Okoki kokolisa makoki na yo ya kokanga makambo!
“Likoki ya kokanga makambo na motó esalisaka biso tóyeba makambo mingi. Soki likoki yango ezalaki te, elingaki kozala mpasi mpo tómikundwelaka makambo; tolingaki kobanda ata komiyeba te liboso ya talatala. Mikolo nyonso, makambo elingaki kozala kaka sika mpo na biso; tolingaki koyeba te epai touti mpe epai tozali kokende.”—“LES MYSTÈRES DE L’ESPRIT” (Angl.).
MPO na nini bandɛkɛ mosusu, ata nsima ya basanza mingi, bamikundwelaka esika oyo babombaki bilei na bango mpo na eleko ya malili mpe bisende bakoki komikundwela esika oyo bakundaki ndika na bango, kasi moto akoki kobosana esika oyo atye fungola, nsima ya ngonga moko mpamba? Ya solo, bato mingi bamilelaka ete babosanaka mingi. Nzokande, bɔɔngɔ ya moto, atako ezali ya kozanga kokoka, ezali na makoki ya kokamwa ya koyekola mpe komikundwela makambo. Sɛkɛlɛ ezali koyeba kosalela yango.
Ezali na makoki ya kokamwa
Bɔɔngɔ ya moto ezalaka na kilo 1,4 mpe ezalaka monene lokola pamplemousse, kasi ezali na baselile soki miliare 100, yango nyonso ekutanákutaná. Kutu, selile moko mpamba ekoki kokangana na baselile mosusu 100 000. Yango epesaka bɔɔngɔ likoki ya kosala malamu mpe kokanga makambo mingi. Kasi, mokakatano ezalaka nde komikundwela makambo, ntango tozali na mposa na yango. Bato mosusu bazalaka makasi mpo na komikundwela makambo ata soki batángá kelasi to mpe batángá te.
Na ndakisa, na Afrika ya Wɛsti, ezali na bato moko oyo babengaka ba griots, bato yango bakoki kotánga na motó, bankombo ya bankɔkɔ ya bankɔkɔ na bango. Basalisaki Alex Haley, mokomi moko ya Amerika, oyo buku na ye (Racines) ezwaki mbano monene oyo babengaka prix Pulitzer, ayeba bankɔkɔ ya bankɔkɔ na ye na Gambie, tii na libota ya motoba. Haley alobi boye: “Nazali na botɔndi mingi mpo na bato yango ya Afrika—Namoni mpenza ntina oyo balobaka ete soki griot moko akufi ezali lokola nde bibliotɛkɛ mobimba eziki.”
Tózwa mpe ndakisa ya Arturo Toscanini, mokambi moko monene ya bayembi na Italie, oyo bamonaki makoki na ye mpo na mbala ya liboso ntango azalaki na mbula 19, ntango basɛngaki ye akamba bayembi na esika ya mokambi mosusu oyo azalaki te. Atako azalaki komona malamu te, akambaki bayembi ya Aïda, banda na ebandeli tii na nsuka, kaka na motó!
Makambo ya ndenge wana ekoki kokamwisa biso. Kasi, bato mingi bazalaka na makoki ya komikundwela makambo koleka kutu ndenge bango moko bakoki kokanisa. Olingi kokolisa makoki na yo ya kobomba makambo na motó?
Okoki kokolisa makoki yango
Mpo na kokanga makambo na motó esɛngaka makambo misato: Kozwa makambo, kobomba yango, mpe komikundwela yango. Ntango omoni to oyoki likambo, bɔɔngɔ na yo ezwaka likambo yango mpe ebombaka yango mpo na komikundwela yango na nsima. Tobosanaka soki moko ya makambo misato wana esalemi te.
Makoki ya kokanga makambo ezali ndenge na ndenge; na ndakisa likoki ya kokanga makambo na nzela ya biyokeli, ya kokanga makambo mpo na ntango mokuse, mpe likoki ya kokanga makambo mpo na ntango molai. Likoki ya kokanga makambo na nzela ya biyokeli esalemaka na nzela ya koyoka, komona mpe kosimba. Likoki ya kokanga makambo mpo na ntango mokuse, ezwaka makambo mikemike mpe esimbaka yango kaka mpo na mwa ntango. Yango esalaka ete moto akoka kosangisa mituya na motó, amikundwela nimero moko ya telefone oyo azali kobenga, mpe amikundwela maloba ya liboso ya fraze wana azali kotánga maloba oyo elandi. Kasi, ndenge toyebi yango, likoki ya kokanga makambo na motó mpo na ntango mokuse ezalaka na ndelo na yango.
Soki olingi kobomba makambo mpo na libela, osengeli kokɔtisa yango na eteni ya bɔɔngɔ na yo oyo ebombaka makambo mpo na ntango molai. Ndenge nini okoki kosala yango? Makambo oyo elandi ekosalisa yo.
◼ Kosepela Sepelá na likambo oyo ozali koyekola mpe kobosana te ntina oyo ozali koyekola yango. Ndenge oyebi yango, soki osepeli na likambo moko, okobosana yango te. Yango ekoki kosalisa bayekoli ya Biblia. Ntango bazali kotánga Biblia na mokano ya kopusana penepene na Yehova mpe ya koteya basusu, ekosalisa bango bábosana makambo yango te.—Masese 7:3; 2 Timote 3:16.
◼ Likebi Buku moko (Les Mystères de l’esprit) elobi boye: “Mbala mingi tobosanaka makambo mpo totyaki likebi te.” Nini ekosalisa yo otyaka likebi? Sepelá na makambo oyo ozali koyoka, mpe soki likoki ezali komá yango. Kokoma makambo ekosalisa yo kaka te otya likebi, kasi ekosalisa yo mpe ozongela makambo yango nsima.
◼ Kokanga ntina Ntango okangi ntina te ya liteya moko, ekozala mpasi omikundwela yango malamu. Kokanga ntina esalisaka moto amona ndenge oyo likanisi mokomoko eyokani na liteya mobimba. Na ndakisa, ntango moyekoli moko ya mekaniki ayebi ndenge masini moko esalaka, akomikundwela malamu makambo mosusu ya mikemike ya masini yango.
◼ Kotya na molɔngɔ Tyá esika moko makambo to makanisi oyo ekokani. Na ndakisa, ezalaka pɛtɛɛ komikundwela biloko mikemike oyo olingi kosomba soki otye yango na molɔngɔ—misuni, ndunda, bambuma, mpe bongo na bongo. Lisusu, kabolá makambo yango na biteni mosusu mitano to nsambo ya mikemike. Na ndakisa, mbala mingi ezalaka mpasi te kokanga na motó nimero ya telefone soki tokaboli mituya na yango mibalemibale. Na nsima, ekozala malamu otya makambo yango na molɔngɔ, mbala mosusu na kolanda balɛtrɛ ya alfabɛ.
◼ Bozongeli Kozongela na mongongo makasi makambo oyo olingi kobosana te (na ndakisa liloba to maloba ya monɔkɔ oyo ozali koyekola) ekolamusa makoki mosusu ya bɔɔngɔ na yo. Ndenge nini? Ya liboso, koloba na mongongo makasi ekotinda yo otya likebi mpenza na liloba yango. Ya mibale, molakisi na yo akoki kosembola yo ntango olobi liloba yango mabe. Ya misato, koyoka yo moko makambo oyo ozali koloba ekotinda biteni mosusu ya bɔɔngɔ na yo esala mosala.
◼ Salá lokola ozali komona Salá lokola ozali komona makambo oyo olingi kobosana te. Ekozala mpe malamu oyema yango. Ndenge moko na bozongeli, komona na makanisi makambo oyo olingi kobosana te etindaka biteni mosusu ya bɔɔngɔ esala mosala. Ntango biteni mingi ya bɔɔngɔ ezali kosala mosala, ekokóma mpe pɛtɛɛ mpo likambo yango etikala na bɔɔngɔ.
◼ Koyokanisa Ntango ozali koyekola likambo moko ya sika, yokanisá yango na likambo moko oyo oyebi. Soki ozali koyokanisa makambo oyo ozali koyekola na oyo oyebi, ekozala mpasi te okanga mpe omikundwela makambo yango. Na ndakisa, mpo na komikundwela nkombo ya moto, yokanisá yango na enama moko ya nzoto na ye to na eloko mosusu oyo ekosalisa yo omikundwela nkombo yango. Soki ezali eloko moko oyo ezali kosekisa yo, ekozala pɛtɛɛ omikundwela. Na mokuse, tosengeli kokanisaka bato mpe biloko oyo tolingi kobosana te.
Buku moko (Searching for Memory) elobi boye: “Soki na bomoi na biso tokanisaka na mozindo te makambo oyo ezali zingazinga na biso mpe makambo oyo toyekolá to oyo toyebi, tokozala na likoki te ya kokanga makambo mingi.”
◼ Kofandisa Zwaká ntango ya kofandisa makambo. Ndenge eleki malamu ya kosala yango ezali ya kozongela makambo oyo oyekolaki, mbala mosusu koyebisa yango na moto mosusu. Soki ozali na likambo moko ya kitoko to otángaki likambo moko oyo elendisaki yo na Biblia, to na mokanda moko oyo elimbolaka Biblia, yebisá yango na moto mosusu. Na ndenge yango, bino mibale bokozwa litomba—bɔɔngɔ na yo ekokanga likambo yango mpe moninga na yo akolendisama. Yango wana, balobaka ete “bozongeli ezali mama ya zebi.”
Batekiniki mosusu
Na ntango ya kala, bato ya Grèce mpe ya Loma bazalaki kosala masolo milai kozanga kotala papye. Ndenge nini bazalaki kosala? Bazalaki kosalela batekiniki ndenge na ndenge oyo ezalaki kosalisa bango bákanga makambo na motó mpe bámikundwela yango ntango bazali kosala masolo na bango.
Tekiniki moko oyo bazalaki kosalela ezali oyo babengi loci, oyo Simonides, Mogrɛki moko oyo azalaki kokoma maloba ya ntɔki alobelaki mpo na mbala ya liboso na mobu 477 L.T.B. Tekiniki yango esangisi kotya makambo na molɔngɔ, kosala lokola ozali komona bililingi, mpe koyokanisa yango na likambo moko oyo omeseni na yango, na ndakisa elembo moko na nzela to eloko moko ya ndako. Bato oyo basalelaka tekiniki yango basalaka lokola nde bazali kotambola na makanisi, bazali koyokanisa eteni mokomoko ya likambo yango oyo balingi komikundwela na elembo to na eloko moko. Ntango balingi komikundwela likambo yango, basalaka lokola nde bazali kotambola na nzela yango oyo ezali na makanisi na bango.—Talá etanda “Salá lokola ozali kotambola na makanisi.”
Bolukiluki oyo esalemaki epai ya bato oyo balongaki na momekano monene ya kokanga makambo na motó oyo esalemaka mbula na mbula, emonisaki ete soki bato yango balongaki ezalaki te mpo bazalaki na mayele soki ya ndenge nini. Lisusu, mingi kati na bango bazalaki na mbula 40 to 50. Sɛkɛlɛ na bango ezalaki nini? Mingi kati na bango balobaki ete basalelaki batekiniki ndenge na ndenge ya kokanga makambo na motó.
Olingi kokanga maloba ebele na motó? Tekiniki ya malamu mpo na kolonga ezali oyo babengi acronyme, oyo esɛngaka kozwa lɛtrɛ ya liboso ya liloba mokomoko to ya maloba oyo olingi kokanga mpe kosala liloba ya sika. Na ndakisa, mpo na komikundwela bankombo ya balaki minene ya mboka na bango, bato mingi ya Amerika ya Nɔrdi, bakanisaka liloba “HOMES,” oyo esangisi balɛtrɛ mitano ya liboso ya bankombo ya balaki yango: Huron, Ontario, Michigan, Erie, mpe Superior. Tekiniki mosusu oyo ekokani na yango ezali oyo babengi acrostic, oyo Baebele ya kala bazalaki kosalela mingi. Na ndakisa, na banzembo mingi, liloba ya liboso ya vɛrsɛ mokomoko ebandi na lɛtrɛ moko ya alfabɛ ya Liebele. (Talá Nzembo 25, 34, 37, 111, 112, mpe 119.) Yango ezalaki kosalisa bayembi bámikundwela bavɛrsɛ nyonso 176 ya Nzembo 119!
Ya solo, yo mpe okoki kokolisa makoki na yo ya kokanga makambo. Ndenge bolukiluki emonisi yango, bɔɔngɔ na biso ekokani na binama mosusu ya nzoto na biso. Ntango tozali kosalisa yango mosala ekómaka makasi, ata na bobange.
[Etanda na lokasa 23]
MAKAMBO MOSUSU
◼ Mpo na kokolisa makoki na yo ya kokanga makambo, yekolá makambo ya sika, na ndakisa monɔkɔ mosusu, kobɛta gitare to kosalela eloko mosusu ya miziki.
◼ Tyá likebi na yo na makambo ya ntina.
Yekolá batekiniki mosusu ya kokanga makambo na motó.
◼ Mɛlaká mai mingi. Kozanga komɛla mai ekoki kobulunganisa makanisi na yo.
◼ Laláká mingi. Bɔɔngɔ na biso ebombaka makambo ntango tolali.
Zwáká ntango ya kopema ntango ozali koyekola. Kozanga kopema elɛmbisaka bɔɔngɔ.
◼ Kolekisaka ndelo te na komɛla masanga; komɛlaka mpe likaya te. Masanga ebebisaka likoki ya kokanga makambo mpo na ntango mokuse mpe milangwa esilisaka vitamini B na nzoto, vitamini oyo esalaka ete bɔɔngɔ esala malamu. Likaya elongolaka oxygène na bɔɔngɔ.a
[Maloba na nse ya lokasa]
a Makanisi yango euti na zulunalo moko (Brain & Mind).
[Etanda na lokasa 24]
SALÁ LOKOLA OZALI KOTAMBOLA NA MAKANISI
Ndenge nini okoki komikundwela liste ya biloko mikemike oyo olingi kosomba, na ndakisa mampa, maki, miliki, mpe mantɛka? Na lisalisi ya tekiniki oyo babengi loci, okoki komona yango na makanisi na yo wana ozali kosala lokola nde ozali kotambola na ndako na yo.
Moná na makanisi kusɛ ya kiti na yo ete ezali limpa
soso efandeli maki likoló ya mwinda
mbisi ezali kotambola na kati ya molangi ya miliki
mpe mantɛka oyo bapakoli na talatala ya televizyo
Soki likambo yango ezali kosɛkisa yo mpe ezali likambo oyo esalemaka te, ekozala pɛtɛɛ omikundwela yango! Ntango okómi na magazini, salá lokola nde ozali kotambola na makanisi.
[Etanda na lokasa 25]
SEPELÁ NDENGE OBOSANAKA!
Kanisá ndenge bomoi na yo elingaki kozala soki ozalaki komikundwela makambo nyonso, ezala ya ntina to te. Makanisi na yo elingaki kozala na mobulungano, boye te? Kutu, zulunalo moko (New Scientist) elobi ete mwasi moko oyo azalaki komikundwela makambo nyonso oyo ekomelá ye na bomoi alobaki ete “makanisi na ye ezalaki ‘kopema te, mpe azalaki kokoka kotambwisa yango te mpe likambo yango ezalaki kolɛmbisa ye,’ ezalaki ‘kilo’” mpo na ye. Likambo ya esengo, mingi kati na biso tozalaka bongo te, mpamba te bato ya mayele balobaka ete bɔɔngɔ na biso ezali na likoki ya kolongola makambo ezangá ntina to mpe makambo oyo eleká kala. Zulunalo yango (New Scientist) ebakisi ete “kobosana na ndenge ya malamu emonisaka ete bɔɔngɔ na biso ezali kosala malamu. Ntango tobosani likambo moko ya ntina, . . . tókanisa te ete bɔɔngɔ na biso ebebi.”