Biblia elobi nini?
Nzambe andimaka bitumba ya mikolo na biso?
DAVIDI, mokonzi ya Yisraele ya kala, azalaki kobunda bitumba. Mpo na yango, alobaki boye: “[Nzambe] azali koteya mabɔkɔ na ngai etumba, mpe mabɔkɔ na ngai egumbaki litimbo ya motako.”—Nzembo 18:34.
Ntoma Paulo akomaki boye mpo na bakristo: “Atako tozali kotambola na kati ya mosuni, tozali kobunda etumba te na kotalela ndenge tozali na mosuni. Mpo bibundeli ya etumba na biso ezali ya mosuni te.”—2 Bakorinti 10:3, 4.
Bavɛrsɛ yango mibale eyokani te? To ezali mpenza na makambo oyo etindaki Nzambe andima Bayisraele bákendeke bitumba kasi apekisa bakristo kosala yango? Likanisi ya Nzambe mpo na bitumba ebongwani? Tokozwa biyano soki totaleli makambo minene misato oyo ekesenisi Yisraele na lisangá ya bokristo.
Makambo misato oyo ekesenisi Yisraele na lisangá ya bokristo
1. Nzambe apesaki ekólo Yisraele ya kala mokili moko oyo ezalaki na bandelo mpe zingazinga na yango ezalaki mbala mingi bikólo ya bato mabe. Na yango, Nzambe apesaki bato na ye mitindo ete bábatela mabele na bango mpe asalisaki bango bálonga banguna na bango. (Basambisi 11:32, 33) Nzokande, lisangá ya bokristo ezali na ndelo ya mabele te, mpe bakristo bazali na mikili nyonso. Na yango, soki bayekoli ya Kristo na ekólo moko bakɔti na bitumba mpo na kobundisa ekólo mosusu, bakobunda na baninga na bango bandimi, elingi koloba bandeko na bango ya basi mpe ya mibali, nzokande bazwá mitindo ya kolinga bango, ata mpe kokufa mpo na bango.—Matai 5:44; Yoane 15:12, 13.
2. Yisraele ya kala ezalaki na mokonzi mpe kiti ya bokonzi na ye ezalaki na Yerusaleme. Nzokande mokonzi ya bakristo ya solo ezali Yesu Kristo, oyo azali lelo ekelamu ya elimo ya nguya mpe kiti ya bokonzi na ye ezali kuna na likoló. (Danyele 7:13, 14) Yesu ye moko alobaki boye: “Bokonzi na ngai ezali ya mokili oyo te. Soki bokonzi na ngai ezalaki ya mokili oyo, mbɛlɛ basaleli na ngai babundi mpo nakabama epai ya Bayuda te. Kasi nde bokonzi na ngai euti awa te.” (Yoane 18:36) Yango wana, bokonzi to boyangeli moko te ya politiki awa na mabele ekoki koloba ete ezali ya Kristo. Yango etali “basaleli,” to bayekoli ya Yesu na nini? Likambo ya misato emonisi yango.
3. Ndenge moko na bikólo mosusu nyonso, mbala mingi ekólo Yisraele ezalaki kotinda bamemi-nsango, to ndenge tokoki kobenga lelo baambasadɛrɛ to bantoma. (2 Bakonzi 18:13-15; Luka 19:12-14) Kristo mpe asali kaka bongo, kasi bokeseni ekɔti na makambo minene mibale oyo: ya liboso, bayekoli na ye nyonso basalaka lokola baambasadɛrɛ to bantoma. Yango wana ntoma Paulo akomaki mpo na baninga na ye bakristo ete: “Na yango, biso tozali bantoma na esika ya Kristo.” (2 Bakorinti 5:20) Longola bantoma ya kimya, bayekoli ya Yesu bazalaki kosimba bibundeli te. Ya mibale, bayekoli ya Yesu basololaka na moto nyonso oyo andimi koyoka nsango na bango. Yesu alobaki boye: “Nsango malamu oyo ya bokonzi ekosakolama na mabele mobimba esika bato bafandi mpo ezala litatoli na bikólo nyonso.” (Matai 24:14) Alobaki mpe boye: “Yango wana, bókende mpe bókómisa bato bayekoli na bikólo nyonso, . . . bóteya bango bátosa makambo nyonso oyo napesi bino mitindo.”—Matai 28:19, 20.
Likambo ya mawa, bato nyonso te nde bayambaka basaleli ya Kristo. Yango wana Paulo akomelaki Timote, oyo azalaki mokristo mpe mopalanganisi ya nsango malamu, ete: “Lokola ozali soda ya solosolo ya Kristo Yesu ndimá komona mpasi.” (2 Timote 2:3) Ya solo, bibundeli ya Timote ezalaki nde ya elimo, kati na yango Liloba ya Nzambe, oyo ebengami “mopanga ya elimo.”—Baefese 6:11-17.
Mpo na nini Nzambe asundolaki ekólo Yisraele mpe aponaki lisangá ya bokristo?
Na boumeli ya mbula soki 1 500, ekólo Yisraele ezalaki na boyokani malamu mingi na Nzambe, boyokani oyo esimbamaki na kondimana oyo asalaki na bango. (Kobima 19:5) Kondimana yango oyo Moize azalaki moyokanisi na yango, ezalaki na Mibeko Zomi mpe mibeko mosusu. Mibeko yango nyonso ezalaki kolendisa losambo ya solo mpe bizaleli malamu. (Kobima 19:3, 7, 9; 20:1-17) Kasi, likambo ya mawa, ekólo Yisraele ezangaki bosembo epai ya Nzambe, ekómaki kutu koboma basakoli na ye.—2 Ntango 36:15, 16; Luka 11:47, 48.
Nsukansuka, Yehova atindaki Mwana na ye, Yesu Kristo, oyo abotamaki Moyuda. Na esika Bayuda báyamba ye lokola Masiya, baboyaki ye. Mpo na yango, Nzambe asukisaki kondimana na ye na Yisraele. Ezalaki lokola efelo oyo ezalaki kokabola Bayuda na bikólo mosusu ekweaki.a (Baefese 2:13-18; Bakolose 2:14) Eumelaki te, Nzambe asalaki lisangá ya bokristo mpe atyaki Yesu mokonzi na yango. Lisusu, yambo ete ekeke ya liboso esila, lisangá yango esangisaki mpenza bato ya bikólo ndenge na ndenge. Ntoma Petro, oyo azalaki Moyuda, alobaki boye: “Na ekólo nyonso moto oyo azali kobanga [Nzambe] mpe azali kosala makambo ya boyengebene andimami na ye.”—Misala 10:35.
Batatoli ya Yehova basalaka makasi bálanda ndakisa ya bakristo ya liboso. Na yango, Batatoli bayebani ete basakolaka nsango malamu mpe bakɔtaka te na makambo ya politiki to na bitumba. (Matai 26:52; Misala 5:42) Batikaka eloko moko te epekisa bango kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe, guvɛrnema kaka moko oyo ekolongola mabe mpe ekotya kimya ya seko na mabele. Lokola ntoma Paulo azalaki na elikya wana kitoko, akomaki boye: “Na esika ya Kristo, tozali kobondela ete: ‘Bózonga na boyokani elongo na Nzambe.’” (2 Bakorinti 5:20) Lelo oyo, tosengeli kobondela bato nokinoki koleka mpo tokómi na nsuka ya “mikolo ya nsuka” ya mokili oyo mabe.—2 Timote 3:1-5.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Na ebandeli bazalaki kosalela liloba “Moyuda” mpo na kolobela Moyisraele ya libota ya Yuda. Na nsima, bakómaki kosalela yango mpo na kolobela Baebre nyonso.—Ezera 4:12.
OSILÁ KOMITUNA?
● Ezaleli nini ya ntina mingi bakristo basengeli komoniselana?—Yoane 13:34, 35.
● “Ebundeli” ya libosoliboso ya mokristo ya solo ezali nini?—Baefese 6:17.
● Bamonisi ya Kristo bazali kosakola nsango nini ya ntina?—Matai 24:14; 2 Bakorinti 5:20.
[Elilingi na lokasa 15]
Batatoli ya Yehova bazali lisangá ya bandeko ya mikili ndenge na ndenge mpe bakɔtaka na bitumba te