Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g 7/09 nk. 10-13
  • Napambolami mpo natyaki Nzambe na esika ya liboso

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Napambolami mpo natyaki Nzambe na esika ya liboso
  • Lamuká!—2009
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Mikakatano na mosala ya ntango nyonso
  • Bambongwana ya nsɔmɔ
  • Libota na biso ekoli na Nigeria
  • Bana bapambwami atako basalaki bakelasi milaimilai te
  • Mosala ntango tozongi na Bénin
  • Bamipesaki na bolingo na bango moko—Na Afrika ya Wɛsti
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2014
  • Kosepela na oyo nazali na yango esungaki ngai
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
  • Nakolɛmbisa mabɔkɔ ata moke te
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2018
  • Nazalaki mwana ya kilikili
    Lamuká!—2007
Makambo mosusu
Lamuká!—2009
g 7/09 nk. 10-13

Napambolami mpo natyaki Nzambe na esika ya liboso

Lisolo ya Pierre Worou

“Bonjour!” Nasalelá mbote wana ya Lifalanse bomoi na ngai mobimba. Kasi, na Novɛmbɛ 1975, bakangaki ngai mpo nasalelaki liloba yango. Tiká nayebisa bino nini ememaki na likambo yango mpe makambo nini elekaki banda wana.

NABOTAMAKI mokolo ya liboso na sanza ya Yanuali 1944, na Malété, mwa kartye moko pene na engumba Savé, na ntei ya Bénin.a Baboti na ngai bapesaki ngai nkombo Abiola, nkombo ya mboka na monɔkɔ ya Yoruba. Ntango nazalaki naino elenge, natikaki yango mpe nakómaki na nkombo ya Pierre, nkombo oyo nakanisaki ete ebongi na ntango na biso mpe eyebani mingi.

Na engumba na biso, bato bazalaki kobamba bilenge nyonso bankombo. Bapesaki ngai nkombo Pasteur mpo ntango nabotamaki, nazalaki lokola mokonzi ya lingomba ya mboka na biso. Nzokande, nazalaki kosepela mingi kobɛta bale na esika ya kolandaka mateya ya katekisimo.

Na 1959, nakendaki na Sakété, engumba moko oyo ezali na sudi ya ekólo na biso mpo na kokoba kotánga kelasi. Nazalaki kofanda na Simon, mwana ya tata nkulutu; Simon azalaki molakisi mpe autaki kobanda koyekola Biblia na Batatoli ya Yehova mibale. Na ebandeli, nazalaki kolinga te kofanda wana ntango bazali koyekola. Na nsima, natunaki Michel, mwana mosusu ya tata nkulutu soki akolinga kosangana na ngai na boyekoli yango. Andimaki, mpe na ntango wana nde nayokaki mpo na mbala ya liboso ete nkombo ya Nzambe ezali Yehova.

Mokolo moko ya lomingo, ngai, Simon ná Michel toboyaki kokende na ndako-nzambe na biso kasi tokendeki koyangana na makita ya Batatoli ya Yehova. Ntango tokómaki kuna, tolɛmbaki nzoto mingi na komona ete tozalaki kaka bato mitano​—Batatoli mibale mpe biso misato. Atako bongo, makambo oyo toyokaki endimisaki biso ete ezali solo ya Biblia mpe tokobaki koyekola. Michel nde azwaki batisimo liboso mpo na komonisa ete amipesi epai ya Nzambe. Lelo, azali mobongisi-nzela, elingi koloba Motatoli ya Yehova oyo asakolaka ntango nyonso.

Simon akendaki na nɔrdi, na engumba Kokoro, mpe ngai nakendaki na ye elongo. Liyangani moko ya Batatoli esengelaki kosalema na mboka Ouansougon. Simon azwaki motuka, kasi ngai natambolaki kilomɛtrɛ 220 na velo mpo na kokende na liyangani yango. Biso mibale tobatisamaki kuna mokolo ya 15 Sɛtɛmbɛ 1961.

Mikakatano na mosala ya ntango nyonso

Mpo na kozwa mwa eloko ya kobikela, nazalaki kosala mayemi mpe kotɛka yango; nasalaki mpe elanga moko oyo ebotaki malamu. Ntango Philippe Zannou, mokɛngɛli-motamboli moko, ayaki kotala lisangá na biso, atunaki ngai soki nakanisaka kosala mosala ya kosakola ntango nyonso. Nsima ya kosolola likambo yango, ngai ná moninga na ngai Emmanuel Fatunbi, tolobaki ete tokobanda mosala yango na sanza ya Febwali 1966. Na nsima, nakómaki mokɛngɛli-motamboli, nazalaki kotala masangá ya monɔkɔ ya Fon, ya Gun, ya Yoruba, mpe ya Lifalanse.

Nsukansuka, nakutanaki na Julienne, ndeko mwasi moko kitoko oyo azalaki kosepela kozala na bomoi ezangi mindɔndɔ lokola ngai. Akómaki mwasi na ngai mokolo ya 12 Augusto 1971, mpe tokómaki kotambola elongo mpo na kotala masangá. Mwana na biso ya mobali Bola abotamaki mokolo ya 18 Augusto 1972. Ntango tozalaki kokende kotala masangá, nazalaki kokumba velo mpe Julienne azalaki kofanda nsima na ngai, akangi Bola na mokɔngɔ. Mbala mingi, Motatoli moko ya lisangá oyo touti kotala azalaki komemela biso biloko na biso na velo na ye. Tosalaki mosala ya kotala masangá na boumeli ya mbula minei.

Mokolo moko, Julienne abɛlaki mpe atungisamaki makasi butu mobimba. Na ntɔngɔ, nabimaki na balabala mpo na koluka lisalisi. Na mbala moko, namonaki taxi moko; ezalaki likambo ya kokamwa mpo taxi ezalaki mingi te esika wana. Lisusu, kiliya azalaki te na taxi yango​—likambo ya kokamwa koleka. Nayebisaki sofɛlɛ mokakatano na ngai mpe natunaki ye soki akoki komema biso na mboka-mokonzi Porto Novo, oyo ezali na ntaka ya kilomɛtrɛ 25. Andimaki. Ntango tokómaki, asɛkaki mwa moke mpe alobaki boye: “Kokipe te; wana etali ngai. Okofuta eloko te.”

Julienne alalaki na mbeto pɔsɔ mibale, na ndako ya Motatoli moko. Na boboto nyonso, monganga azalaki koya mikolo nyonso. Azalaki mpe komema bankisi oyo esengeli. Ntango asalaki Julienne ekzamɛ ya nsuka, natunaki ye faktire na kobanga. Nakamwaki mingi ntango alobaki boye: “Okofuta eloko te.”

Bambongwana ya nsɔmɔ

Na 1975, Dahomey ekómaki na guvɛrnema ya bakoministe. Nkombo ya ekólo ebongwanaki; ekómaki République populaire du Bénin. Bomoi ya mokolo na mokolo mpe ebongwanaki. Basengisaki bato bápesaka mbote na ndenge ya sika: “Pour la révolution?” (Ondimi mbongwana?) Moto asengelaki koyanola: “Prêt!” (Nandimi!) Lisosoli na biso oyo eteyamaki na Biblia epekisaki biso tósalela maloba wana ya politiki. Mpo na yango, mikakatano mingi ekómelaki biso.

Mokolo moko ya lomingo, pene na nsuka ya mobu 1975, nazalaki kosakola ndako na ndako pene na Saint Michel, mpe bakangaki ngai. Ndenge nalobaki yango na ebandeli, ntango moto moko apesaki ngai mbote: “Pour la révolution?” ngai nazongiselaki ye “Bonjour!” Bamemaki ngai na biro ya bapolisi, mpe kuna, babɛtaki ngai. Kasi na nsima, kaka mokolo yango, Batatoli misato ya esika yango bazwaki bibongiseli mpo bábimisa ngai.

Nazalaki Motatoli ya Yehova ya liboso oyo akangamaki. Eumelaki te, bakangaki mpe Batatoli mosusu mingi na ekólo mobimba. Guvɛrnema ebɔtɔlaki Bandako ya Bokonzi, mpe bazongisaki bamisionɛrɛ na bamboka na bango. Bakangaki kutu biro ya filiale, mpe Batatoli mingi bakimaki mboka, bakendaki na wɛsti, na Togo, mpe na ɛsti, na Nigeria.

Libota na biso ekoli na Nigeria

Mwana na biso ya mibale, Kola, abotamaki mokolo ya 25 Aprili 1976. Mikolo mibale na nsima, guvɛrnema ebimisaki mobeko oyo epekisaki mosala ya Batatoli ya Yehova. Tokimaki na Nigeria, mpe kuna tokendaki na Ndako ya Bokonzi moko oyo etondaki na bato oyo bakimi mboka. Na mokolo oyo elandaki, batindaki biso na masangá ya pembenipembeni. Soki kaka etuluku moko elongwe na Ndako ya Bokonzi, etuluku mosusu ezalaki koya. Soki bato ya sika bayei, bazalaki kokende kotika bango na mituka ya minene na masangá ya bisika mosusu.

Biro ya filiale ya Batatoli ya Yehova na Nigeria esɛngaki ngai natalaka Batatoli nyonso oyo bautaki Bénin. Na nsima, batyaki ngai mokɛngɛli-motamboli mpo natalaka masangá ya monɔkɔ ya Yoruba na Nigeria, mpe na nsima masangá ya monɔkɔ ya Gun. Tozalaki kosala mibembo na tukutuku. Bola azalaki kofanda liboso na ngai mpe Kola azalaki kofanda na katikati na ngai ná Julienne.

Na 1979, Julienne akómaki na zemi ya mwana na biso ya mwasi, Jemima mpe mpo na yango, esɛngaki tótika mosala ya mokɛngɛli-motamboli. Leki ya Julienne ya mwasi, oyo topesaki nkombo Pépé, autaki na Bénin mpe ayaki kofanda na biso. Libota na biso ezalaki se kokola. Tobotaki lisusu bana mibali mibale: Caleb na 1983 mpe Silas na 1987. Na yango, tokómaki libota ya bato 8. Ngai ná Julienne tolingaki tóbɔkɔla bana biso malamu, kasi tozalaki mpe na mposa ete soki likoki ezali, tótikala na mosala ya kosakola ntango nyonso. Ndenge nini tokokaki kosala yango? Tozwaki esika moko ya kofutela mpo na kosala bilanga mpe tolonaki nsɔngɔ, masango, mpe mayíká (taro). Na nsima, totongaki mwa ndako na mboka Ilogbo-Eremi.

Na ntɔngɔ, soki ngai ná Julienne tosilisi kobongisa bana mpe bakei kelasi, tozalaki kokende mosala ya kosakola. Tozalaki ntango nyonso kozonga na ngonga oyo ebongi mpo libota mobimba tólya esika moko. Na nsima, soki tolali mwa moke, tozalaki kokende kosala bilanga. Julienne ná Pépé bazalaki mpe kotɛka na wenze biloko oyo tozalaki kobuka na elanga. Biso nyonso tozalaki kosala makasi mpenza. Likambo ya esengo, tozalaki kobɛla mingi te na bambula yango.

Bana bapambwami atako basalaki bakelasi milaimilai te

Ata mokolo moko te tolendisaki bana na biso básala bakelasi milaimilai. Toyebaki ete kotya matomba ya Bokonzi na esika ya liboso, kokolisa bizaleli ya boklisto, mpe kozala makasi na mosala nde sɛkɛlɛ ya kozala na bomoi malamu. Tosalaki milende mpo na kokɔtisa makanisi yango na mitema ya bana na biso. Nazalaki koyekola na bango, mpe ezalaki esengo komona bango bakómi kolinga Yehova, bapesi bomoi na bango mpo na kosalela ye, mpe bazwi batisimo mpo na komonisa ete bamipesi na ye!

Pépé azalaki mokóló koleka bana na biso nyonso mpe ye nde moto ya liboso alongwaki na ndako. Ntango ayaki kofanda na biso, nalakisaki ye kotánga. Atako atángaki kelasi mingi te, amipesaki na koyekola Biblia mpe na makambo mosusu ya elimo. Asalaki mosala ya mobongisi-nzela mwa ntango, na nsima abalaki Monday Akinra oyo azalaki mokɛngɛli-motamboli mpe akómaki kosala mibembo na mobali na ye ntango azalaki kotala masangá. Lelo bazali na mwana moko ya mobali, Timothy. Pépé ná Monday bazali kokoba mosala ya kosakola ntango nyonso, mpe Monday azwaka mikumba mingi na mayangani.

Bola akómaki koyekola mosala ya kolamba na kompanyi moko monene. Eumelaki te, mokonzi moko amonaki ete asalaka mosala malamu, akoki kotyelama motema, mpe azali na bizaleli mosusu ya boklisto. Na nsima, bamatisaki ye grade na kompanyi. Likambo eleki ntina, azali mobali malamu mpo na Jane, mwasi na ye ya malamu, mpe tata malamu mpo na bana na ye misato; azali mpe nkulutu oyo akokisaka malamu mikumba na ye na lisangá moko ya Batatoli ya Yehova na Lagos, na Nigeria.

Kola akómaki koyekola mosala ya kotonga bilamba, akómaki mpe mobongisi-nzela. Lokola ayekolaki Lingelesi ntango azalaki na Nigeria, na 1995, babengaki ye na biro ya filiale ya Bénin, na Departema ya Kobongola mikanda. Asili kosala kuna mbula 13.

Mosala ntango tozongi na Bénin

Tozalaki na esengo ya koyoka ete mobeko moko oyo guvɛrnema ya Bénin ebimisaki na mokolo ya 23 Yanuali 1990, elongolaki mobeko oyo ebimaki liboso, oyo epekisaki mosala na biso. Bandeko mingi oyo bakimaki mboka bazongaki. Bamisionɛrɛ mosusu bayaki na Bénin, mpe biro ya filiale efungwamaki lisusu. Na 1994, libota na biso tozongaki na Bénin, kasi Pépé, Bola, mpe mabota na bango batikalaki na Nigeria.

Nazwaki mosala moko ya ngonga mingi te. Na mwa mbongo oyo tozalaki kozwa na ndako na biso oyo bato bazalaki kofutela na Nigeria mpe na lisalisi oyo Bola apesaki biso, totongaki ndako oyo tokokaki kofanda biso mitano, mosika te na biro ya filiale. Jemima asalaki mosala ya mobongisi-nzela mbula koleka motoba, mpe azalaki kotonga bilamba mpo na kozwa mwa mbongo ya kobikela. Na nsima, abalaki Kokou Ahoumenou, mpe bazali lelo kosala na biro ya filiale, mosika te na ndako na biso. Caleb ná Silas balingi kosilisa kelasi. Na lisalisi ya Nzambe mpe ya libota na biso, ngai ná Julienne toumeli na mosala ya kosakola ntango nyonso mbula koleka 40.

Nzambe apamboli mpenza mosala ya kosakola na Bénin. Na 1961, ntango nazwaki batisimo, Batatoli ya Yehova 871 bazalaki kosakola nsango ya Bokonzi na ekólo. Na mobu oyo bakangaki ngai, motángo yango ekómaki 2 381. Ntango tozongaki na Bénin na 1994, motángo yango emataki na 3 858, atako mosala na biso epekisamaki na boumeli ya mbula 14. Lelo oyo, motángo yango ebakisami koleka mbala mibale​—koleka 9 000—​mpe bato oyo bayanganaki na Ekaniseli ya liwa ya Klisto na 2008 bazalaki 35 752.

Ntango mosusu nakendaka na esika oyo bakangaká ngai mbula koleka 30 liboso mpe nakanisaka makambo nyonso oyo esalemaki. Natondaka libosoliboso Nzambe ndenge apamboli libota na ngai. Tozangaki eloko te. Tii lelo napesaka moto nyonso “Bonjour!”

[Maloba na nse ya lokasa]

a Na ntango wana, Bénin ezalaki kobengama Dahomey mpe ezalaki na kati ya Afrique-Occidentale française.

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 11]

Asɛkaki mwa moke mpe alobaki boye: “Kokipe te; wana etali ngai. Okofuta eloko te”

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 12]

Ata mokolo moko te tolendisaki bana na biso básala bakelasi milaimilai

[Elilingi na lokasa 13]

Ntango nazalaki mokɛngɛli-motamboli, na 1970

[Elilingi na lokasa 13]

Ná bana na biso mibale ya liboso, Bola ná Kola, na 1976

[Elilingi na lokasa 13]

Lelo, elongo na libota na ngai​—mwasi na ngai, bana na biso mitano, bokilo na biso, bankɔkɔ na biso misato, mpe libota ya Pépé

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto