Kondima liwa ya moto oyo olingaka
“Nsango ya liwa ya tata ebulunganisaki ngai mpe nazalaki na elikya lisusu te. Nazalaki koyoka ete namemi ngambo mpo nazalaki pene na ye te ntango akufaki. Eloko moko te ekokani na mpasi makasi ya kobungisa moto oyo olingaka. Nazali koyoka mpasi mingi ndenge papa azali lisusu te!”—Sara.
MPO na bato mingi, ezalaka mpasi kolobela liwa, ezala bato yango bazali ya ekólo to lingomba nini. Na minɔkɔ mosusu, basalelaka maloba ya elilingi mpo na kolobela liwa. Na lingala, na esika bato báloba ete moto “akufi,” balobaka nde “akei na ye,” “azali lisusu te,” to “atiki biso.”
Kasi, ata maloba ya pɛtɛɛ ndenge nini ekokaka mpenza te kokitisa mawa makasi oyo mbala mingi bato bayokaka ntango babungisi moto oyo balingaka. Mpo na bato mosusu, mpasi elekaka makasi na boye ete bakokaka te kondima na mbala moko likambo oyo esalemi.
Soki obungisi moto moko oyo olingaka, mbala mosusu yo mpe ozali kobunda mpo na kondima liwa ya moto yango. Mbala mosusu ozali kutu komonisa ete ozali malamu, nzokande na motema, oyebi ete ezali bongo te. Ya solo, bato nyonso bamonisaka mawa ndenge moko te. Na yango, soki omonisaka mawa na yo polele te, elingi koloba te ete ozali koyoka mawa te.a Nzokande, mikakatano ekoki kobima soki ozali komona ete osengeli komonisa ezaleli moko boye liboso ya bato, mbala mosusu epai ya bato ya libota na yo, oyo bazali mpe na mawa.
“Ntango mpo ngai nalela ezalaki te”
Tózwa ndakisa ya Nathaniel, elenge mobali oyo azalaki na mbula 24 ntango mama na ye akufaki. Alobi boye: “Na ebandeli, nabulunganaki. Namonaki ete nasengeli kosalisa papa mpe baninga ebele ya mama oyo bazalaki komitungisa mingi. Ntango mpo ngai nalela ezalaki te.”
Nsima ya mbula koleka moko, Nathaniel amonaki ete azali kaka kondima te ete mama na ye akufá. Alobi boye: “Na bantango mosusu, papa abengaka ngai mpo abimisa mayoki na ye, mpe ezali malamu. Azalaka na mposa ya kolobela yango, mpe nasepelaka kosalisa ye. Kaka nde ntango ngai nazali na mposa ya lisungi, namonaka lokola nazali na esika ya kokende te.”
Baoyo babatelaka bato ya maladi, ata mpe minganga oyo mbala mingi bamonaka liwa ya bato na miso, bakoki mpe komona ete basengeli kobomba mayoki na bango. Tózwa ndakisa ya Heloisa, oyo azali monganga mbula koleka 20. Azalaki kosala na esika moko oyo bato nyonso bayebani malamu bango na bango mpe azalaki na boyokani malamu na bato ya maladi oyo azalaki kosalisa. Alobi boye: “Namonaki liwa ya mingi kati na bango mpe bamosusu bazalaki baninga na ngai ya motema.”
Heloisa ayebaki ete kobimisa mpisoli ezali likambo oyo ebongi mpo na kokitisa mpasi. Alobi boye: “Kasi nazalaki kolinga kolela te. Lokola mposa na ngai ezalaki nde ya kozala makasi mpo nasalisaka basusu, nazalaki kobomba mayoki na ngai. Nakanisaki ete yango nde bato bazalaki kozela epai na ngai.”
“Lokola azalaki te, nazalaki komona ete ndako etikali mpamba”
Mbala mosusu, komiyoka ete atikali kaka ye moko nde likambo oyo eleki mpasi mpo na moto oyo abungisi molingami na ye. Na ndakisa, Ashley azalaki na mbula 19 ntango mama na ye akufaki na kanser. Alobi boye: “Na nsima, nayokaki ete nasili mayele mpe natikali kaka ngai moko. Mama azalaki moninga na ngai ya motema. Tozalaki kolekisa ntango mingi elongo!”
Tokokamwa te ete Ashley azalaki koyoka mpasi mingi mokolo na mokolo ntango azongi na ndako mpe amoni ete mama na ye azali te. Alobi boye: “Lokola azalaki te, nazalaki komona ete ndako etikali mpamba. Mbala mingi, nazalaki kaka kokɔta na shambrɛ na ngai mpe kolela wana nazali kotala bafoto na ye, mpe kokanisa makambo oyo tozalaki kosala elongo.”
Ezala obungisá moto moko ya libota to moninga ya motema, yebá ete ozali kaka yo moko te. Bato mingi bayekolaki ndenge malamu ya kobunda na mpasi na bango, ndenge tokomona yango.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Lokola bato nyonso bamonisaka mawa ndenge moko te, ekozala malamu te bamosusu bálobaloba mpo na baoyo bamonisaka mawa na bango polelepolele te nsima ya liwa ya molingami.
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 5]
“Nayokaki ete nasili mayele mpe natikali kaka ngai moko. Mama azalaki moninga na ngai ya motema”—Ashley