Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w04 1/2 nk. 4-7
  • Ndenge ya kokokisa bamposa na yo ya elimo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ndenge ya kokokisa bamposa na yo ya elimo
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Lingomba ya solo elendisaka bato na kokokisa bamposa ya elimo
  • Biblia ezali mokanda malamu mpo na kokokisa bamposa ya elimo
  • Ezali na ntina tósala molende?
  • Kozala moto ya elimo elimboli nini? Nakoki kozala moto ya elimo ata soki nazali kosambela na lingomba moko te?
    Biyano na mituna ya Biblia
  • Kozala na boyokani na Nzambe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • Kobá kozala moto ya elimo!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2018
  • Ozali moto ya mosuni to moto ya elimo?
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2019
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
w04 1/2 nk. 4-7

Ndenge ya kokokisa bamposa na yo ya elimo

NA ZULUNALO moko (U.S.News & World Report), bakomaki boye: “Na mbula zomi oyo eleki, babimisaki babuku koleka 300 (buku lokola Jesus CEO to mpe The Tao of Leadership) oyo ezali kolobela ntina ya makambo ya elimo na mosala ya moto.” Likambo yango ezali kaka komonisa ete na mikili ya bozwi, ebele ya bato bakómi na mposa ya makambo ya elimo na bomoi na bango. Mpo na yango, zulunalo moko (Training & Development) elobi boye: “Na eleko oyo siansi ekɔti na makambo nyonso ya bomoi na biso, tozali koluka ndimbola ya solosolo mpe ntina ya bomoi mpe ndenge ya kozwa bolamu ya solo.”

Kasi, ndenge nini okoki komona nzela ya malamu na makambo ya elimo? Kala, bato bazalaki kokɔta na mangomba ya minene mpo na koyeba “ndimbola ya solosolo” mpe “ntina” ya bomoi. Lelo oyo, mingi bapesi mangomba mokɔngɔ. Na zulunalo oyo touti kolobela, bayebisi ete batunaki bakambi minene ya bakompanyi motuna yango mpe biyano na bango emonisi ete “bato bazali mpenza kokesenisa mangomba mpe bamposa ya elimo.” Bato yango balobaki ete mangomba “endimaka bokeseni te mpe ekabolaka bato,” nzokande bamposa ya elimo ezali “mposa ya moto nyonso mpe esangisaka bato nyonso.”

Na mikili lokola Australie, Nouvelle-Zélande, Angleterre mpe na Mpoto, epai bato mingi bamipesaka na makambo ya Nzambe te, bilenge mingi bazali komonisa ete bokeseni ezali kati na mangomba mpe bamposa ya elimo. Na zulunalo moko (Youth Studies Australia), Profesɛrɛ Ruth Webber akomaki boye: “Bilenge mingi bandimaka ete Nzambe azali, to ete ezali na nguya moko oyo eleki bato, kasi bamonaka ntina to litomba te ya kozala bandimi ya mangomba mpo na kokokisa bamposa na bango ya elimo.”

Lingomba ya solo elendisaka bato na kokokisa bamposa ya elimo

Tokoki kokamwa te soki bato bazali mpenza kosepela na mangomba te. Mangomba mingi emikɔtisi na makambo ya politiki mpe etondi na bokosi mpe ezali na nyongo ya makila ya bato oyo bazali kokufa na ebele ya bitumba oyo ezali kosalema mpo na mangomba. Kasi bato mosusu oyo baboyi mangomba oyo etondi na lokuta, bazali mpe koboya Biblia mpo bazali kokanisa ete Biblia endimaka makambo wana.

Nzokande, Biblia eboyi lokuta mpe kotyola mibeko. Yesu alobaki na bakonzi ya mangomba ya ntango na ye boye: “Mawa na bino, bakomeli mpe Bafalisai, bakosi! mpamba te bokokani na malita oyo epakolami mpɛmbɛ, oyo libándá na yango emonani solo kitoko kasi na kati etondi na mikuwa ya bakufi mpe na bosɔtɔ ya ndenge nyonso. Bino mpe ndenge moko, na libándá bomonanaka mpenza bayengebene na miso ya bato, kasi na kati botondi na bokosi mpe na botyoli-mibeko.”​—Matai 23:27, 28.

Lisusu, Biblia elendisaka baklisto ete bákɔta na makambo ya politiki te. Kutu, na bokeseni na ndenge bato mosusu bakanisaka, Biblia elendisaka bandimi na kobomana te, yango eteyaka ete bango bándima ata kokufa mpo na bamosusu. (Yoane 15:12, 13; 18:36; 1 Yoane 3:10-12) Lingomba ya solo, oyo eteyaka mpenza Biblia, “eboyaka bokeseni mpe ekabolaka bato” te; kasi “esangisaka bato nyonso.” Ntoma Petelo alobaki: “Nzambe aponaka bilongi te, kasi na ekólo nyonso moto oyo azali kobanga ye mpe azali kosala boyengebene andimami na ye.”​—Misala 10:34, 35.

Biblia ezali mokanda malamu mpo na kokokisa bamposa ya elimo

Biblia elobi ete Nzambe akelá bato na elilingi na ye. (Genese 1:26, 27) Elingi koloba te ete bato bazali na nzoto lokola ya Nzambe; elingi nde koloba ete bato bazali na likoki ya komonisa bizaleli ya Nzambe, lokola bamposa ya makambo ya elimo.

Na bongo, tokoki kolikya ete Nzambe abongisá ndenge oyo tokoki kokokisa bamposa na biso ya elimo mpe apesá batoli ebongi mpo tóyeba kokesenisa makambo oyo ekoki kosalisa biso na elimo mpe oyo ekoki kobebisa biso. Nzambe asalá nzoto na biso na likoki ya kobundisa bamikrobɛ oyo epesaka maladi, ndenge moko mpe, apesá biso lisosoli oyo esalisaka biso tóyeba kozwa bikateli ya malamu mpe tóboya misala oyo ekoki kosala biso mabe na nzoto mpe na elimo. (Baloma 2:14, 15) Ndenge toyebi yango, mpo nzoto na biso ebundisa bamaladi, tosengeli koleisa yango malamu. Ndenge moko mpe, tosengeli kolyaka bilei malamu ya elimo mpo na koteya lisosoli na biso.

Yesu amonisaki bilei oyo ekoki kobatela elimo na biso malamu ntango alobaki boye: “Moto asengeli kobika, kaka na mampa te, kasi na liloba nyonso oyo ezali kobima na monɔkɔ ya Yehova.” (Matai 4:4) Biblia ezali maloba ya Yehova mpe “ezali na litomba mpo na koteya, kopamela, kosembola makambo.” (2 Timote 3:16) Na yango, biso nde tosengeli kosala molende mpo na kolya bilei ya elimo. Soki toyebi Biblia mpe tozali kosala makasi ya kolanda mitinda na yango na bomoi na biso, tokozwela yango matomba na elimo mpe na nzoto.​—Yisaya 48:17, 18.

Ezali na ntina tósala molende?

Ya solo, esɛngaka ntango mpo na koyekola Biblia mpe kokóma makasi na elimo; nzokande, ekómi mpasi mpo na kozwa ntango. Kasi, ezali na ntina tósala molende! Tótalela maloba ya bato mosusu oyo bazali na misala, oyo bamonisi mpo na nini kokokisa bamposa ya elimo ezali na ntina mpo na bango.

Marina, azali monganga, alobi boye: “Liboso, nazalaki mpenza kokanisa bamposa na ngai ya elimo te tii ntango nakómaki kosala na lopitalo moko mpe nakómaki koyoka mawa mingi na komona ndenge bato mosusu bazali konyokwama. Na ntango yango nde namonaki ete mpo nazala na esengo mpe na kimya, nasengeli koyeba bamposa na ngai ya elimo mpe kokokisa yango, mpamba te na mosala lokola oyo ya ngai, moto akoki kobanda komitungisa na komona ndenge bomoi ezali mokuse mpe mpo na mikakatano ya bato mosusu.

“Sikoyo nazali koyekola Biblia na Batatoli ya Yehova. Boyekoli yango esalisi ngai natalela misala mpe bamposa na ngai na ndenge ya malamu mpe nakóma kokanisa mingi makambo ya malamu, mpo natambwisa bomoi na ngai malamu. Nasepelaka mingi na mosala na ngai. Kasi koyekola Biblia nde ebongisi makanisi na ngai, esalisi ngai naboyaka makanisi ya mabe, namitungisaka mingi te, nazala motema molai mpe nayokelaka bato mawa. Kolanda batoli ya Biblia esalisi ngai mpe na libala na ngai. Likambo eleki ntina ezali ete nayebi sikoyo Yehova mpe namoni mwa moke ndenge oyo elimo na ye ezali kosala epai na ngai, yango esali ete bomoi na ngai ezala na ntina.”

Nicholas, asalaka baplan ya ndako, alobi boye: “Liboso nabanda koyekola Biblia na Batatoli ya Yehova, nazalaki kokipe makambo ya Nzambe te. Mokano na ngai ezalaki kaka ete nalonga na mosala na ngai. Boyekoli ya Biblia elakisi ngai ete bomoi ya moto ezali kaka mosala te mpe ete kosala mokano ya Yehova epesaka bolamu ya solosolo mpe ya libela.

“Nasepelaka na mosala na ngai, kasi Biblia nde eteyi ngai ntina ya kotya makambo ya elimo na esika ya liboso mpo na kozala na bomoi ya mindɔndɔ te. Yango wana, ngai ná mwasi na ngai tokimi mitungisi mingi oyo bato bamibendelaka na koluka biloko mingi ya mokili. Lisusu, tokómi na ebele ya baninga ya solosolo lokola tozali kosangana na bato oyo batalelaka bomoi ndenge moko na biso.”

Vincent, azali avoka, alobi boye: “Mosala ya malamu ekoki kopesa moto mwa esengo. Kasi, namoni sikoyo ete esengeli eloko mosusu mpo na kozwa bolamu mpe esengo. Nazali koyeba lisusu ete liboso nayeba mateya ya Biblia na likambo yango, namonaki na mbala moko ete bomoi ezali na ntina moko te: kobotama, kokola, kobala, kosala mpo na koleisa bana, koteya bango bálanda kaka bomoi ya ndenge yango, mpe nsukansuka konuna mpe kokufa.

“Nsima ya koyekola Biblia na Batatoli ya Yehova nde nazwaki biyano ya malamu na mituna oyo nazalaki komituna mpo na ntina ya bomoi. Boyekoli ya Biblia esalisi ngai nayeba ete Yehova azali solo mpe nakóma kolinga ye mingi. Yango esalisi ngai nazala makasi na elimo wana nazali kosala makasi mpo na kosala mokano ya Nzambe. Lelo oyo, ngai ná mwasi na ngai tozali na esengo ya koyeba ete tozali kotambwisa bomoi na biso na ndenge oyo eleki malamu.”

Yo mpe okoki kozala na bomoi oyo ezali na ntina soki oyekoli Biblia. Batatoli ya Yehova bakosepela kosalisa yo. Lokola Marina, Nicholas, mpe Vincent, yo mpe okoki koyoka esengo oyo moto ayokaka ntango ayebi Yehova mpe makambo oyo akani kosala mpo na bato nyonso mpe mpo na yo. Okozala na esengo ya komona ete bamposa na yo ya elimo ekokokisama mpe okozwa elikya ya bomoi ya seko, elikya oyo ezali kaka mpo na bato oyo “bayebi bobola na bango ya elimo.”​—Matai 5:3.

Moko ya makambo oyo ekoki kosalisa biso na kokolisa mposa na biso ya elimo ezali libondeli. Yesu ateyaki bayekoli na ye ndenge ya kobondela; alakisaki bango Libondeli ya Nkolo. Libondeli yango ezali na ntina nini mpo na yo lelo oyo? Matomba nini ekoki kopesa yo? Okozwa biyano na mituna yango na masolo mibale oyo elandi.

[Bililingi na lokasa 6]

Marina

[Bililingi na lokasa 7]

Nicholas

[Bililingi na lokasa 7]

Vincent

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto