki na bato, mpe likama wana ezalaki nsɔmɔ mpenza. Aroa, mwasi moko oyo amonaki likambo yango na miso, alobi boye: “Namonaki wagɔ moko epumbwe likoló mɛtrɛ moko mpo lokito elekaki makasi. Ntango nabimaki na engbunduka, esika wana nyonso ekómaki lokola esika ya etumba. Ezalaki mpenza nsɔmɔ komona bibembe ndenge wana na miso.” Makambo ya nsɔmɔ ya ndenge wana esalemaki na bingbunduka minei mpe na bawagɔ zomi. Bateroriste batikaki basakosi ya mokɔngɔ, oyo batondisaki babɔmbi, na kati ya bingbunduka mpe basalelaki batelefone ya mabɔkɔ mpo na kopanza yango.

Mpo na bato mosusu oyo bazalaki na bingbunduka yango, likambo wana ya nsɔmɔ etikalá na makanisi na bango te. Kasi bamosusu ebele, lokola Aroa, bazali naino kobundana na bampasi oyo likama yango etikelá bango na nzoto mpe na makanisi. Aroa alobi boye: “Lokito ya babɔmbi ebebisá matoyi na ngai, kasi makambo ya nsɔmɔ oyo namonaki nde ezongelaka ngai mingi na makanisi mpe enyokolaka ngai mingi.”

Aroa alobi lisusu boye: “Likambo ya esengo, lokola nazali Motatoli ya Yehova, nazwaki lisalisi mingi. Ndenge bipai nyonso na mokili mobimba bandeko bazalaki kobenga ngai na telefone mpe kokomela ngai mikanda, esalisaki ngai namona ete tozali libota ya bandeko na mokili mobimba. Lisusu, Biblia ezali kosalisa biso na koyeba mpo na nini makambo ya nsɔmɔ ya ndenge wana ezali kosalema. Nalimbolelaki baninga na ngai mosusu ya mosala ete Biblia esakolaki ete na ‘mikolo ya nsuka,’ bato bakongala mpe bakozanga bolingo ya libota. Namonaka mpe ete mosala na ngai ya mobongisi-nzela ekitisaka mpasi na ngai.”​—⁠2 Timote 3:​1-3.

Pedro azali moko ya bato oyo bazokaki makasi. Azalaki na ntaka ya mɛtrɛ soki minei pembeni na bɔmbi oyo epanzanaki na wagɔ oyo ye azalaki. Ntango bɔmbi epanzanaki epumbwisaki ye mpe akweaki na mabelé, azokaki bampota mingi na motó mpe azalaki lisusu kopema malamu te. Nsima ya kolekisa mikolo mitano na lopitalo na esika oyo batyaka bato oyo bazali na maladi makasi, akómaki mwa malamu. Lokola ebele ya Batatoli bayaki kotala ye, amiyokaki malamu mpe yango ekamwisaki balifulume oyo bazalaki kosalisa ye. Lifulume moko alobaki boye: “Na mbula 26 oyo nasali awa, naino namoná te bato ebele boye bazali koya kotala moto ya maladi mpe kopesa ye biloko ebele boye!” Pedro asepelaki mingi na minganga mpe balifulume oyo basalisaki ye. Alobi boye: “Bazalaki bato malamu mpenza. Basalisaki ngai mingi mpo nabika.”

Bato mingi oyo bazwaki likama, bazalaki bapaya oyo bautaki kokóma na Espagne. Manuel, moto moko ya ekólo Cuba, azokaki ntango bɔmbi ya liboso epanzanaki na garɛ ya Atocha mpe azalaki lisusu koyeba eloko te ntango bɔmbi ya mibale epanzanaki. Alobi boye: “Lokola tozalaki kokima mpo na kobanga, nakweaki na libumu na garɛ mpe bato banyataki ngai. Ntango makanisi ezongaki, mikuwa na ngai mibale ya mpanzi ebukanaki, nabukanaki lokolo moko, mpe litoyi na ngai moko ezalaki lisusu koyoka te.”

Manuel alobi ete: “Bapolisi, bato oyo batambwisaka ba ambulance, mpe bato oyo babomaka mɔtɔ, bayaki nokinoki mpe basalisaki biso malamu mpenza.” Manuel alobi lisusu boye: “Bango bayebaki malamu oyo basengelaki kosala, mpe lokola bamesani na mosala na bango, basalisaki bato na ndenge ya malamu, mpe bato batikaki kokima mpe kobanga ekitaki. Bapesaki ngai bankisi oyo esengelaki mpe basalelaki ngai makambo na ndenge ya boboto mpe na motema mawa.”

Mpasi oyo eyaka nsima ya komona likambo ya nsɔmɔ

Lokola Aroa, likama wana etiká mpe Manuel na bilembo na motema. Alobi boye: “Eleki mwa mikolo, nabangaki makasi ntango namataki na engbunduka. Nakitaki mbala moko. Tii lelo oyo, nabangaka mingi soki namoni moto moko na kati ya bisi amemi sakosi ya mokɔngɔ to eloko moko ya ndenge wana. Kasi, nazwaki lisalisi mingi koleka bato mosusu, atako moto moko te ya libota na ngai azali na Espagne. Ebele ya Batatoli ya Yehova babengaki ngai na telefone, mpe libota moko ya Batatoli basɛngaki ngai nakende kolekisa mwa mikolo epai na bango mpo namiyoka te ete nazali kaka ngai moko. Lisalisi wana ya koloba te, oyo eutaki na bandeko na biso ya mokili mobimba, esalaki ete nazala na motema ya kokita.”

Sergio azalaki na kati ya engbunduka kasi azokaki te, atako bongo, makambo ya nsɔmɔ oyo amonaki enyokolaka ye mikolo nyonso. Bɔmbi moko epanzanaki na wagɔ oyo ezalaki liboso ya wagɔ oyo azalaki, mpe mosusu na wagɔ oyo ezalaki nsima ya wagɔ oyo azalaki. Lokola Manuel, Sergio mpe azali na botɔndi ndenge libota na ye ná bandeko na ye Batatoli basalisaki ye na bolingo nyonso. Alobi boye: “Bamonisaki kaka te ete balingaka ngai, kasi namonaki mpe ete nazali kati na libota ya mokili mobimba oyo ezali na bomoko, oyo esalisanaka. Bandeko basalisaki ngai ndenge wana mokolo na mokolo mpe lokola bazalaki kobenga ngai mingi na telefone, yango ezalaki kosalisa ngai naloba oyo nazali koyoka, likambo oyo ezalaki mpasi mpo na ngai.”

Bato mosusu oyo bazalaki na bingbunduka banyokwamaki na ndenge mosusu. Diego afandaki pene na moko ya bɔmbi minei oyo epanzanaki te. Abimaki na engbunduka kozanga ete azoka. Alobi boye: “Kasi, sikoyo nazali koyoka lokola namemi ngambo mpo nasalisaki bato oyo bazokaki te. Na nsɔmɔ wana, nabimaki na garɛ nokinoki elongo na ebele ya bato oyo bazalaki kokima moto na moto na ndenge na ye.”

Mpo na nsɔmɔ ya lokito ya bɔmbi oyo epanzanaki na engdunduka oyo azalaki, Ramón, elenge mobali moko ya Brésil, azalaki lisusu kokoka koningana te. Atako bongo, mikolo mibale na nsima, akendaki koyebisa bato mosusu nsango ya Bokonzi. Ramón akutanaki na mobali moko, moto ya ekólo Portugal; oyo ayebisaki Ramón ete azali koluka lingomba ya solo. Ramón abandaki koyekola Biblia na moto yango oyo abandaki mbala moko koyangana na makita. Ramón alobi boye: “Soki okoki kosalisa basusu na elimo, okomiyoka yo moko malamu koleka.”

Na ntembe te, ekosɛnga ntango mpo bato nyonso wana bábosana mpasi oyo likama yango etikeli bango na nzoto mpe na makanisi. Likambo ya mawa, tozali kobika na eleko oyo mobulu ya bozoba ekoki kobima ata na esika nini. Lisusu, atako mitinda ya elimo ekoki kosalisa bato yango na kobosana mpasi na bango, kaka Bokonzi ya Nzambe nde ekosilisa makambo ya nsɔmɔ ya ndenge wana mpo na libela.​—⁠Emoniseli 21:​3, 4.

[Etanda/Bililingi na lokasa 21]

BAZWAKI MAKASI YA ELIMO MPO NA KOBUNDANA NSƆMƆ YANGO

Manuel Suárez

“Atako nazalaki naino na nsɔmɔ mpe nazalaki kozela bámema ngai na lopitalo, nakanisaki mbala na mbala maloba ya Masese 18:​10: ‘Nkombo ya Yehova ezali ndako molai na nguya. Moyengebene akokima kuna mpe akobika.’ Maloba yango epesaki ngai makasi.”

Aroa San Juan

“Ntango likambo ya ndenge wana esalemi, tomonaka mpenza ete tozali kobika na mikolo ya nsuka mpe ete tosengeli komipesa mingi na makambo ya elimo. Mosala na ngai ya mobongisi-nzela esalisi ngai mingi mpo nabosana makambo ya nsɔmɔ oyo namonaki.”

Fermín Jesús Mozas

“Atako nazokaki bampota na motó, nasalisaki baninga mosusu oyo bazokaki mpe nalendisaki bango. Nakanisi ete soki nazalaki na kimya, ezali mpo na elikya ya lisekwa oyo Nzambe apesi biso, elikya oyo epesaka biso makasi na bantango ya ndenge wana.”

Pedro Carrasquilla

“Ntango nazalaki na lopitalo, na esika oyo batyaka bato ya maladi makasi, nazalaki koyoka mpasi makasi na ntolo, mbala mingi maloba ya 1 Timote 6:​19 ezalaki koyela ngai na makanisi. Maloba yango elendisaka biso tómibombela moboko kitoko mpo na mikolo ezali koya mpo tósimba makasi bomoi ya solosolo. Vɛrsɛ yango esalisaki ngai nakanisa elikya na biso ya Paladiso, oyo Nzambe alaki bato oyo balingaka ye. Tozwaka makasi ya kosala mpo tozali na elikya yango.”

[Elilingi na lokasa 19]

Na likoló: Bazali kosalisa bato bazoki ná baoyo bazali pene na kokufa, na nzela ya engbunduka na garɛ ya Atocha

[Eutelo ya bafɔtɔ]

Foto ya likoló: CORDON PRESS

[Elilingi na lokasa 19]

Na lobɔkɔ ya mobali: Esika mpo na kokanisa bato oyo bakufi

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto