Sekele 3: Kosala elongo
“Bato mibale baleki moto moko . . . Soki moko na bango akwei, mosusu akoki kotɛlɛmisa moninga na ye.”—Mosakoli 4:9, 10.
Elimboli nini? Babalani oyo bazali na boyokani makasi batosaka ebongiseli ya bokonzi ndenge Biblia emonisi yango. (Baefese 5:22-24) Atako bongo, mwasi ná mobali batalelaka libala na bango lokola “eloko na biso” kasi te “eloko na ngai”. Soki mwasi ná mobali bazali kosala na bomoko, bakokanisa lokola minzemba lisusu te. Bazali “mosuni moko”—maloba ya Biblia oyo emonisi kaka te ete libala esengeli koumela libela kasi mpe ete babalani basengeli kozala baninga ya motema.—Ebandeli 2:24.
Mpo na nini ezali na ntina? Soki yo ná molongani na yo bozali kosala makambo elongo te, makambo ya mikemike ekoki nokinoki kokóma minene, mpe bokobanda kopesana foti na esika ya koluka kosilisa likambo oyo ebimi. Nzokande, soki yo ná molongani na yo bozali na bomoko, bokokóma lokola piloti ná piloti-mosungi oyo bazali na mpɛpɔ moko, kasi te lokola bapiloti mibale na mpɛpɔ mibale oyo ezali koluka kotutana. Soki boyokani te na likambo moko, bólukaka ndenge ya kosilisa mokakatano yango, na esika ya kobebisa ntango mpe makasi na bino na kopamelana mpe kopesana foti.
Meká kosala boye. Yanolá mituna oyo elandi mpo na koyeba soki yo ná molongani na yo bosalaka makambo elongo.
◼ Namonaka ete mbongo oyo nazwaka ezali “nyonso ya ngai,” mpo ngai nde nalukaka yango?
◼ Nakimaka bandeko ya molongani na ngai, atako ye moko ayokanaka na bango malamu?
◼ Mpo namiyoka mpenza malamu, esengeli kaka nazala mosika na molongani na ngai?
Zwá ekateli makasi. Kanisá likambo moko to mibale oyo bokoki kosala mpo na komonisa ete yo ná molongani na yo bolingi kosala na bomoko lisusu mingi.
Mpo na nini te kotuna molongani na yo apesa yo likanisi?
[Elilingi na lokasa 5]
Kosala elongo elimboli ete bozali lokola piloti ná piloti-mosungi oyo bazali na mpɛpɔ moko