Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • be lok. 17-lok. 20 par. 3
  • Okoki kobongisa makoki na yo ya kokanga makambo na motó

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Okoki kobongisa makoki na yo ya kokanga makambo na motó
  • Zwá matomba na mateya ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Sepelá na makambo yango
  • Zongeláká makambo oyo otángi
  • Manyolá likoló na makambo ya ntina
  • Mosala ya elimo ya Nzambe
  • ‘Kobosana te’
  • Ndenge nini okoki kotanga mpe kosimba makambo otangi
    Mokanda mpo na Eteyelo ya mosala ya Nzambe
  • Okoki kokolisa makoki na yo ya kokanga makambo!
    Lamuká!—2009
  • Tózwa matomba na botángi ya Biblia mokolo na mokolo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
  • Omipesa na kotánga
    Zwá matomba na mateya ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
Makambo mosusu
Zwá matomba na mateya ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
be lok. 17-lok. 20 par. 3

Okoki kobongisa makoki na yo ya kokanga makambo na motó

YEHOVA NZAMBE asalaki bɔɔngɔ ya moto na likoki moko ya kokamwa: komikundola makambo. Asalaki yango ezala lokola esika ya kobomba biloko oyo ekobunga te mpe okoki kozwa yango lisusu. Ndenge Nzambe asali bɔɔngɔ eyokani mpenza na mokano na ye ete bato bázala na bomoi ya seko.​—Nz. 139:14; Yoa. 17:3.

Kasi mbala mosusu ozali komona ete obosanaka makambo mingi oyo okangaki na motó. Ntango oyo ozali na mposa ya makambo moko boye, makambo yango ezali koya te. Okoki kosala nini mpo okangaka makambo na motó malamu koleka?

Sepelá na makambo yango

Mpo na kokóma na makoki ya kokanga makambo na motó, ezali na ntina ete osepela na makambo yango. Soki tomeseni kotala makambo oyo bato bazali kosala, soki tozali kosepela na bato mpe na makambo oyo ezali koleka na esika tozali, bɔɔngɔ na biso ekokanga makambo yango. Ntango mpe totángi to toyoki likambo moko oyo ekopesa biso bolamu ya solosolo, ekozala mpasi te ete tókanga yango na motó mpamba te tozali kosepela na yango.

Ekómaka mbala mingi ete moto abosana nkombo ya bato mosusu. Kasi biso baklisto toyebi ete bato bazali na ntina mingi, ezala bandeko na biso baklisto to bato oyo toteyaka bango to mpe bato mosusu oyo tosalaka na bango makambo ya ntina na bomoi na biso. Nini ekoki kosalisa biso tóbosana te nkombo ya bato yango? Ntoma Paulo atángaki nkombo ya bato koleka 26 ya lisangá moko epai atindaki mokanda. Emonani ete azalaki kosepela na bango mpamba te ayebaki kaka bankombo na bango te, kasi alobelaki lisusu makambo mosusu ya bato yango. (Lom. 16:3-16) Batatoli mosusu ya Yehova oyo bazali bakɛngɛli-batamboli, bakangaka mpenza bankombo ya bato, atako batalaka lisangá moko na pɔsɔ moko. Nini esalisaka bango? Ntango bazali kosolola na moto mpo na mbala ya liboso, basalaka makasi ete básalela nkombo ya moto yango mbala mingi. Basalaka makasi ete bákanga nkombo mpe elongi ya moto yango. Lisusu, balekisaka ntango elongo na bato mingi na mosala ya kosakola mpe ntango bazali kolya esika moko na bango. Ntango okutani na moto moko, oyebaka lisusu nkombo na ye? Libosoliboso, luká koyeba ntina oyo osengeli kokanga nkombo na ye mpe na nsima, salá lokola tolobi awa.

Esengeli mpenza ete obosanaka te makambo oyo ozali kotánga. Eloko nini ekoki kosalisa yo obongisa likambo oyo? Ezali mpe na ntina mingi ete osepela na likambo yango mpe okanga ntina na yango. Mpo otya mpenza likebi na yo nyonso na makambo oyo ozali kotánga, osengeli mpenza kosepela na yango. Okokanga ata likambo moko te soki makanisi na yo ezali epai mosusu ntango ozali kotánga. Okokanga malamu mpenza ntina ya likambo moko soki oyokanisi yango na makambo oyo omeseni na yango to na makambo oyo oyebi banda kala. Omituna: ‘Ndenge nini mpe ntango nini nakoki kosalela makambo oyo na bomoi na ngai moko? Ndenge nini nakoki kosalela yango mpo na kosalisa moto mosusu?’ Okokanga ntina ya likambo malamu koleka soki ozali kotánga fraze mobimba to maloba mingi mbala moko, na esika ya kotánga liloba mokomoko. Boye okokanga nokinoki makanisi mingi oyo ezali wana mpe okoyeba wapi oyo ezali na ntina mingi, na bongo, okobosana yango mpenza te.

Zongeláká makambo oyo otángi

Balakisi mingi ya minene bamonisi ete kozongela makambo oyo otángi ezali na ntina mingi. Profɛsɛrɛ moko ya iniversite, oyo asalaka bolukiluki, amonisi ete soki olekisi miniti moko mpo na kozongela nokinoki makambo oyo otángaki, okokanga makambo mbala mibale koleka oyo okangaki liboso. Yango wana, ntango kaka osilisi kotánga makambo nyonso oyo ozali kotánga to otángi kaka mwa makambo mosusu, na makanisi na yo, zongelá makanisi ya ntina mpo etikala na bɔɔngɔ. Kanisá ndenge oyo okoki kolimbola na maloba na yo moko likambo nyonso ya sika oyo oyekoli. Soki na nsima okokanisa lisusu likambo oyo okangaki na motó, yango ekosala ete etikala na bɔɔngɔ na yo ntango molai.

Na mwa mikolo oyo ekolanda, luká kozongela makambo oyo otángaki, yebisá bato mosusu makambo yango. Okoki koyebisa yango na moto moko ya libota na yo, ya lisangá to na moninga moko ya mosala, ya kelasi, ya kartye to mpe na moto moko oyo okutani na ye na mosala ya kosakola. Kosuka kaka te na kozongela makambo ya ntina, kasi salá makasi osimba mpe lolenge ya kolimbola mikapo oyo eyokani na yango. Soki osali bongo, okozwa matomba, ekosalisa yo okanga makambo ya ntina na motó mpe bato mosusu bakozwela yango mpe matomba.

Manyolá likoló na makambo ya ntina

Longola kozongela makambo oyo otángaki mpe koyebisa yango na bato mosusu, okomona lisusu ete soki ozali komanyola likoló na makambo ya ntina oyo oyekolaki, okozwa matomba. Asafa na Davidi, bakomi ya nzembo ya Biblia, basalaki bongo. Asafa alobaki boye: “Tiká nakanisa lisusu yango esalaki [Yah]; tiká nakanisa misala na yo ya kokamwa, yango na kalakala. [Nakomanyola mpe likoló na, NW] mosala na yo nyonso, [nakosepela na, NW] nyonso esali yo.” (Nz. 77:11, 12) Davidi mpe akomaki boye: “Na ntango ya butu nazali komanyola likoló na yo.” Akomaki lisusu boye: “Nakobanza mikolo na kalakala; [nakomanyola likoló na, NW] misala na yo nyonso.” (Nz. 63:6, NW; 143:5) Osalaka bongo?

Soki ozali kokanisa misala ya Yehova malamumalamu ndenge wana, soki ozali kokanisa bizaleli na ye mpe ndenge azali kokokisa mokano na ye, okosuka kaka te na kokanga makambo na motó. Soki okómi na momeseno ya kokanisa bongo, yango ekosalisa yo okɔtisa mpenza makambo yango ya ntina na motema na yo. Ekobongola mpenza bomoto na yo mpe makambo oyo etikali na motó na yo ekomonisa mpenza makanisi oyo ezali na motema na yo.​—Nz. 119:16.

Mosala ya elimo ya Nzambe

Tozangi lisungi te ntango tozali koluka kokanisa likoló na mateya ya solo oyo etali misala ya Yehova mpe makambo oyo Yesu Klisto alobaki. Na butu ya mokolo oyo ezalaki liboso ya liwa na ye, Yesu ayebisaki bayekoli na ye boye: “Ntango nazalaki elongo na bino nalobelaki bino makambo wana. Kasi mosungi yango, elimo santu, oyo Tata akotinda na nkombo na ngai, ye nde akoteya bino makambo nyonso mpe akozongisa na makanisi na bino makambo nyonso oyo nayebisaki bino.” (Yoa. 14:25, 26) Matai na Yoane bazalaki wana. Elimo santu ezalaki mpenza mosungi na bango? Ɛɛ, ezali mpenza bongo! Mbula mwambe na nsima, Matai asilisaki kokoma makambo oyo Klisto asalaki, bakisa mpe makambo ya ntina mingi oyo etikalá na makanisi na bango, lokola Lisolo Likoló ya Ngomba mpe makambo mingi oyo etali elembo ya kozala ya Klisto mpe ya nsuka ya makambo ya ntango oyo. Mbula ntuku motoba na mitano nsima ya liwa ya Yesu, ntoma Yoane akomaki Evanzile na ye, oyo ezali mpe na makambo mingi oyo Yesu alobaki na butu ya nsuka oyo alekisaki elongo na bantoma na ye liboso akaba bomoi na ye. Ntembe ezali te ete Matai na Yoane babatelaki malamu na mitó na bango makambo oyo Yesu alobaki mpe asalaki ntango azalaki na bango, kasi elimo santu esalaki mosala monene, mpamba te esalisaki bango bábosana te makambo ya ntina oyo Yehova alingaki ete ezala na Liloba na ye oyo ekomami.

Elimo santu ezali mpe mosungi ya basaleli ya Nzambe lelo oyo? Ɛɛ! Ezali solo ete elimo santu ekɔtisaka te na makanisi na biso makambo oyo toyekolaki te, kasi ezali mosungi mpamba te ezali kosalisa biso tókanisa lisusu makambo ya ntina oyo toyekolaki liboso. (Luka 11:13; 1 Yoa. 5:14) Na nsima, ntango oyo tozali na mposa na yango, ekolendisa biso ‘tókanisa lisusu maloba oyo elobamaki kala na basakoli basantu mpe komandema ya Nkolo mpe Mobikisi.’​—2 Pet. 3:1, 2.

‘Kobosana te’

Mbala na mbala, Yehova akebisaki Yisalaele boye: ‘Kobosana te.’ Yango elingi koloba te ete basengelaki komikundola mpenza makambo nyonso. Kasi basengelaki te kotalelaka kaka makambo oyo etali bango moko mpe kobosana makambo oyo Yehova asalelaki bango. Basengelaki ntango nyonso kobatela na makanisi na bango ndenge Yehova abikisaki bango ntango anzelu na ye abomaki bana ya liboso nyonso na Ezipito mpe ndenge Yehova akabolaki Mai Motane mpe akangaki yango mpo na koboma Farao na basoda na ye. Bayisalaele basengelaki te kobosana ete Nzambe apesaki bango Mibeko na ye na Ngomba Sinai, atambwisaki bango na esobe mpe amemaki bango na Mokili ya Ndaka. Basengelaki te kobosana yango, elingi koloba ete basengelaki ntango nyonso kokanisa makambo yango mpo eyokana na makambo oyo bazali kosala na bomoi na bango ya mokolo na mokolo.​—Det. 4:9, 10; 8:10-18; Ex. 12:24-27; Nz. 136:15.

Biso mpe tosengeli kokeba ete tóbosanaka te. Ntango tozali koyika mpiko na mikakatano ya bomoi, tosengeli kokanisa Yehova, tosengeli ata moke te kobosana soki azali Nzambe ya ndenge nini mpe bolingo oyo amonisaki mpo na biso na ndenge akabaki Mwana na ye, oyo apesaki lisiko mpo na masumu na biso mpo tózala na bomoi ya kokoka mpe ya seko. (Nz. 103:2, 8; 106:7, 13; Yoa. 3:16; Lom. 6:23) Mpo na kobatela solo wana ya ntina mingi ete esalaka ntango nyonso mosala na kati na biso, tosengeli kotánga Biblia mokolo na mokolo, koyangana mpe kopesa biyano na makita mpe kosakola na molende.

Ntango osengeli kozwa ekateli, ezala ya monene to ya moke, kanisá solo wana, yango ezali na ntina mingi, mpe tiká ete otalela yango. Kobosana te. Talelá Yehova ete atambwisa yo. Na esika ya kotalela makambo na lolenge ya mosuni to kondima makanisi ya motema na biso oyo ezangi kokoka, omituna boye: ‘Toli nini to etinda nini ya Liloba ya Nzambe etali ekateli oyo nalingi kozwa?’ (Mas. 3:5-7; 28:26) Okoki te kokanisa makambo oyo otángi naino te to oyo oyoki naino te. Kasi wana boyebi na yo ya solosolo mpe bolingo na yo mpo na Yehova ezali kokola, okoyeba makambo mingi oyo elimo ya Nzambe ekoki kosalisa yo okanisa yango. Mpe lokola bolingo na yo mpo na Nzambe ezali se koya makasi, yango ekotinda yo osala makambo oyo eyokani na boyebi yango.

NDENGE YA KOKOLISA MAKOKI YA KOKANISA MAKAMBO OTÁNGAKI

  • Nsima ya kotánga mwa baparagrafe, omituna: ‘Likanisi nini ya ntina nauti kotánga?’ Soki oyebi yango lisusu te, talá lisusu na mokanda mpe luká yango

  • Ntango osilisi kotánga mokapo moko to lisolo mobimba, omituna lisusu motuna yango. Tángá makanisi nyonso ya ntina. Soki oyebi yango lisusu malamu te, talá lisusu na mokanda mpe zongelá makambo oyo outi kotánga

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto