Biblia elobi nini?
Osengeli komona mabe bátumba nzoto ya mowei?
Bato mosusu bakanisaka ete kotumba nzoto ya mowei mpo ekóma putulu ezali kosambwisa nzoto mpe ekaniseli ya mowei. Bamonaka ete ‘momeseno yango euti na bapakano; na yango, bato oyo balobaka ete basambelaka Nzambe basengeli koboya yango.’ Bato mosusu bamonaka ete kotumba nzoto ya mowei ezali malamu mpenza mpe ezali ndenge ya lokumu ya kolimwisa nzoto ya moto oyo akufi. Yo omonaka yango ndenge nini?
NA NTANGO ya kala, bato bazalaki na momeseno ya kokunda bawei. Na ndakisa, Abalayama akundaki mwasi na ye Sala na lidusu moko. Nzoto ya Yesu etyamaki na lilita oyo batimolaki na kati ya libanga. (Genese 23:9; Matai 27:60) Biblia emonisi ete kaka kokunda ebembe nde lolenge oyo ebongi mpo na kolimwisa nzoto ya mowei? Emonisi nde ete basaleli ya Nzambe ya ntango ya kala bazalaki koboya kotumba nzoto ya mowei?
Elakisi ete Nzambe aboyi yango?
Soki otángi mikapo mosusu ya Biblia likolólikoló, emonisaka lokola nde bazalaki kotumba kaka bibembe ya bato oyo bakufaki na lokumu mabe na miso ya Nzambe. Na ndakisa, Mibeko ya Moize elobaki ete soki mwana mwasi ya nganga-nzambe ya Yehova akómi ndumba, esengeli koboma ye mpe na nsima, ‘kozikisa ye’ na mɔtɔ. (Levitike 20:10; 21:9) Ndenge moko mpe, ntango kozanga botosi ya Akana ná libota na ye esalaki ete Yisalaele elonga te na etumba na Ai, bato ya Yisalaele babomaki Akana ná libota na ye na mabanga mpe na nsima “bazikisaki bango na mɔtɔ.” (Yosua 7:25) Bato mosusu ya mayele balobaka ete bazalaki kosala bongo mpo na bato oyo bakufaki na lokumu mabe na miso ya Nzambe mpe ete kotumba bibembe ya basali mabe ndenge wana ezalaki nde kopimela bango lokumu ya kokundama na ndenge ya malamu.
Lisusu, ntango Mokonzi Yosiya alongolaki losambo ya bikeko na Yuda, apanzaki bankunda ya banganga-nzambe oyo bapesaki Baala bambeka mpe atumbaki mikuwa na bango likoló ya bitumbelo na bango. (2 Ntango 34:4, 5) Bandakisa wana emonisi nde ete Nzambe aboyaka bato oyo nzoto na bango etumbami? Lisolo mosusu ya Biblia emonisi ete ezali bongo te.
Ntango Bafilistia balongaki Saulo, mokonzi ya Yisalaele na etumba, na kozanga limemya, bakakisaki nzoto na ye mpe ya bana na ye misato na efelo ya engumba Bete-sana. Kasi, ntango Bayisalaele oyo bazalaki kofanda na Yabese-gilada bayokaki ndenge basalaki banzoto yango na kozanga limemya, balongolaki yango mpe batumbaki yango, mpe na nsima bakundaki mikuwa. (1 Samwele 31:2, 8-13) Soki otángi lisolo yango likolólikoló, okoki kokanisa ete endimisi ete kotumba ebembe ekoki kosalema kaka mpo na moto mabe. Mpo Saulo mpe azalaki moto mabe; abundisaki Davidi, mopakolami ya Yehova, mpe akufaki na lokumu mabe na miso ya Nzambe.
Kasi, kanisá banani bakufaki elongo na Saulo. Moko na bana na ye, oyo nzoto na ye mpe etumbamaki, ezalaki Yonatana. Azalaki moto mabe te. Kutu, Yonatana azalaki nde moninga ya motema mpo na Davidi mpe azalaki kosalisa ye. Mpo na Yonatana, Bayisalaele balobaki ete: “Asalani mosala na Nzambe elongo.” (1 Samwele 14:45) Ntango Davidi ayokaki makambo oyo bato ya Yabese-gilada basalaki, akumisaki bango mpe apesaki bango botɔndi mpo na oyo basalaki: “Bópambwama na [Yehova] mpo ete bozalaki na boboto oyo epai ya nkolo na bino, ye Saulo.” Emonani polele ete Davidi ayokaki mabe te ndenge batumbaki nzoto ya Saulo mpe ya Yonatana.—2 Samwele 2:4-6.
Ekoki kopekisa lisekwa te
Biblia eteyaka polele ete Yehova Nzambe akozongisa na bomoi ebele ya bato oyo bakufá. (Mosakoli 9:5, 10; Yoane 5:28, 29) Mpo na kolobela ntango oyo bakufi bakozonga na bomoi, mokanda ya Emoniseli (na Lifalanse Apocalypse) esakoli boye: “Mbu ezongisaki bakufi oyo bazalaki na kati na yango, mpe liwa ná Hadesi ezongisaki bakufi oyo bazalaki na kati na yango.” (Emoniseli 20:13) Mpo na kokokisa likambo yango, na miso ya Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso, ezala nzoto ya moto ekundamaki, etumbamaki, ebungaki na mai, nyama ya zamba elyaki yango, to mpe epanzanaki na bɔmbi atomiki, bokeseni ezali te.
Biblia epesi malako ya sikisiki te na oyo etali ndenge ya kosala na nzoto ya bato oyo bakufi. Yehova apekisi kotumba nzoto ya mowei te. Kasi, emonani polele ete kokunda to kotumba nzoto ya mowei esengeli kosalema na ndenge ebongi mpe na limemya.
Nzokande, likambo oyo ekoki kosalisa moto ntango azali kozwa bikateli na oyo etali bibongiseli yango, ezali ndenge oyo bato ya mboka na ye batalelaka likambo yango. Na ntembe te, bato oyo batosaka mitinda ya Biblia bakolinga kosala ata likambo moko te oyo ekotungisa bato mosusu. Ekozala mpe malamu te kosangana na molulu oyo ekoki komonisa ete tozali kondima mateya ya mangomba ya lokuta, na ndakisa liteya oyo elobaka ete molimo ekufaka te. Longola nyonso wana, kozwa ekatali mpo na ndenge moto alingi bálimwisa nzoto na ye, to ya moto mosusu ntango ya liwa, ezali nde likambo na ye moko to ya libota na ye.
OSILÁ KOMITUNA?
◼ Nzoto ya mosambeli nini ya sembo oyo Biblia elobi ete etumbamaki?—1 Samwele 31:2, 12.
◼ Davidi asalaki nini na bato oyo batumbaki nzoto ya Saulo?—2 Samwele 2:4-6.
◼ Nini emonisi ete kotumbama ya nzoto ya moto ekopekisa te ete asekwisama?—Emoniseli 20:13.
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 27]
Biblia epesi malako ya sikisiki te na oyo etali ndenge ya kosala na nzoto ya bato oyo bakufi