Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g 7/09 lok. 23
  • Kobeta piololo—Mayele mosusu ya “kosolola”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Kobeta piololo—Mayele mosusu ya “kosolola”
  • Lamuká!—2009
  • Masolo mosusu
  • Makambo ya mabe ekosuka ntembe ezali te!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
  • Tótalaka bitike mpe basi bakufeli-mibali na mpasi na bango
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Kosolola na kati ya mosala na boklisto
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Kosolola na kati ya libota mpe na kati ya lisangá
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
Makambo mosusu
Lamuká!—2009
g 7/09 lok. 23

Kobɛta piololo​—Mayele mosusu ya “kosolola”

EUTI NA MOKOMI NA BISO NA MEXIQUE

◼ Na bangomba ya etúká ya Oaxaca, na ekólo Mexique, Ba-Mazatèque bazalaka na telefone te, ezala ya mabɔkɔ to ya ndenge mosusu. Kasi, bazalaka na likoki ya kosolola na bato oyo bazali mosika, ata na kilomɛtrɛ mibale to koleka, na ndakisa ntango bazali kosala mosala na bilanga ya kafe oyo ezali na bangomba. Sɛkɛlɛ na bango nini? Banda kala mpenza, Ba-Mazatèque bayekolaki ndenge ya kosolola na kobɛta piololo. Pedro, elenge moko ya Mazatèque alobi boye: “Koloba monɔkɔ ya Mazatèque esɛngaka komatisa mpe kokitisa mongongo. Na yango, ntango tozali kobɛta piololo, tolandaka ndenge monɔkɔ na biso elobamaka. Mpe tobɛtaka piololo na mbɛbu mpamba, tosalelaka misapi te.”a

Fidencio, moninga ya Pedro alobeli litomba ya kosolola na kobɛta piololo: “Tosalelaka lolenge yango ya kosolola na moto oyo azali na ntaka molai mpe mingimingi mpo na masolo ya mikuse. Na ndakisa, tata akoki kotinda mwana na butiki mpo na kosomba mampa kasi, mbala mosusu abosani koyebisa ye ete asomba mpe tomati. Soki mwana akómi mosika mpe akokoka koyoka maloba te, tata akoki koyebisa ye yango na piololo.”

Ekómaka mpe ete Batatoli ya Yehova básalela piololo ntango bazali kosolola. Pedro alobi boye: “Ntango nazali na teritware moko mosika mpenza mpe nalingi kobenga ndeko moko aya kokuta ngai kuna, ezalaka na ntina te nakende tii na ndako na ye. Nabɛtaka kaka piololo.”

Pedro alobi boye: “Mpo na koyeba nani azali ‘koloba,’ moto na moto azalaka na ndenge na ye ya kobɛta piololo. Mbala mingi mibali nde babɛtaka piololo. Mwasi akoki koyeba makambo oyo bazali koloba na piololo mpe ata kosalela yango na libota, kasi akoki kosalela yango mpo na kosolola na mobali nyonso te. Yango ekozala kozanga limemya.”

Kaka Ba-Mazatèque te nde basololaka na piololo; ezali mpe na bato mosusu oyo basololaka na piololo na Bisanga Canaries, na Chine, mpe Papouasie-Nouvelle-Guinée. Bazalaka mingimingi bato oyo bafandaka na bangomba mpe bazamba minene. Kutu, ekoki kozala na minɔkɔ koleka 70 ya piololo, mpe minɔkɔ yango soki 12 esili koyekolama.

Bato bazali mpenza na makoki ya kokamwa mpo na kosala makambo. Ya solo, soki osangisi likoki yango na mposa makasi ya kosolola, ndelo ezali kaka oyo makanisi na biso moko etye!

[Maloba na nse ya lokasa]

a Buku moko elobi boye: “Na komatisa mpe kokitisa mbangu ya piololo, ndenge ya kolelisa yango mpe makasi na yango, Ba-Mazatèque bazalaka na likoki ya koyebisana makambo mingi.”

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto