Kosala na bomoko ezali lokola piloti ná piloti-mosungi oyo bazali kotambwisa mpɛpɔ moko
MPO NA BABALANI
2 Kosala na bomoko
YANGO ELIMBOLI NINI?
Soki mwasi ná mobali bazali kosala na bomoko, bakozala lokola piloti ná piloti-mosungi oyo bazali kotambwisa mpɛpɔ moko. Ata ntango mikakatano ebimi, molongani mokomoko akoluka kosilisa yango ye moko te, kasi bango mibale bakosala elongo mpo na kosilisa yango.
TOLI YA BIBLIA: “Bazali lisusu mibale te, kasi mosuni moko.”—Matai 19:6.
“Mpo na kozala na libala ya esengo, mwasi ná mobali basengeli kosala na bomoko.”—Christopher.
MPO NA NINI EZALI NA NTINA?
Ntango matata ebimi, mwasi ná mobali oyo bazali na bomoko te balukaka kopesana foti, na esika ya koluka kosilisa likambo oyo ebimi. Soki bosilisi matata ya mikemike te, yango ekokóma mikakatano ya minene.
“Kosala na bomoko nde esalaka ete libala ezala malamu. Soki ngai ná mobali na ngai tózalaka na bomoko te, tolingaki kozala lokola babalani te, kasi lokola bato mibale oyo bafandi na shambre moko, oyo bayokanaka te na ntango ya kozwa bikateli ya minene.”—Alexandra.
OYO OKOKI KOSALA
MITALELÁ
Namonaka ete mbongo oyo nazwaka ezali “nyonso ya ngai”?
Naminanolaka malamu kaka soki molongani na ngai azali te?
Nakipaka bandeko ya molongani na ngai te, ata soki ye moko alingaka bango mingi?
SOLOLÁ NA MOLONGANI NA YO
Likambo (to makambo) nini tosalaka na bomoko na libala na biso?
Likambo (to makambo) nini tosengeli kobongisa lisusu?
Makambo nini tosengeli kosala mpo tókoba kosala na bomoko?
TOLI
Kozwa molongani na yo te lokola moto oyo azali na ekipi mosusu ya lisano. Makambo nini okoki kosala mpo yo ná molongani na yo bókóma lokola bato mibale oyo bazali kobɛta na ekipi moko?
Na esika ya kokanisa: ‘Nakoki kosala nini mpo nalonga?’ kanisá nde ‘Tokoki kosala nini mpo tólonga?’
“Koluka te koyeba nani asali malamu to nani asali mabe. Mpo likambo eleki ntina na kati ya libala ezali kimya mpe bomoko.”—Ethan.
TOLI YA BIBLIA: “Bótyaka likebi kaka na makambo na bino moko te, kasi bótyaka mpe likebi na makambo ya bamosusu.”—Bafilipi 2:3, 4.