Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g 7/10 lok. 31
  • Tóyekola na Libota

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tóyekola na Libota
  • Lamuká!—2010
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Ezalaki mpenza ekateli ya malamu?
  • MAKAMBO NINI OYEBI NA NTINA NA MOKONZI YEHOSHAFATE?
  • EZALI NA ZULUNALO OYO
  • BIYANO
  • Okopesa eyano nini?
    Lamuká!—2009
  • Okopesa eyano nini?
    Lamuká!—2010
  • Okopesa eyano nini?
    Lamuká!—2008
  • Mpo na kotalela na libota
    Lamuká!—2010
Makambo mosusu
Lamuká!—2010
g 7/10 lok. 31

Tóyekola na Libota

Ezalaki mpenza ekateli ya malamu?

Tángá Marko 14:66-72. Talá sikoyo elilingi yango, mpe komá biyano na mikɔlɔtɔ oyo ezali na nse.

1. Likambo yango esalemaki wapi?

LISALISI: Tángá Marko 14:53, 54.

․․․․․

2. Ntango balobaki ete azali moyekoli ya Yesu, ekateli nini Petro azwaki?

․․․․․

3. Nini esalemaki ntango nsoso elelaki mpo na mbala ya mibale?

․․․․․

MPO NA KOSOLOLA:

Okanisi ete Petro asalaki bongo mpo na nini? Okoki kosala nini mpo osala te libunga ya ndenge wana?

MAKAMBO NINI OYEBI NA NTINA NA MOKONZI YEHOSHAFATE?

4. Ndenge nini Yehoshafate abongisaki makambo ya kosambisa na Yuda?

LISALISI: Tángá 2 Ntango 19:5-11.

․․․․․

5. Libunga nini Yehoshafate asalaki?

LISALISI: Tángá 2 Ntango 18:1-3; 19:1-3.

․․․․․

MPO NA KOSOLOLA:

Liteya nini okoki kozwa epai ya Yehoshafate ntango olingi kopona baninga?

LISALISI: Tángá 1 Bakorinti 15:33.

EZALI NA ZULUNALO OYO

Yanolá na mituna oyo, mpe tyá vɛrsɛ to bavɛrsɛ oyo esengeli.

LOKASA 4 Tosengeli komipɛtola na nini? 2 Bakorinti 7:․․․

LOKASA 5 Bato mibale bakoki kosala nini? Mosakoli 4:․․․

LOKASA 11 Bato ya bwanya batyaka te elikya na nini? 1 Timote 6:․․․

LOKASA 16 Moto oyo asalaka pite aselelaka nini lisumu? 1 Bakorinti 6:․․․

BIYANO

1. Na kati ya lopango ya nganga-nzambe monene.

2. Petro azwaki ekateli ya kowangana Yesu.

3. Petro alelaki.

4. Yehoshafate atyaki bazuzi oyo babangaka Nzambe na bingumba mpe Balevi ná banganga-nzambe na Yerusaleme.

5. Asalaki kondimana na mokonzi mabe, Ahaba.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto