Lisolo ya bomoi
Kosepela na oyo nazali na yango esungaki ngai
YA BENJAMIN IKECHUKWU OSUEKE
Ntango nabandaki mosala ya mobongisi-nzela, mwa moke nsima nakendaki kotala baboti na ngai. Ntango tata amonaki ngai, asimbaki ngai na simisi mpe abandaki kobelela, “Moyibi!” Abɛtaki ngai mopanzi ya masɛti na ye. Ntango bato ya mboka bayokaki makɛlɛlɛ wana, bayaki kotondana na lopango na biso. Nayibaki nini? Tiká nalimbwela bino.
NABOTAMAKI na 1930, na mboka Umuariam na sudi-ɛsti ya Nigeria mpe nazalaki mwana ya liboso na libota ya bana nsambo. Leki na ngai ya mwasi ya liboso akufaki ntango akómaki na mbula 13. Baboti na ngai bazalaki bandimi ya Lingomba ya Anglican. Tata azalaki mosali bilanga mpe mama azalaki kosala mwa mombongo. Azalaki kokende na makolo na zando moko na ntaka ya kilomɛtrɛ soki 30 mpo na kosomba bidɔ ya mafuta mpe azalaki kozonga mokolo yango kaka na mpokwa. Na ntɔngɔngɔngɔ ya mokolo oyo elandi, azalaki kokende na makolo kotɛka yango na gare moko ya engbunduka, na ntaka ya kilomɛtrɛ soki 40. Soki azwi mwa benefisi, oyo mbala mingi ezalaki koleka santime 15 te, azalaki kosomba biloko ya kolya mpe kozonga ndako kaka mokolo yango. Asalaki mosala wana na boumeli ya mbula 15 tii ntango akufaki na 1950.
Nabandaki kelasi na ngai na mboka na biso, na eteyelo moko ya Lingomba ya Anglican; kasi, nakendaki kosilisa eteyelo ya ebandeli na mbola (internat) oyo ezalaki na ntaka ya kilomɛtrɛ soki 35. Lokola baboti na ngai bazalaki na makoki ya kofutela ngai mbongo te mpo nalanda bakelasi na ngai, nabandaki koluka mosala. Liboso, nakómaki mwana ya mosala epai ya mokɛngɛli moko ya nzela ya engbunduka na engumba Lagos, na wɛsti ya Nigeria; na nsima nakómaki kosala epai ya mosali moko ya Leta na engumba Kaduna, na nɔrdi ya Nigeria. Na Benin City, na wɛsti ya Nigeria, nakómaki kalaka ya avoka moko, mpe na nsima nakómaki kosala na izini moko ya kopasola mabaya. Na 1953 nakendaki na Cameroun epai ya noko na ngai moko, mpe ye azwelaki ngai mosala na elanga moko ya nzete ya ndembo. Bazalaki kofuta ngai dolare libwa na sanza. Nazalaki kozwa kaka misala ya bongobongo, kasi lokola nazalaki kozanga eloko ya kolya te, nazalaki kosepela na moke oyo nazalaki kozwa.
Mobola moko apesi ngai bozwi
Silvanus Okemiri, moninga na ngai moko ya mosala, azalaki Motatoli ya Yehova. Ntango tozalaki kokata matiti mpe kotya bipɔli na mabelé zingazinga ya banzete ya ndembo, Silvanus azalaki ntango nyonso koyebisa ngai solo ya Biblia. Na ntango wana, nazalaki koyoka ye mpe esukaki kaka wana. Kasi, ntango noko na ngai ayebaki ete nazalaki kosolola na Batatoli ya Yehova, asalaki nyonso mpo na kolɛmbisa ngai. Alobaki na ngai boye: “Benji, kokendaka epai ya Okemiri te. Azali moto ya Yehova mpe azali mobola. Moto nyonso oyo azali kosangana na ye akokóma lokola ye.”
Na ebandeli ya 1954, lokola mosala elekaki makasi mpe bazalaki kofuta ngai mbongo ya malonga te, nazongaki na mboka na biso. Na ntango wana, Lingomba ya Anglican ezalaki mpenza koteya bato bizaleli malamu. Yango wana, ntango nazalaki kokola, nazalaki mpenza koyina makambo ya pite. Kasi na nsima, namonaki ete bandimi ya lingomba na biso bazalaki kosala makambo mabe na kobombana, mpe yango elɛmbisaki ngai. Atako bazalaki koloba ete balandaka mitinda ya Biblia, bazalaki komonisa yango te na etamboli na bango. (Matai 15:8) Ngai ná tata toswanaki mbala mingi; yango wana, tozalaki koyokana lisusu te. Mokolo moko na butu, nalongwaki na ndako.
Nakendaki kofanda na Omoba, engumba moko ya moke oyo ezali na gare ya engbunduka. Kuna, nakutanaki lisusu na Batatoli ya Yehova. Priscilla Isiocha, oyo nayebanaki na ye na mboka na biso, apesaki ngai mwa babuku “Cette bonne nouvelle du Royaume” mpe Après Harmaguédon, Dieu établira un monde nouveau.a Natángaki yango nyonso, mpe na motema nazalaki koloba ete namoni lingomba ya solo. Na lingomba oyo nakolaki tozalaki koyekola Biblia te; tozalaki kolanda kaka makanisi ya bato. Kasi, mikanda ya Batatoli ezalaki kotánga ebele ya mikapo ya Biblia.
Sanza mobimba kutu ekokaki naino te, natunaki Ndeko Isiocha ná mwasi na ye mikolo oyo bakendaka na ndako-nzambe na bango. Ntango nakendaki na makita ya Batatoli ya Yehova mpo na mbala ya liboso, nakangaki ntina ya likambo moko te. Lisolo ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli oyo bayekolaki mokolo yango ezalaki kolobela etumba ya ‘Gogo ya Magogo,’ oyo balobeli na mokanda ya Ezekiele. (Ezekiele 38:1, 2, NW) Maloba mingi ezalaki ya sika mpo na ngai, kasi nasepelaki mingi na ndenge bayambaki ngai na esengo, mpe mpo na yango, nakanaki kozonga lisusu na mokolo ya lomingo oyo elandaki. Mokolo yango, nayokaki bazali kolobela mosala ya kosakola. Yango wana natunaki Priscilla mokolo oyo bakendaka kosakola. Na mokolo ya lomingo ya misato, nabimaki na bango na mosala ya kosakola, na mwa Biblia na ngai na mabɔkɔ. Nazalaki na sakosi te, ata mpe na mokanda moko te. Atako bongo, nakómaki mosakoli ya Bokonzi mpe, na nsuka ya sanza wana, napesaki lapolo na ngai ya mosala ya kosakola!
Moto moko te azalaki koyekola na ngai Biblia, kasi soki kaka nakei kotala Ndeko Isiocha ná mwasi na ye, nazalaki koyoka maloba ya Biblia oyo ezalaki kobakisa kondima na ngai mpe ezalaki kolendisa ngai, mpe bazalaki kopesa ngai mikanda oyo elimbolaka Biblia. Mokolo ya 11 Desɛmbɛ 1954, na liyangani moko ya etúká oyo esalemaki na engumba Aba, nazwaki batisimo. Ndeko ya tata na ngai oyo nazalaki kofanda na ye mpe azalaki kolakisa ngai mosala atikaki kopesa ngai biloko ya kolya mpe kolakisa ngai mosala, afutaki ngai mpe ata likuta te mpo na mosala nyonso oyo nasalelaki ye. Atako bongo, nakangelaki ye nkanda te; nazalaki na esengo lokola nakómaki moninga ya Nzambe. Yango ebɔndisaki ngai mingi mpe epesaki ngai kimya ya makanisi. Batatoli ya mboka yango basungaki ngai. Ndeko Isiocha ná mwasi na ye bazalaki kopesa ngai biloko ya kolya, mpe bandeko mosusu badefisaki ngai mbongo mpo nabanda kotɛka mwa biloko ya mikemike. Na katikati ya mobu 1955, nasombaki velo moko ya kala, mpe na Marsi 1956, nabandaki mosala ya mobongisi-nzela ya sanza na sanza. Mwa moke na nsima, nasilisaki banyongo nyonso nazalaki na yango. Nazalaki kozwa benefisi mingi te na mombongo na ngai, kasi ezalaki kosalisa ngai nakokisaka bamposa na ngai. Oyo Yehova azalaki kopesa ngai ekokaki mpo na ngai.
Nakómi “koyiba” baleki na ngai
Ntango kaka nakómaki kofanda epai na ngai moko, likanisi na ngai ya liboso ezalaki ya kosalisa baleki na ngai na elimo. Tata na ngai azalaki na makanisi mabe mpo na Batatoli, yango wana asepelaki te ndenge nakómaki Motatoli. Ndenge nini nakokaki kosalisa baleki na ngai báyeba solo ya Biblia? Nasɛngaki bápesa ngai lɛki na ngai ya nsuka, Ernest, mpo nafutelaka ye bakelasi, mpe Tata andimaki aya kofanda epai na ngai. Ernest aumelaki te kondima solo mpe azwaki batisimo na 1956. Kobongwana na ye ekómisaki lisusu makasi botɛmɛli ya tata na ngai. Atako bongo, leki na ngai ya mwasi, oyo azalaki na ndako ya libala, andimaki mpe solo elongo na mobali na ye. Ntango nasɛngaki ete leki na ngai mosusu ya mwasi, Felicia, aya konje epai na ngai, tata andimaki na mwa kokakatana. Mosika te Felicia mpe azwaki batisimo mpe akómaki Motatoli ya Yehova.
Na 1959, nakendaki epai ya baboti mpo na kozwa Bernice, leki na ngai ya mwasi ya misato, mpo aya kofanda ná Ernest. Na ntango wana nde Tata atombokelaki ngai mpe alobaki ete nazali koyiba bana na ye. Ayebaki te ete bango moko nde bazalaki kozwa ekateli ya kosalela Yehova. Tata alapaki mpenza ete akopesa ngai Bernice te. Kasi lobɔkɔ ya Yehova ezalaki mokuse te, mpo kaka na mbula oyo elandaki, Bernice alekisaki konje na ye elongo na Ernest. Lokola bandeko na biso mosusu ya basi, ye mpe andimaki solo mpe azwaki batisimo.
‘Nayekoli sɛkɛlɛ’
Na Sɛtɛmbɛ 1957, nabandaki mosala ya mobongisi-nzela monene mpe nazalaki kolekisa ngonga soki 150 na sanza na mosala ya kosakola. Ngai ná Sunday Irogbelachi, moninga na ngai ya mosala, tozalaki na teritware moko monene na Akpu-na-abuo, na etúká ya Etche. Na liyangani ya zongazonga ya liboso oyo toyanganaki ntango tozalaki kuna, bato 13 ya etuluku na biso ya boyekoli bazwaki batisimo. Lelo oyo, toyokaka mpenza esengo na komona ete teritware yango ekómi na masangá 20!
Na 1958, nayebanaki na Christiana Azwike, mobongisi-nzela moko ya sanza na sanza na lisangá ya Aba Est. Nazalaki mpenza kosepela na molende na ye na mosala ya kosakola, mpe na Desɛmbɛ ya mbula wana, tobalanaki. Na ebandeli ya 1959, baponaki ngai mokɛngɛli-motamboli, nazalaki kotala masangá mpe kolendisa yango na elimo. Banda na mbula wana tii na 1972, ngai ná mwasi na ngai totalaki pene na masangá nyonso ya Batatoli ya Yehova ya ɛsti mpe ya wɛsti ya Nigeria.
Masangá ezalaki mosikamosika, mpe tozalaki kotambola mingimingi na velo. Ntango tozalaki kotala masangá na bingumba ya minene, soki tosilisi kotala lisangá moko, bandeko bazalaki kofutela biso taxi mpo na kokende lisangá mosusu. Ntango mosusu, tozalaki kolala na bashambre oyo ezalaki kaka na mabelé na nse mpe ezalaki na plafɔ te. Tozalaki kolala na kitikwala. Bambeto yango mosusu ezalaki na matela ya matiti, mosusu mpe ezalaki na matela te. Tozalaki komitungisa mpo na biloko ya kolya te, ezala moke to mingi, ya malamu to te. Lokola tomesanaki kosepela ata soki tozwi biloko moke, tozalaki kosepela na nyonso oyo bazalaki kopesa biso, mpe bandeko bazalaki kosepela mingi na ezaleli yango. Na ntango wana, bingumba mosusu ezalaki na kura te, yango wana tozalaki ntango nyonso komema mwinda na biso ya petrole. Atako mikakatano ezalaki mingi, tozalaki kolekisa bantango mingi ya esengo elongo na bandeko ya masangá oyo tozalaki kotala.
Na ntango wana, tomonaki mpenza bosolo ya maloba ya ntoma Paulo oyo: “Kozaláká na bilei mpe na eloko ya kozipa nzoto, tokosepela na biloko wana.” (1 Timote 6:8) Na mikakatano oyo akutanaki na yango, Paulo ayekolaki sɛkɛlɛ oyo esalisaki ye asepela na bomoi ya lolenge nyonso. Sɛkɛlɛ yango ezalaki nini? Paulo alobaki boye: “Nayebi mpenza kozanga biloko, nayebi mpenza kozala na biloko mingi. Na eloko nyonso mpe na makambo nyonso nasili koyekola sɛkɛlɛ ya kotonda mpe ya kozala na nzala; ya kozala na biloko mingi mpe ya kokelela.” Biso mpe toyekolaki sɛkɛlɛ yango. Paulo alobaki lisusu boye: “Na makambo nyonso nazali na makasi na lisalisi ya [Nzambe] oyo apesaka ngai nguya.” (Bafilipi 4:12, 13) Maloba yango ekokisamaki mpenza na bomoi na biso! Tozalaki kosepela na oyo tozalaki na yango, mpe tosalaki makambo mingi ya kolendisa na mosala ya boklisto, mpe tozalaki na kimya ya makanisi.
Tokómi kotala masangá na bana na biso
Mwana na biso ya liboso, Joel, abotamaki na 1959, mpe Samwele, mwana na biso ya mibale, abotamaki na 1962. Ngai ná Christiana tokobaki mosala ya kotala masangá elongo na bana na biso. Na 1967, etumba ebandaki na Nigeria. Lokola baaviɔ ezalaki kobwaka babɔmbi mingi, biteyelo ekangamaki. Mwasi na ngai azalaki molakisi liboso tókóma kotala masangá, yango wana akómaki kotángisa bana na biso na ndako na ntango ya etumba. Ntango Samuel akómaki na mbula motoba, ayebaki kotánga ná kokoma. Ntango akɔtaki kelasi na nsima ya etumba, alekaki bana ya mbula na ye na kelasi mibale.
Na ntango wana, tozalaki komona mpenza te mikakatano ya kosangisa mokumba ya kobɔkɔla bana mpe kotambola mpo na kotala masangá. Kasi, na 1972, baponaki biso babongisi-nzela monene mpe yango esalisaki biso mingi. Yango epesaki biso likoki ya kofanda esika moko mpo tóbɔkɔla bana na biso malamu na elimo. Ntango bana na biso bazalaki naino mike, tolakisaki bango ezaleli ya kosepela na oyo bazali na yango. Na 1973, Samuel azwaki batisimo, mpe, kaka na mbula yango, Joel abandaki mosala ya mobongisi-nzela. Bana na biso nyonso mibale babalá baklisto ya malamu mpe bango nyonso bazali kobɔkɔla bana na bango na kati ya solo.
Bomoi ya mpasi na ntango ya etumba
Ntango etumba ebandaki, nazalaki kotala lisangá moko na engumba Onitsha ná mwasi na ngai, ná bana. Etumba yango emonisaki biso mpenza ete konduka biloko ya mokili to kotyela yango motema ezali na ntina te. Namonaki bato bazali kosundola biloko ya motuya na nzela mpe kokima mpo na kobikisa bomoi na bango.
Ntango etumba ekómaki makasi, bakómaki kokɔtisa mibali nyonso na mosala ya soda. Bazalaki konyonga bandeko mingi oyo baboyaki kokɔta na mosala ya soda. Tozalaki na likoki te ya kotambola ndenge tolingi. Mpe nzala ebakisaki lisusu mpasi na mboka. Demi-kilo ya kwanga oyo ezalaki liboso na santime 7, ekómaki na dolare 14, mpe kɔpɔ ya mungwa oyo ezalaki na dolare 8 ekómaki na dolare 42. Miliki, manteka mpe sukali ezalaki komonana lisusu te. Mpo tókufa na nzala te, tozalaki kotuta paipai ya mobesu mpe kosangisa yango na mwa fufu. Tozalaki mpe kolya mayoyo, mposo ya songo, nkasa ya nzete babengi hibiscus, mpe nkasa nyonso oyo ekokaki kolyama. Lokola nyama ekómaki ntalo mingi, nakómaki kokangela bana miselekete mpo na kolya. Kasi, atako mpasi ezalaki makasi, Yehova azalaki ntango nyonso kosunga biso.
Kasi, likama ya monene koleka ezalaki nde nzala ya elimo oyo etumba ekɔtisaki. Bandeko mingi bakimaki bamboka oyo bitumba ezalaki mpe bakendaki kofanda na zamba to na bamboka mosusu, mpe ntango bazalaki kokima, babungisaki mikanda na bango nyonso. Lisusu, lokola basoda ya guvɛrnema bakangaki banzela nyonso mpo na kokɔta na Biafra, tozalaki lisusu kozwa mikanda te. Atako masangá mingi ezalaki komeka kosala makita, elimo ya bandeko mingi ekitaki, mpo bazalaki lisusu kozwa malako ya filiale te.
Etumba mpo na kolonga nzala ya elimo
Bakɛngɛli-batamboli bazalaki kosala nyonso oyo bakoki mpo na kokoba kotala masangá. Lokola bandeko mingi bakimaki bingumba ya minene, nazalaki koluka bango na bisika nyonso nakokaki kokutana na bango. Mbala moko, natikaki mwasi na ngai ná bana na esika moko ya malamu mpe, na boumeli ya pɔsɔ motoba, natambolaki na bamboka mpe na bazamba mpo na koluka bandeko.
Ntango nazalaki kotala lisangá moko na engumba Ogbunka, bayebisaki ngai ete Batatoli ebele mpenza bazali na Isuochi, na etúká ya Okigwe. Mbala moko natindelaki bandeko yango maloba ete bákende kosangana bango nyonso na elanga moko ya makaso na mboka Umuaku. Ngai ná ndeko moko ya mobange totambolaki ntaka ya kilomɛtrɛ 15 na bavelo tii na elanga yango epai Batatoli soki 200, mibali, basi mpe bilenge, basanganaki. Ndeko mwasi moko oyo azalaki mobongisi-nzela asalisaki ngai na koyeba esika mosusu Batatoli soki monkama bakimaki etumba, na zamba ya Lomara.
Lawrence Ugwuegbu azali moko ya bandeko ya mpiko oyo bafandaki na engumba Owerri, oyo ebebisamaki mpenza na etumba. Ayebisaki ngai ete Batatoli ebele bazali na teritware ya Ohaji. Bazalaki na likoki ya kotambola te mpamba te basoda mingi bazalaki na teritware yango. Biso mibale tokendaki kuna na bavelo na butu mpe tokutanaki na Batatoli soki 120 na lopango ya ndeko moko. Tosalelaki mpe libaku yango mpo na kokende kotala Batatoli mosusu na bisika oyo bazalaki kobombana.
Ndeko Isaac Nwagwu atyaki bomoi na ye na likama mpo na kokende kolakisa ngai bisika mosusu epai bandeko bakimelaki etumba. Akatisaki ngai Ebale Otamiri na bwato mpo na kokutana na Batatoli soki 150 oyo basanganaki na mboka Egbu-Etche. Ndeko moko kuna alobaki ete: “Oyo ezali mokolo eleki monene na bomoi na ngai! Nandimaki te ete nakozwa lisusu libaku ya komona mokɛngɛli ya zongazonga na bomoi na ngai. Ata soki nakufi lelo na etumba oyo, nakokufa na esengo.”
Bakokaki kokanga ngai mpo na kokɔtisa ngai na makasi na mosala ya soda, kasi mbala na mbala Yehova azalaki kobatela ngai. Mokolo moko, nsima ya midi, ntango nautaki na likita moko oyo nasalaki na bandeko soki 250 mpe nazalaki kozonga esika nazalaki kofanda, etuluku moko ya basoda batɛlɛmisaki ngai na esika oyo bakangaki nzela. Batunaki ngai ete: “Mpo na nini yo ozali soda te? Nayebisaki bango ete nazali misionɛrɛ, nazali kosakola Bokonzi ya Nzambe. Namonaki ete bazalaki na makanisi ya kokanga ngai. Nasalaki mbala moko libondeli na nse ya motema, mpe nalobaki na kapitɛni na bango ete, “Palado, bótika ngai nakende.” Likambo ya kokamwa, kapitɛni yango atunaki ngai ete, “Olobi tótika yo okende? Nandimaki ete, “Ɛɛ, bótika ngai.” Alobaki ete, “Okoki kokende.” Mpe ata soda moko te alobaki lisusu.—Nzembo 65:1, 2.
Kosepela na oyo tozali na yango ememeli biso mapamboli mosusu
Ntango etumba esilaki na 1970, nazalaki kaka na mosala ya zongazonga. Nazwaki libaku malamu ya kobongisa lisusu masangá. Na nsima, ngai ná Christiana tokómaki babongisi-nzela monene tii na 1976; na mbula yango batindaki ngai lisusu na mosala ya zongazonga. Na katikati ya mbula yango, baponaki ngai mokɛngɛli ya etúká. Mbula nsambo na nsima, babengaki ngai ná mwasi na ngai tókende kosala na biro ya filiale ya Batatoli ya Yehova ya Nigeria, esika tozali tii lelo oyo. Awa na biro ya filiale, tozalaka ntango nyonso na esengo ya komona lisusu bandeko oyo tokutanaki na bango na ntango ya etumba mpe na bantango mosusu, oyo batikali sembo na mosala ya Yehova.
Christiana azalaki mpenza mosungi mpe moninga ya sembo mpo na ngai. Mpiko na ye mpe mposa na ye ya kokende ntango nyonso liboso atako bamaladi ezali kotungisa ye banda 1978 esalisi ngai natika mikumba na ngai te. Tomoni mpenza bosolo ya maloba ya mokomi ya nzembo oyo alobaki ete: “[Yehova] akolendisa ye na mbeto na ye ya maladi.”—Nzembo 41:3.
Soki nakanisi bambula oyo nalekisi na mosala ya Nzambe, natɔndaka mpenza Yehova mpo na mapamboli kitoko oyo apesaki biso. Lokola nasepelaka kaka na oyo apesaka, nakoki mpenza koloba ete nalekisi bomoi moko ya esengo. Esengo oyo nayokaka ntango nazali komona baleki na ngai mpe bana na ngai, bango nyonso ná bana na bango bazali kosalela Yehova elongo na ngai ná mwasi na ngai ezali lipamboli oyo eleki nyonso. Yehova apesi ngai bomoi moko ya esengo mpe ya ntina mingi. Azangaki kokokisa ata mposa na ngai moko te.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Ebimisamaki na Batatoli ya Yehova; enyatamaka lisusu te.
[Etanda na lokasa 27]
Ebongiseli oyo esalisaki mpenza bandeko
Na katikati ya bambula ya 1960, kozanga boyokani kati na bato ya nɔrdi mpe bato ya sudi ya Nigeria ebimisaki mobulu, botomboki, mpe bitumba. Mobulu nyonso wana ememelaki Batatoli ya Yehova mpasi mingi, mpamba te baboyaki kokɔta na kowelana yango. Babomaki Batatoli soki 20. Bamosusu mingi babungisaki biloko na bango.
Na mokolo ya 30 Mai 1967, bitúká ya ɛsti ya Nigeria ekabwanaki na ekólo Nigeria mpe ekómaki République du Biafra. Guvɛrnema ya Nigeria etindaki basoda oyo bakangaki banzela nyonso ya kokɔta na Biafra. Likambo yango ebimisaki etumba moko makasi oyo ebomaki ebele ya bato.
Lokola Batatoli ya Yehova ya Biafra baboyaki kokɔta na bitumba wana, bakómaki konyokola bango. Bazulunalo ezalaki koloba mabe mpenza mpo na bango mpe kotinda bato básala bango mabe. Kasi, Yehova abongisaki makambo mpo basaleli na ye bázanga bilei ya elimo te. Na ndenge nini?
Na ebandeli ya 1968, mobali moko azalaki kosala na libanda ya mpɛpɔ ya ekólo moko ya Mpoto; na Biafra mpe mobali moko azalaki kosala na libanda ya mpɛpɔ. Bango mibale bazalaki Batatoli. Bazalaki kosala na bisika kaka mibale oyo bato bakokaki kokɔta to kobima na Biafra. Batatoli yango nyonso mibale bandimaki mokumba oyo ezalaki mpenza likama, elingi koloba kotinda bilei ya elimo na Briafra. Bazalaki mpe kosalisa mpo na kolekisa biloko oyo bandeko ya mikili mosusu bazalaki kotindela bandeko oyo bazalaki kokelela. Bandeko yango batikalaki na mosala yango tii ntango etumba esilaki na 1970. Moko na bango alobaki na nsima ete, “Ebongiseli yango ekokaki kouta na bato te.”
[Elilingi na lokasa 23]
Na 1956
[Elilingi na lokasa 25]
Na 1965, elongo na bana na biso, Joel ná Samuel
[Elilingi na lokasa 26]
Kozala na libota oyo bazali kosalela Yehova ezali lipamboli monene!
[Elilingi na lokasa 27]
Ngai ná Christiana tozali sikoyo kosala na filiale ya Nigeria