Kozonga na mputulu lolenge nini?
“OZALI mputulu, mpe okozonga kati na mputulu.” Ntango moto ya liboso, Adama, ayokaki maloba wana, ayebaki nini asengelaki komizela na yango. Akelamaki na mputulu ya mabelé mpe asengelaki kozonga bobele na mputulu. Asengelaki kokufa mpamba te azangaki kotosa Mozalisi na ye, Yehova Nzambe.—Genese 2:7, 15-17; 3:17-19.
Biblia ezali komonisa ete bato bakelamaki na mputulu. Ezali mpe koloba ete: “Molimo oyo asali lisumu—ye akokufa.” (Ezekiele 18:4; Nzembo 103:14) Kufa ememi mpasi epai na bamilió na bato mpe esili kobimisa mituna mbala na mbala na ntina etali kobomba nzoto ya bakufi.
Mimeseno ya kala mpe mimeseno ya sika
Lolenge nini bazalaki kobomba nzoto ya bakufi na libota ya Nzambe na ntango ya kala? Na eteni na yango ya liboso, Biblia elobeli mitindo ndenge na ndenge ya kobomba nzoto ya bakufi, bakisa mpe kokunda na mabelé. (Genese 35:8) Abalayama, tata na mabota mpe mwasi na ye Sala, bakisa mwana na bango Yisaka mpe mwana na mwana na bango Yakobo bakundamaki na libulu ya Makapela. (Genese 23:2, 19; 25:9; 49:30, 31; 50:13) Basambisi ya libota ya Yisalaele, Gideona mpe Samasona bakundamaki na ‘mayita ya batata na bango.’ (Basambisi 8:32; 16:31) Yango ezali komonisa ete basaleli ya Nzambe na ntango ya kala basepelaki kozala na nkunda mpo na libota. Ntango Yesu Klisto akufaki na ekeke ya liboso na T.B., nzoto na ye elalisamaki na nkunda moko ya sika oyo ebongisamaki kati na libanga monene. (Matai 27:57-60) Na yango, na momeseno, nzoto ya bakufi ezalaki kokundama na mabelé to kati na nkunda. Yango ezali likambo oyo ezali kosalema kino lelo na bipai mingi na mokili mobimba.
Nzokande, lelo oyo na bipai mosusu ya mokili, kozanga ya mabelé mpe ntalo makasi ya mabelé ezali likambo oyo lizali kokólisa mokakatano ya kozwa esika mpo na kokunda bakufi. Na bongo, bato mosusu bazali kosalela myango misusu mpo na kobomba nzoto ya bakufi.
Kobwaka mputulu nsima ya kotumba nzoto ya mokufi ezali likambo oyo likómi komonana mingi. Na Angleterre, soko 40 % ya bakufi bazali kosalelama na lolenge wana. Na Suède, epai oyo koleka 80 % ya bakufi kati na bingumba bazali kotumbama, bisika mosusu ya bazamba bibongisami mpo na kobwaka mputulu ya nzoto ya bakufi oyo etumbami. Mpe na Shanghai mpe na mwa bingumba mosusu oyo bizwami mpembeni ya mai na Chine, bayangeli ya bingumba bazali kolendisa bato mingi ete bábwaka mputulu na ebale mbala mingi na mbula.
Esika nini mputulu ya nzoto ya mokufi ekoki kobwakama? Esika nyonso te. Basusu bakoki kobanga ete kobwaka mputulu ya nzoto ya mokufi ezali kobebisa ezingelo. Nzokande, mpo na koloba solo, likámá nyonso ya bokɔnɔ ezali kosila na ntango ya kotumba nzoto ya bakufi. Na Angleterre mpe na États-Unis, bisika mosusu epai bakundaka nzoto ya bakufi basili kobongisa mpembeni na yango bitando oyo balóni landalánda (pelouse) to bilanga ya fololo mpo na kobwaka mputulu ya nzoto ya bakufi. Nzokande, baklisto batalelami mingimingi na likanisi ya Makomami mpo na oyo etali kotumba mpe kobwaka mputulu ya bakufi.
Likanisi ya Makomami ezali nini?
Na kolakeláká mabe epai na “mokonzi na Babilone,” mosakoli Yisaya alobaki ete: “Yo obwakami longwa na nkunda na yo.” (Yisaya 14:4, 19) Kobwakama ya mputulu ya nzoto ya mokufi esengeli kokokisama na kokitisama motindo wana? Te, mpamba te yango etaleli te kotumba nzoto ya mokufi mpe kobatela to kobwakama ya mputulu na yango.
Yesu Klisto alobaki na ntina na lisekwa ya bakufi na mabelé oyo ekosalema na boumeli ya boyangeli na ye ya mbula nkóto ntango alobaki ete: “Nyonso bazali kati na nkunda bakoyoka mongongo na [ngai] mpe bakobima.” (Yoane 5:28, 29) Nzokande, likambo oyo ete nkunda ya sikisiki ezali lisɛngami te mpo na kosekwisa moto endimisami na esakweli mosusu oyo ezali komonisa lisekwa. Emoniseli 20:13 elobi ete: “Mai monene ezongisi bakufi na kati na yango: Kufa na [Hadès, NW] izongisi bakufi na kati na yango.” Na yango, likambo ya ntina ezali te esika to lolenge oyo moto ‘azongaka na mputulu.’ Na esika ete ezala bongo, ezali nde soko Nzambe akanisi ye mpe asekwisami. (Yobo 14:13-15; kokanisá na Luka 23:42, 43.) Ya solo, Yehova azali te na mposa ya bankunda ya kobenda likebi mpo ete esunga ye na kokanisa bato. Kotumba nzoto ya mokufi ezali kopekisa te lisekwa ya moto. Mpe soki kobwakama ya mputulu ya nzoto ya mokufi esalemi na ntina malamu mpe kozanga milulu ya losambo ya lokuta, ekoki kozala na ekweli te na Makomami.
Baoyo bazali kozwa ekateli ya kobwaka mputulu ya nzoto ya mokufi basengeli kosala likebi na mibeko mitali mabelé. Ekozala mpe malamu mpo na bango ete bátalela mayoki ya oyo akufeli moto mpe mayoki ya basusu. Basaleli ya Yehova bakosala malamu na kozaláká na likebi na boye ete kosalela bonsomi na bango ya Makomami na likambo yango ekotuka te nkombo malamu oyo baklisto bazali komema. Yango ezali na ntina mingimingi na mikili epai oyo kotumba nzoto ya mokufi mpe kobwaka mputulu na yango epesameli ndingisa na mibeko kasi endimami naino mpenza malamu te na bato. Ya solo, moklisto asengeli komitangola na milulu to mimeseno nyonso ya bonkɔ́kɔ oyo ezwi moboko na yango na endimeli ya molimo oyo ekufaka te.
Bonsomi na makambo matali nkunda
Basusu oyo balendisaka likambo litali kobwaka mputulu ya nzoto ya mokufi balobaka ete yango elingi komonisa bonsomi na makambo matali kokundama na lilita. Nzokande, oyo ekomema kobɔndisama monene ekozala kokokisama ya elaka ya Biblia ete “moyini oyo akobukana na nsuka azali kufa.”—1 Bakolinti 15:24-28.
Yango elingi koloba ete nkunda, malita, ata kotumba mpe kobwaka mputulu ya nzoto ya mokufi, ekokóma makambo ya kala. Ɛɛ, liwa ekozala lisusu te. Na kopemama na Nzambe ntoma Yoane akomaki ete: “Nayoki mongongo makasi kobima na kiti na bokonzi ete, Tala! Efandelo na Nzambe ezali na bato esika moko. Akofanda na bango esika moko, mpe bango bakozala bato na ye, mpe Nzambe ye mpenza akozala na bango elongo. Akolongola mpisoli nyonso na miso na bango, mpe kufa ekozala lisusu te, na mawa, na kolela, na mpasi, lisusu mpe te; mpo ete makambo na liboso masili koleka.”—Emoniseli 21:3, 4.
Oyo nyonso ekoya ntango kufa ya bato oyo euti na lisumu ya Adama ekolongolama na nsé ya Bokonzi ya Nzambe. Na ntango wana bato na botosi bakotalelama lisusu te na likambo litali kozonga na mputulu.
[Bililingi na lokasa 29]
Myango ya kobomba nzoto ya bakufi oyo mimonanaka mingi
[Elilingi na lokasa 31]
Kobwaka mputulu ya nzoto ya mokufi na Sagami Bay, na mboka Japon
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Na ndingisa ya Koueisha, Tokyo