Lisalisi mpo na baoyo bazali kolela
“Yehova azali pene na baoyo motema ebukani.”—Nzembo 34:18.
NSIMA ya liwa ya moto oyo olingaka, okoki kozala na mayoki ndenge na ndenge: nsɔmɔ, kosila mayele, mawa, mbala mosusu mpe koyoka lokola omemi ngambo to mpe nkanda. Ndenge tomonaki yango na lisolo eleki, bato nyonso bamonisaka mawa na bango ndenge moko te. Na yango, mbala mosusu okozala na mayoki wana nyonso te, mbala mosusu mpe okomonisa mawa na yo lokola bato mosusu te. Kasi, soki oyoki mposa ya kobimisa mawa na yo, ezali mabe te kosala yango.
“Bólela na bino!”
Heloisa, monganga oyo tolobelaki, amekaki kobomba mayoki na ye nsima ya liwa ya mama na ye. Alobi boye: “Na ebandeli nalelaki, kasi eumelaki te, nabandaki kobomba mayoki na ngai—kaka ndenge nasalaka ntango moto na ngai ya maladi akufi. Nakómaki kobɛlabɛla mingi, mbala mosusu mpo na yango. Epai ya bato oyo babungisi molingami, nakopesa toli oyo: Bólela na bino! Bóbimisa mpasi na bino. Ekosalisa bino.”
Kasi, nsima ya mikolo mpe bapɔsɔ, okoki koyoka lokola Cecília, oyo mobali na ye akufaki na kanser. Alobi boye: “Mbala mosusu namiyokaka mabe mpenza mpo namonaka lokola ete bato babaye ngai mpo bazali kokanisa ete sikoyo, nasengelaki kozala na mawa lisusu te.”
Soki okómaki na makanisi ya ndenge wana, kobosana te ete ndenge ya “malamu” ya kolela ezalaka te. Bato mosusu balongaka yango nsima ya mwa mikolo moke. Basusu bakokaka te. Na likambo ya ndenge wana, mwaye ya kowelisa ezalaka te; na yango, komona te ete osengeli kotya “dati” moko boye oyo na ntango yango, osengeli komiyoka malamu.a
Kasi, okosala nini soki ozali komona ete mpasi na yo ekosila ata mokolo moko te mpe ete kozanga elikya ekómi kolya yo nzoto? Mbala mosusu ozali koyoka lokola Yakobo, moto ya sembo oyo, ntango bayebisaki ye ete mwana na ye Yozefe akufi, “azalaki koboya kobɔndisama.” (Ebandeli 37:35) Soki ezali mpe bongo mpo na yo, okoki kosala nini mpo mawa na yo ezindisa yo te?
Batelá nzoto na yo. Cecília alobi boye: “Na bantango mosusu, nayokaka ete nalɛmbi mpenza mpe nakómi na nsuka.” Ndenge maloba na ye emonisi yango, mawa ekoki komema bampasi mingi, na nzoto mpe makanisi ya moto. Na yango, osengeli kotya likebi mingi na kolɔngɔnɔ ya nzoto na yo. Pemáká malamu, mpe lyáká bilei oyo etongaka nzoto.
Ya solo, mbala mosusu okozala mpenza na mposa ya kolya te, ya kokende kosomba biloko te, mpe ya kolamba te. Kasi, soki ozali koboya kolya okoki kobanda kobɛla mpambampamba, mpe yango ekobakisela yo kaka mpasi. Salá makasi olyaka ata moke mpo obatela nzoto na yo.b
Soki likoki ezali, saláká mwa ngalasisi, ata kaka kotambola na makolo. Kosala ngalasisi ekoki kotinda yo obima libándá. Longola yango, kosala mwa ngalasisi ekotinda bɔɔngɔ ebimisa endorphine, mai moko oyo bɔɔngɔ ebimisaka, oyo ekoki kosalisa yo omiyoka malamu.
Ndimá básalisa yo. Yango ekoki kozala na ntina, mingimingi soki obungisi molongani. Ekoki kozala na mwa misala oyo molongani na yo nde azalaki kosala, mpe sikoyo moto ya kosala yango azali te. Na ndakisa, soki molongani na yo nde nazalaki kokipe makambo ya mbongo to kosala misala ya ndako, na ebandeli ekoki kozala mpasi yo moko osala yango. Na ntango wana, toli ya moninga oyo ayebi koloba na mayele ekoki kosalisa yo mingi.—Masese 25:11.
Biblia elobi ete moninga ya solosolo azali moto oyo “abotami mpo na ntango ya mpasi.” (Masese 17:17) Na yango, kokima bato te; kokanisa te ete okozala mokumba mpo na bango. Nzokande, kozala elongo na basusu ekoki kozala lokola gbagba oyo ekosalisa yo olongwa na mawa mpe okóma kondima liwa ya molingami na yo. Nsima ya liwa ya mama na ye, elenge mwasi moko na nkombo Sally amonaki ete kozala elongo na basusu esalisaki ye mingi mpenza. Alobi boye: “Baninga mingi bazalaki kobengisa ngai mpo tólekisa ntango elongo. Esalisaki ngai mingi mpo natika komiyoka ete nazali kaka ngai moko. Nazalaki kosepela mingi soki bato batuni ngai mwa mituna lokola, ‘Ozali koyoka ndenge nini banda mama akufi?’ Namonaki ete koloba makambo ya mama esalisaki ngai namiyoka malamu.”
Koboya te kokanisa makambo eleká. Meká kokanisa bantango ya malamu oyo olekisaki elongo na molingami na yo, na ndakisa na kotala bafoto. Ya solo, na ebandeli, kokanisa bantango ya ndenge wana ekoki kosala yo mpasi. Kasi nsima ya mikolo, makanisi yango ekoki kosalisa yo omiyoka malamu, na esika esala yo mpasi.
Okoki mpe kobanda kokoma makambo na mwa kaye. Okoki kokoma makambo ya malamu oyo bozalaki kosala, ata mpe makambo oyo okanisi ete olingaki koyebisa molingami na yo soki azalaka naino na bomoi. Kotánga makambo oyo okomaka ekoki kosalisa yo oyeba mayoki na yo malamumalamu. Kokoma ekoki mpe kosalisa yo obimisa mayoki na yo malamu.
Ezali boni na oyo etali kobomba biloko oyo mowei azalaki kosalela mingi? Makanisi ekeseni na likambo yango, mpe ekoki kokamwisa biso te mpo bato nyonso bamonisaka mawa ndenge moko te. Bato mosusu bamonaka ete kobomba biloko ya mowei epekisaka moto amiyoka malamu. Basusu bamonaka ete esalisaka. Sally, oyo tolobelaki liboso, alobi boye: “Nabombá biloko mingi oyo ezalaki ya mama. Ekitisaka mpasi na ngai!”c
Tyá motema na “Nzambe ya kobɔndisama nyonso.” Biblia elobi boye: “Bwakelá Yehova ye moko mokumba na yo ya kilo, mpe ye moko akosunga yo.” (Nzembo 55:22) Kobondela Nzambe ezali kaka te likambo oyo ekosalisa yo omiyoka malamu. Ezali mpenza lisolo ya ntina mingi na “Nzambe ya kobɔndisama nyonso, oyo abɔndisaka biso na kati ya bolɔzi na biso nyonso.”—2 Bakorinti 1:3, 4.
Biblia, Liloba ya Nzambe, epesaka biso libɔndisi ya solosolo. Ntoma Paulo alobaki boye: “Nazali na elikya epai ya Nzambe . . . ete lisekwa ekozala, ya bayengebene mpe ya bato oyo bazangi boyengebene.” (Misala 24:15) Kokanisa elikya ya lisekwa oyo Biblia epesi ekoki kobɔndisa yo mingi koleka ntango ozali kolela moto oyo olingaka.d Yango nde Lauren, mwasi moko oyo abungisaki ndeko na ye ya mobali ya elenge na aksida moko, amonaki ete ezali solo. Alobi boye: “Ata soki nazali komiyoka mabe ndenge nini, nazalaki kozwa Biblia mpe kotánga, ata vɛrsɛ moko mpamba. Nazalaki kopona bavɛrsɛ oyo ezalaki kolendisa mingi, mpe nazalaki kozongela kotánga yango mbala na mbala. Na ndakisa, maloba ya Yesu epai ya Marta nsima ya liwa ya Lazare ezalaki kobɔndisa ngai mingi. Ayebisaki ye boye: ‘Ndeko na yo ya mobali akosekwa.’”—Yoane 11:23.
“Ntina ya kotika mawa yango eyangela yo ezali te”
Atako ezalaka mpasi, kobosana mawa na yo ekosalisa yo okoba na bomoi na yo. Komona te ete soki okobi na bomoi na yo, owangani molingami na yo to obosani ye. Mpo na koloba solo, okobosana molingami na yo ata mokolo moko te. Mikolo mosusu, okoki kokanisa ye mingi, kasi mokemoke, mawa ekokita.
Kokanisa makambo mosusu ya esengo oyo esangani na mpasi ekoki mbala mosusu kosepelisa yo. Na ndakisa, Ashley, oyo tolobelaki na lisolo eleki, alobi boye: “Nayebi lisusu makambo oyo esalemaki mokolo oyo ezalaki liboso mama akufa. Emonanaki lokola ayoki malamu, mpe alongwaki na mbeto mpo na mbala ya liboso nsima ya mikolo mingi. Ntango yaya na ngai ya mwasi azalaki kosanola mama nsuki, eloko moko esɛkisaki biso misato; namonaki mama azali komungamunga na esengo, likambo oyo nazalaki komona lisusu te banda kala. Azalaki na esengo mingi ya kozala esika moko na bana na ye ya basi.”
Okoki mpe kokanisa makambo ya motuya oyo oyekolaki epai ya molingami na yo. Na ndakisa, Sally alobi boye: “Mama azalaki moteyi ya malamu mpenza. Azalaki kopesa batoli ya malamu kasi na mayele mpenza, mpe ateyaki ngai ndenge ya kozwa bikateli ya malamu oyo ezali ya ngai moko mpenza, kasi te outi euti na makanisi na ye to oyo ya papa.”
Mbala mosusu kokanisa makambo ya mowei nde likambo mpenza oyo osengeli na yango mpo okende liboso. Yango nde elenge mobali moko na nkombo Alex amonaki. Alobi boye: “Nsima ya liwa ya papa, nazwaki ekateli ya kokoba bomoi na ngai na ndenge oyo ateyaki ngai—nabosana soki moke te kosepela na bomoi. Na bato oyo babungisá moboti, nakopesa toli oyo: Okolonga ata mokolo moko te kosilisa mawa ya liwa ya moboti na yo, kasi ntina ya kotika mawa yango eyangela yo ezali te. Lelá mpe yoká mawa ndenge olingi, kasi kobosana te ete osengeli kosepela na bomoi oyo ezali liboso na yo.”
[Maloba na nse ya lokasa]
a Na likambo yango, osengeli koboya kozwa bikateli ya mbangumbangu, na ndakisa kokende kofanda na ndako mosusu to kobanda bomoi ya sika elongo na moto mosusu. Osengeli kosala bambongwana ya ndenge wana kaka nsima ya kolekisa ntango oyo ekoki mpo omesana na bomoi na yo ya sika.
b Atako masanga ekoki kosalisa yo obosana mpasi ya kobungisa moto, esalisaka ntango molai te. Nsima ya mikolo, masanga ekosalisa yo osilisa mpasi na yo te, mpe okoki kokóma moombo na yango.
c Lokola bato nyonso bamonisaka mawa ndenge moko te, baninga mpe bandeko basengeli te koluka kondimisa moto makanisi na bango na likambo yango.—Bagalatia 6:2, 5.
d Mpo na koyeba ndenge bakufi bazalaka mpe elikya ya lisekwa oyo Nzambe apesi, talá mokapo 6 mpe 7 ya buku Biblia eteyaka mpenza nini? ebimisami na Batatoli ya Yehova.
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 8]
“Ata soki nazali komiyoka mabe ndenge nini, nazalaki kozwa Biblia mpe kotánga, ata vɛrsɛ moko mpamba”—Lauren
[Etanda/Elilingi na lokasa 7]
NTANGO OZALI KOYOKA ETE OMEMI NGAMBO
Mbala mosusu ozali komona ete soki molingami na yo akufi, ezali mpe mpo omonisaki mwa bopɔtu. Yebá ete koyoka ete omemi ngambo—ezala ya solo to ya makanisi kaka—ezali mabe te mpe ekoki kosalisa yo. Awa mpe, kobomba mayoki ya ndenge wana te. Koyebisa moto mosusu ete ozali koyoka ete omemi ngambo ekoki kosalisa yo okitisa motema.
Kasi, kobosana te ete ata soki tolingi moto ndenge nini, tokoki te kotambwisa bomoi na ye, to kopekisa “ntango ná makambo oyo ekanami te” ekwela bato oyo tolingaka. (Mosakoli 9:11) Longola yango, na ntembe te makanisi na yo ezalaki mabe te. Na ndakisa, soki omemaki molingami na yo nokinoki epai ya monganga te, osalaki yango na nko mpo molingami na yo abɛla mpe akufa? Soki moke te! Bongo, omemi nde ngambo mpo na liwa na ye? Ezali bongo te.
Mama moko asalaki makasi atika koyoka ete amemi ngambo nsima ya liwa ya mwana na ye ya mwasi na aksida ya motuka. Alobi boye: “Nazalaki koyoka ete namemi ngambo mpo ngai nde natindaki ye. Kasi nayaki komona ete ezali bozoba komiyoka ndenge wana. Ezalaki mabe te kotika ye abima elongo na tata na ye mpo na kosomba mwa biloko. Ezalaki kaka aksida moko ya nsɔmɔ.”
Okoki koloba boye: ‘Kasi ezali na makambo mingi oyo nalingaki koloba to kosala.’ Ezali solo, kasi nani kati na biso akoki koloba ete azali tata, mama, to mwana ya kokoka? Biblia ekundweli biso boye: “Biso nyonso tobɛtaka mabaku mbala mingi. Soki moto abɛtaka libaku na maloba te, ye azali moto ya kokoka.” (Yakobo 3:2; Baroma 5:12) Na yango, ndimá ete ozali moto ya kokoka te. Koloba ntango nyonso ete ‘soki nasalaka ata boye, to boye’ ekobongola eloko moko te, kasi ekoki nde kopekisa yo obika nokinoki.e
[Maloba na nse ya lokasa]
e Makambo ya etanda oyo euti na mwa buku Ntango moto oyo olingaka akufi, ebimisami na Batatoli ya Yehova.
[Elilingi na lokasa 6]
Na bantango mosusu, esɛngaka moboti oyo azali kolela abɔndisa mwana na ye ya mokóló, oyo azali mpe na mawa
[Bililingi na lokasa 9]
Kokoma na kaye, kotala bafoto, mpe kondima lisalisi ya basusu ekoki kosalisa yo ondima liwa ya molingami