Mituna oyo bilenge batunaka
Esengeli naluka baninga ya malamu?
“Soki nasiliki, nazalaka na mposa ya moto oyo nakoki koyebisa ye ndenge nazali koyoka. Soki nazali na mawa, nazalaka na mposa ya moto oyo akoki kobɔndisa ngai. Soki nazali na esengo, nazalaka na mposa ya kokabola esengo yango na moto mosusu. Mpo na ngai, kozala na baninga ezali na ntina mingi.”—Brittany.
BALOBAKA ete bana mike bazalaka na mposa ya baninga ya masano, kasi bilenge bazalaka na mposa ya baninga. Bokeseni ezali wapi?
Moninga ya lisano ezali moto oyo bolekisaka na ye ntango.
Moninga ezali moto oyo andimaka mpe makambo oyo ondimaka.
Longola yango, Biblia elobi ete: “Moninga ya solo alingaka ntango nyonso mpe azali ndeko oyo abotami mpo na ntango ya mpasi.” (Masese 17:17, NW) Na ntembe te, boninga yango eleki mosika oyo okoki kokuta na esika oyo bozali kosala lisano.
Oyo ezali solo: Ntango ozali kokola, okozala na mposa ya baninga oyo
(1) Bazali na bizaleli ya malamu.
(2) Batosaka mitinda ya Biblia.
(3) Bakosalisa yo osala malamu.
Motuna: Ndenge nini okoki koyeba soki baninga na yo bakokisi masɛngami yango? Tótalela likambo mokomoko.
Likambo ya #1 mpo na boninga—Bizaleli ya malamu
Oyo osengeli koyeba. Moto nyonso te oyo amibengaka moninga na yo nde azali na bizaleli oyo ebongi na moninga ya malamu. Kutu, Biblia elobi ete “baninga mosusu balukaka kosalana mabe.” (Masese 18:24, NW) Maloba yango ekoki komonana lokola ete eleki ndelo. Kasi, kanisá naino: Osilá kozala na “moninga” oyo alyelaki yo? Osilá kozala na moninga oyo azalaki kotɔnga yo to kopanza yo nsango ya lokuta? Makambo ya ndenge wana ekoki kotinda yo otyelaka lisusu baninga na yo motema te.a Kobosana te ete kozala na baninga ya malamu eleki kozala na baninga mingi.
Oyo okoki kosala. Poná baninga oyo bazali na bizaleli oyo okoki komekola.
“Moto nyonso alobaka malamu mpo na moninga na ngai Fiona. Nalingi balobaka mpe malamu mpo na ngai. Nalingi nakende nsango malamu lokola ye. Mpo na ngai, ezali malamu bongo.”—Yvette, azali na mbula 17.
Meká kosala boye.
1. Tángá Bagalatia 5:22, 23.
2. Omituna boye: ‘Baninga na ngai bamonisaka “mbuma ya elimo”?’
3. Komá awa na nse bankombo ya baninga na yo ya motema. Pembeni ya nkombo mokomoko, komá ezaleli oyo moto yango amonisaka mpenza.
Nkombo Ezaleli
․․․․․ ․․․․․
․․․․․ ․․․․․
․․․․․ ․․․․․
Likanisi: Soki kaka bizaleli ya mabe nde ezali koyela yo na makanisi, ekoki kozala malamu oluka baninga ya malamu!
Likambo ya #2 mpo na boninga—Mitinda ya Biblia
Oyo osengeli koyeba. Soki ozali na mposa makasi ya kozwa baninga, okoki kondima ata baninga ya malamu mpenza te. Biblia elobi boye: “Motamboli elongo na bazoba akobukana.” (Masese 13:20) Na vɛrsɛ yango, liloba “bazoba” elimboli te bato oyo bazangi mayele. Kasi ezali nde bato oyo baboyaka kondima toli ya malamu mpe balandaka etamboli ezangá ntina—baninga ya ndenge wana nde babongi te!
Oyo okoki kosala. Na esika ya kosala boninga na moto nyonso oyo akondima yo, osengeli koponaka. (Nzembo 26:4) Yango elingi koloba te ete osengeli kokaniselaka basusu mabe. Na likambo oyo, kopona elimboli ete osengeli kozala na likoki ya ‘kososola kati na moyengebene mpe moto mabe, kati na ye oyo akosalelaka Nzambe mpe ye oyo akosalelaka Nzambe te.’—Malaki 3:18.
Atako Nzambe atalaka bilongi te, aponaka baoyo akoki kondima ‘na kati ya hema na ye.’ (Nzembo 15:1-5) Yo mpe okoki kosala bongo. Tosáká mitinda ya Biblia, mpe mbala mosusu, baoyo bazali mpe kosala makasi mpo na kosala bongo bakomona yo. Nsukansuka, bakokóma baninga ya malamu mpo na yo!
“Nazali na botɔndi mingi ndenge baboti na ngai basalisaki ngai nazwa baninga—bato ya mbula na ngai oyo batosaka mitinda ya Biblia.”—Christopher, azali na mbula 13.
Meká kosala boye.
Yanolá na mituna elandi:
◼ Ntango nazali na baninga na ngai, mbala mingi nabangaka ete bakoki kotinda ngai nasala likambo moko oyo nayebi ete ezali mabe?
□ Ɛɛ □ Te
◼ Nakakatanaka kolakisa baninga na ngai epai ya baboti na ngai mpo namonaka ete bakosepela na bango te?
□ Ɛɛ □ Te
Likanisi: Soki biyano na yo na mituna yango ezali ɛɛ, luká baninga oyo batosaka mitinda oyo eleki malamu. Mpo na nini te kobanda na baoyo bazali mwa mikóló na yo mpe bazali na bizaleli malamu ya baklisto?
Likambo ya #3 mpo na boninga—Kosalisa yo osala malamu
Oyo osengeli koyeba. Biblia elobi ete: “Baninga mabe babebisaka bizaleli ya malamu.” (1 Bakolinti 15:33) Elenge moko na nkombo Lauren alobi boye: “Bana-kelasi na biso bazalaki kondima ngai kaka soki nazali kosala makambo oyo bazali kotinda ngai. Nazalaki kaka ngai moko, yango wana nandimaki kosala lokola bango mpo bándima ngai.” Lauren amonaki ete ntango ondimi kosala lokola bato mosusu, okoki kokóma lokola pion ya dame, mpe bakotambwisatambwisa yo ndenge balingi. Ebongi te básalaka yo bongo!
Oyo okoki kosala. Katá boninga na baoyo bazali kotingama kaka obongwana mpo ondima etamboli na bango. Soki osali yango, okomiyoka malamu mpe okofungola nzela mpo na kozwa baninga ya malamu—baninga oyo bakosalisa yo osalaka malamu.—Baloma 12:2.
“Moninga na ngai ya motema Clint azali na bososoli mpe ayebaka komitya na esika ya basusu, yango wana alendisaka ngai mingi.”—Jason, azali na mbula 21.
Meká kosala boye.
Omituná mituna elandi:
◼ Nazali kobongola lolenge na ngai ya kolata, koloba, to kosala makambo mpo na kosepelisa baninga na ngai?
□ Ɛɛ □ Te
◼ Nakendaka na bisika oyo bato bazalaka na etamboli ya mbindo, epai nakoki kokende te soki nazali na baninga na ngai te?
□ Ɛɛ □ Te
Likanisi: Soki eyano na yo ezali ɛɛ na motuna yango, sololá na baboti na yo to na ndeko moko oyo akɔmɛli mpo na kosɛnga ye toli. Soki ozali Motatoli ya Yehova, okoki kosolola na nkulutu moko mpe koyebisa ete ozali na mposa asunga yo na kopona baninga oyo bakosalisa yo osala malamu.
Okoki kokuta masolo mosusu ya “Mituna oyo bilenge batunaka . . .” na Internet, na esika oyo: www.watchtower.org/ypf
[Maloba na nse ya lokasa]
a Ya solo, moto nyonso asalaka mabunga. (Baloma 3:23) Na yango, ntango moninga moko asali yo mabe, mpe na nsima ayoki mpenza mawa, kobosana te ete “bolingo ezipaka ebele ya masumu.”—1 Petelo 4:8.
MITUNA YA KOKANISA
◼ Bizaleli nini okosepela na yango mingi epai ya moninga na yo, mpe mpo na nini?
◼ Bizaleli nini osengeli kokóma na yango mpo ozala moninga ya malamu?
[Etanda/Bililingi na lokasa 21]
OYO BILENGE MOSUSU BALOBI
“Ntango baboti na ngai bapekisaki ngai kozala na etuluku moko boye ya baninga, nalobaki na nse ya motema ete bango nde baninga oyo nalingaki kozala na bango. Kasi, toli ya baboti na ngai ezalaki malamu, mpe ntango nakanisaki malamu na toli na bango, namonaki ete baninga ya malamu bazalaki ebele mpenza.”—Cole.
“Kobima mosala ya kosakola ezali lolenge eleki malamu oyo esalisaka ngai nayeba bandeko ya lisangá. Na mosala yango, nazwaka libaku ya kobima na bato ndenge na ndenge, bilenge mpe mikóló. Mpe nalekisaka ntango elongo na bato oyo balingaka Yehova.”—Yvette.
“Nabondelaki mpo nazala na baninga, kasi na nsima namonaki ete nazalaki kosala eloko te mpo na kozwa bango. Na yango, nakómaki kosololisa basusu na makita. Eumelaki te, nakómaki na baninga mingi ya sika. Namiyokaka lisusu ngai moko te.”—Sam.
[Etanda na lokasa 22]
MEKÁ MAKANISI OYO
Sololá na baboti na yo mpo na baninga. Tuná bango báyebisa yo lolenge ya baninga oyo bazalaki na bango ntango bazalaki na mbula na yo. Bayokaka mawa mpo na baninga oyo baponaká? Soki ezali bongo, na nini? Tuná bango báyebisa yo ndenge okoki kosala mpo okutana te na mikakatano oyo bakutanaki na yango.
Lakisá baninga na yo epai ya baboti na yo. Soki ozali kokakatana mpo na kosala yango, omituna, ‘Mpo na nini nazali kokakatana?’ Baninga na yo bazali nde na bizaleli oyo oyebi ete baboti na yo bakosepela na yango te? Soki ezali bongo, ekosɛnga oyeba kopona baninga ya malamu.
[Etanda na lokasa 22]
MAKAMBO MISATO MPO NA KOBATELA BANINGA YA MALAMU
◼ Yebáká koyoka. Monisá ete omibanzabanzaka mpo na bolamu ya baninga na yo.—Bafilipi 2:4.
◼ Limbisáká. Kolukaka te ete basusu bázala bato kokoka. “Biso nyonso tobɛtaka mabaku mbala mingi.”—Yakobo 3:2.
◼ Tikeláká bango ntango. Osengeli te kotingamatingama na baninga. Baninga ya malamu bakozala wana ntango okozala na mposa na bango.—Mosakoli 4:9, 10.
[Elilingi na lokasa 20]
Ntango ondimi kosala lokola bato mosusu, okoki kokóma lokola pion ya dame, mpe bakotambwisatambwisa yo ndenge balingi