Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g 4/09 nk. 5-6
  • Tokozwa biyano wapi?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tokozwa biyano wapi?
  • Lamuká!—2009
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Tobotamaka na mposa yango
  • Kokisá bamposa na yo ya elimo
  • Ntina oyo tozali na mokili
    Lamuká!—2009
  • Ndenge ya kokokisa bamposa na yo ya elimo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
  • Mozalisi akoki kosala ete bomoi na yo ezala na ntina mingi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • Lolenge ya malamu mpenza ya kokokisa bamposa na yo ya elimo
    Lamuká!—2002
Makambo mosusu
Lamuká!—2009
g 4/09 nk. 5-6

Tokozwa biyano wapi?

MOKO ya mikano ya lingomba ezalaka ya kolakisa bato ntina ya bomoi. Nzokande, bato mingi bamonaka ete mangomba ekokisaka te bamposa na bango ya elimo. Denise, elenge mwasi moko oyo abɔkwamá na libota moko ya Bakatolike alobi boye: “Na buku ya Katekisimo (Catéchisme de Baltimore), ezali na motuna oyo: ‘Mpo na nini Nzambe akelá biso?’ Mpe epesi eyano oyo: ‘Nzambe akelá biso mpo na komonisa bolamu na ye mpe kokabola elongo na biso esengo na ye ya seko na likoló.’”

Denise abakisi boye: “Kasi, yango esalisaki ngai te nayeba ntina oyo tozali na mokili. Soki nazali kozela nakende na likoló, nazali kosala nini awa?” Bato mingi bakanisaka lokola Denise. Ankɛtɛ moko emonisaki ete bato mingi (2/3) oyo batunaki mituna bandimaka ete mangomba mingi esalisaka bato te báyeba ntina ya bomoi.

Yango wana, bato mingi balukaka kozwa biyano yango na siansi mpe na bafilozofi ya ndenge na ndenge. Mpo na nini bato bazali kokoba koluka biyano, atako mingi te nde bazali kozwa biyano oyo ebongi?

Tobotamaka na mposa yango

Kevin Seybold, moto moko ya mayele, abengi yango “mposa oyo moto nyonso azalaka na yango ya kosambela.” Na bambula euti koleka, bato ya mayele bamonaki ete bato bakelamá na mposa makasi ya koyeba ntina ya bomoi. Bamosusu kutu balobaka ete ndenge oyo moto ekelamá etindaka ye aluka kosambela.

Atako bato ya mayele bayokani naino te na likambo yango, tozelaka te báyebisa biso soki tozalaka na mposa yango to te. Mposa ya elimo oyo tobotamá na yango nde etindaka biso tómituna motuna ya ntina mingi oyo: Mpo na nini tozali na mokili? Tosengeli kosala nini na bomoi na biso? Ezali na Mozalisi oyo tosengeli kozongisa monɔkɔ epai na ye?

Soki totali biloko oyo ezali na mokili, tokozwa biyano na mituna yango mosusu. Na ndakisa, tótala biloko ya kokamwa oyo ezali na molɔ́ngɔ́, kobanda na eloko oyo ya moke mpenza tii na bamilio ya bagalaksi oyo ezali mosika na likoló. Nyonso wana emonisaka biso te ete ezali na Mozalisi moko ya mayele? Biblia elobi ete: “Mpo bizaleli [ya Nzambe] oyo emonanaka te ezali komonana polelepolele banda na kozalisama ya mokili, mpamba te yango emonanaka na nzela ya biloko oyo esalemá, ɛɛ nguya na ye ya seko mpe Bonzambe na ye, yango wana bazali kutu na likambo ya koloba te.”​—Baloma 1:20.

Kokisá bamposa na yo ya elimo

Mpo na ndenge oyo Nzambe akelá bato, Biblia elobi boye: “Atii mpe lobiko kati na mitema na bango.” (Mosakoli 3:11) Tobotamaka na mposa ya kozala ntango nyonso na bomoi kozanga kokufa. Tolukaka mpenza koyeba ntina ya bomoi, kozwa biyano na mituna.

Koluka biyano emonisaka ete tozali bato. Nsima ya kolobela makambo minene oyo bato ya mayele basali, mokomi ya zulunalo moko (The Wall Street Journal) akomaki boye: “Kasi naino toyebi te soki toutá wapi mpe mpo na nini tozali na mokili mpe soki tokendaka wapi soki tokufi.” Tosengeli koluka biyano yango na esika oyo ebongi. Mpo na yango, Biblia elobi boye: “[Nzambe] nde asalaki biso, kasi biso moko te.”​—Nzembo 100:3, NW.

Omoni te ete ebongi mpenza tótalela Ye oyo akelaki biso mpo na kokokisa bamposa na biso ya elimo? Yesu Klisto alendisaki biso tósala bongo. Ayebaki ete kaka liziba ya bomoi, elingi koloba, Mozalisi na biso, nde akoki kokokisa mposa na biso ya elimo.​—Nzembo 36:5, 9; Matai 5:3, 6.

Ya solo, tokokokisa mposa na biso ya elimo, soki tozwi eyano ya malamu na motuna: Mpo na nini tozali na mokili? Tosɛngi yo otalela likanisi ya Mozalisi na biso na likambo yango.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto