Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g 1/10 lok. 3
  • Sekele 1: Oyo eleki ntina

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Sekele 1: Oyo eleki ntina
  • Lamuká!—2010
  • Masolo mosusu
  • Ntango bozali na makanisi ekeseni
    Lisalisi mpo na libota
  • Ndenge ya koboya koboma libala ntango moto akómi mobange
    Lisalisi mpo na libota
  • Sekele 6: Kolimbisana
    Lamuká!—2010
  • Tyá mosala na esika na yango
    Lisalisi mpo na libota
Makambo mosusu
Lamuká!—2010
g 1/10 lok. 3

Sekele 1: Oyo eleki ntina

“Bóluka koyeba mpenza makambo oyo eleki ntina.”​—Bafilipi 1:10.

Elimboli nini? Na libala ya malamu, molongani mokomoko atyaka bamposa ya moninga liboso ya bamposa na ye moko, liboso ya biloko ya mokili, ya mosala, ya baninga, ata mpe ya bandeko mosusu ya libota. Mwasi ná mobali balekisaka ntango mingi elongo, mpe ná bana na bango. Bango nyonso mibale bandimaka komipimela makambo mosusu mpo na bolamu ya libota.​—Bafilipi 2:4.

Mpo na nini ezali na ntina? Biblia ezwaka libota na ntina mingi. Kutu, ntoma Paulo akomaki ete moto oyo azali te kopesa bato ya ndako na ye biloko oyo basengeli na yango “azali mabe koleka moto oyo azali na kondima te.” (1 Timote 5:8) Kasi, nsima ya ntango, makambo oyo moto azalaki kotya na esika ya liboso ekoki kobongwana. Na ndakisa, mopesi-toli moko na makambo ya libota amonaki ete bato mingi oyo bakɔtaki na likita moko oyo akambaki bamonisaki lokola ete bazalaki kotya mosala na bango liboso ya libota. Alobaki ete mposa na bango ezalaka ete bákoka kosilisa nokinoki makambo ya libota mpo bámipesa na mosala kozanga kokanisa lisusu libota. Liteya nini tozwi? Koloba ete totyaka libota na biso na esika ya liboso ezalaka mpasi te, kasi komonisa yango nde likambo.

Meká kosala boye. Yanolá mituna oyo elandi mpo na koyeba oyo eleki ntina mpo na yo.

◼ Soki molongani to mwana na ngai azali na mposa ya kosolola na ngai, nazelisaka ye mingi te?

◼ Ntango nayebisaka bato mosusu makambo oyo nasalaka, ekómaka mbala mingi ete nalobela makambo oyo nasalaka elongo na libota na ngai?

◼ Nakoboya mikumba mosusu (na mosala to na esika mosusu) soki libota na ngai ezali na mposa na ngai?

Soki eyano na yo na mituna wana ezali ɛɛ, mbala mosusu okoloba ete otyaka libota na yo na esika ya liboso. Kasi molongani na yo mpe bana na yo bakoloba nini? Ezali kaka te ndenge oyo biso moko tomitalelaka nde ekomonisa soki totyaka libota na biso na esika ya liboso. Ezali mpe bongo mpo na basekele mosusu ya libota ya malamu, oyo tokolobela na masolo oyo elandi.

Zwá ekateli makasi. Kanisá likambo moko to mibale oyo okoki kosala mpo na komonisa ete otyaka libota na yo na esika ya liboso. (Na ndakisa: Kanisá makambo nini okoki kolongola na programɛ na yo mpo otikala na ntango mingi mpo na molongani na yo mpe bana na yo.)

Mpo na nini te koyebisa libota na yo ekateli oyo ozwi? Soki moto moko na libota andimi kobongisa makambo mosusu, mbala mingi bamosusu balandaka ndakisa na ye.

[Elilingi na lokasa 3]

Moto oyo atyaka molongani mpe bana na ye na esika ya liboso akoki kolonga

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto