Bitumba ezali malamu mpo na bakristo?
“Mobeko nini elobi ete etumba ezali mabe to ezali lisumu? Oyo azali na eyano apesa ngai.”—Oliver O’Donovan, profɛsɛrɛ moko ya mateya ya Bokristo
NA LIYEMI moko oyo bapesá nkombo Mbeka, oyo basalaki mpo na kokanisaka Etumba ya Liboso ya mokili mobimba mpe batyá yango na ndako moko oyo babombaka biloko ya bitumba ya kala na Canada, bayemá basoda bakufi na etumba, baoyo babiki na etumba mpe balɛmbi, elongo na mabota na bango ntango bazongi na ekólo na bango. Na likoló ya liyemi yango, ezali mpe na elilingi ya Yesu Kristo likoló ya ekulusu. Bato mosusu basepelaka ata moke te ndenge batyá elilingi ya Yesu, “Nkumu ya Kimya,” pene na liyemi ya etumba. (Yisaya 9:6) Bamosusu, oyo bazalaka na botɔndi mpo na bana mboka na bango oyo bandimaki kokufa mpo na ekólo, bamonaka ete Nzambe ná mwana na ye balingaka bakristo bábunda mpo na kimya mpe bonsomi ya ekólo na bango.
Banda ebele ya bikeke, bakonzi ya mangomba bazali koteya ete bitumba ezali mabe te. Na mobu 417 ya ntango na biso, Augustin, moto moko ya teoloji, akomaki boye: “Bókanisa te ete soki moto azali soda, mpe asimbaka mondoki mpo na bitumba, Nzambe akoki kondima ye te. . . . Bato mosusu, na nzela ya mabondeli, bazali kobundela bino na banguna oyo bamonanaka te, wana bino bozali kobundela bango na banguna ya mabe mpenza oyo bozali komona na miso.” Na ekeke ya 13, Thomas d’Aquin alobaki ete “bitumba ezalaka mabe te soki ezali mpo na kobatela babola mpe ekólo mobimba na mayele mabe ya monguna.”
Okanisi boni? Soki basoda bakei etumba mpo na ntina moko ya malamu, na ndakisa mpo na bonsomi ya ekólo na bango to mpo na kolongola bato na mpasi, Nzambe akondima etumba yango te? “Mobeko” nini ekoki kosalisa bakristo báyeba likanisi ya Nzambe na likambo yango?
Ndakisa ya Yesu Kristo
Tokoki mpenza koyeba likanisi ya Nzambe na likambo lokola bitumba oyo bato bazali kobunda lelo? Ntoma Paulo mpe atunaki motuna yango: “‘Nani ayebi makanisi ya Yehova, mpo alakisa ye’? Kasi biso tozali na makanisi ya Kristo.” (1 Bakorinti 2:16) Mpo na kosalisa biso, Yehova atindaki Yesu awa na mabele mpo alakisa biso nzela. Makambo oyo Yesu alobaki mpe asalaki emonisaki makanisi ya Yehova mpe banzela na ye. Yesu alobaki nini mpo na bitumba? Ndenge nini azalaki kotalela likambo yango?
Bato mosusu bakoki kokanisa ete kobunda mpo na Yesu ezali likambo ya ntina mingi. Moyekoli na ye moko mpe akanisaki bongo. Ntango batɛkaki Yesu mpe ebele ya bato bayaki na bibundeli mpo na kokanga ye na katikati ya butu, moninga na ye Petro “asembolaki lobɔkɔ na ye mpe abimisaki mopanga na ye mpe abɛtaki moombo ya nganga-nzambe monene mpe akataki ye litoi.” Petro asengelaki mpenza kosimba mopanga mpo na kobundela Yesu? Yesu alobaki na Petro boye: “Zongisá mopanga na yo na esika na yango, mpo baoyo nyonso basalelaka mopanga bakokufa na mopanga.”—Matai 26:47-52.
Maloba wana ya Yesu ekoki kokamwisa biso te. Mbula mibale liboso, alobaki boye: “Boyokaki ete balobi, ‘Osengeli kolinga mozalani na yo mpe koyina monguna na yo.’ Nzokande, ngai nalobi na bino ete: Bókoba kolinga banguna na bino mpe kobondela mpo na baoyo bazali konyokola bino; mpo bómonisa ete bozali bana ya Tata na bino oyo azali na likoló, mpo abimiselaka bato mabe ná bato malamu moi na ye mpe anɔkiselaka bayengebene ná bato oyo bazangi boyengebene mbula.” (Matai 5:43-45) Tokoki koloba ete mokristo alingaka banguna na ye mpe abondelaka mpo na bango soki azali kobundisa bango?
Banda kala, emonanaka ete bakristo bazali na banguna ebele. Na ndakisa, Baroma bakatelaki Yesu Kristo etumbu ya liwa mpe babomaki ye. Mwa moke na nsima, koloba kaka ete ozali mokristo ekómaki lisumu monene. Yesu ayebaki ete bakristo bakoki kozala na mposa ya kosimba mandoki mpe kotombokela Baroma oyo bazalaki konyokola bango, ndenge Bayuda mosusu basalaki. Yango wana, alobaki mpo na bayekoli na ye boye: “Bazali bato ya mokili te, ndenge ngai mpe nazali moto ya mokili te.” (Yoane 17:16) Bakristo bakɔtaka te na makambo ya politiki. Likambo moko te ekoki kotinda bango bámikɔtisa na mosala ya soda, ata soki bazali konyokola to kotumola bango to ekólo na bango.
Bamipesá mpenza mpo na Bokonzi ya Nzambe
Bakristo ya solo bayokelaki Yesu mpe baboyaki kokɔta na makambo ya mokili. Tózwa ndakisa ya likambo moko oyo esalemaki na Ikoniumu, engumba moko ya kala na Azia Moke. “Ntango bato ya bikólo mpe Bayuda ná bankumu na bango balukaki kosambwisa bango mabe mpe kobamba bango mabanga, bango, ntango bayebisaki bango likambo yango, bakimaki na bingumba ya Likaonia, Listra mpe Derbe mpe na mokili ya zingazinga; mpe kuna bakobaki kosakola nsango malamu.” (Misala 14:5-7) Kobosana te ete ntango batɛmɛlaki bango, bakristo basimbaki mandoki te mpo na kobunda; balukaki mpe te kozongisa mabe mpo na mabe. Bakobaki nde kosakola “nsango malamu.” Nsango nini ya malamu bazalaki kosakola?
Bakristo bazalaki kosakola nsango oyo Yesu mpe asakolaki. Alobaki boye: “Nasengeli mpe kosakola nsango malamu ya bokonzi ya Nzambe.” (Luka 4:43) Yesu ná bayekoli na ye bamipesaki mpenza mpo na Bokonzi ya Nzambe. Ata mokolo moko te Kristo asalelaki basoda ya ekólo na bango mpo na kobundela Bokonzi ya Nzambe. Alobaki boye: “Bokonzi na ngai ezali ya mokili oyo te. Soki bokonzi na ngai ezalaki ya mokili oyo, mbɛlɛ basaleli na ngai babundi mpo nakabama epai ya Bayuda te. Kasi nde bokonzi na ngai euti awa te.”—Yoane 18:36.
‘Bózala na bolingo na kati na bino’
Koboya kokɔta na bitumba ezali elembo oyo emonisaka bakristo ya solo. Yesu alobaki boye: “Na ndenge yango bato nyonso bakoyeba ete bozali bayekoli na ngai, soki bozali na bolingo na kati na bino.” (Yoane 13:35) Bamilio ya bato bazali na esengo ya komona ete ezali na etuluku moko ya bato oyo bazali na bolingo ya ndenge wana, ata ntango bato bazali kotyola, kotya bango na bolɔkɔ to koboma bango mpo bazali koboya kosimba mandoki.
Na bikólo ya Mpoto oyo ezalaki na mabɔkɔ ya Banazi, babwakaki Batatoli ya Yehova soki 10 000 na bolɔkɔ mpo baboyaki kokɔta na makambo ya mokili; kati na bango, soki 3 000 batindamaki na bakaa ya bakangami. Na ntango yango na États-Unis, bakɔtisaki Batatoli koleka 4 300 na bolɔkɔ mpo baboyaki kokɔta mosala ya soda. Ata Motatoli moko te, ezala na Allemagne to na Amerika, asimbaki mondoki mpo na kobunda na bandeko na ye bakristo to na bato mosusu. Ndenge nini bakokaki koloba ete bazali na bolingo na kati na bango mpe balingaka bazalani na bango soki basimbaki mandoki?
Bato mingi balobaka ete kosimba mondoki ezali na ntina mpo na komibatela. Kasi tókanisa naino: Atako bakristo ya liboso banyokwamaki makasi mpe baboyaki kobunda, bakufaki bango nyonso te. Roma, oyo ezalaki bokonzi moko ya nguya mingi, elongaki te kosilisa bango. Ata lelo oyo, bakristo ya solo bazali se kokóma ebele, mpe baboyaka kaka kokɔta na makambo ya mokili. Na esika ya kozwa mandoki mpo na kobunda, batalelaka kaka Nzambe. Biblia, Liloba na ye, elobi boye: “Bandeko ya bolingo, moto oyo asali bino mabe, bózongisela ye mabe te kasi bótikela nde nkanda esika; mpo ekomamá ete: ‘Kozongisa mabe ezali likambo na ngai; ngai nakozongisa mabe, Yehova alobi bongo.’”—Baroma 12:19.
[Etanda na lokasa 30]
BITUMBA OYO NZAMBE ANDIMAKI
Yisraele ya kala, ekólo oyo Nzambe aponaki bikeke ebele liboso lisangá ya bokristo esalema, bazalaki ntango mosusu kozwa ndingisa ya kosangisa basoda mpe kokende bitumba. Liboso Bayisraele bákɔta na mokili ya Kanana, mokili oyo Nzambe alakaki Abrahama, balobaki na bango boye: “Yehova Nzambe na yo akotikela mpenza yo [bikólo nsambo], mpe osengeli kolonga bango. Okobebisa mpenza bango. Osengeli kosala kondimana ata moko te ná bango mpe komonisela bango boboto ata moke te.” (Kolimbola Mibeko 7:1, 2) Na yango, Yosua, mokonzi ya mampinga ya Yisraele, alongaki bikólo yango, “ndenge Yehova Nzambe ya Yisraele apesaki mitindo.”—Yosua 10:40.
Lokoso nde etindaki Bayisraele babɔtɔla bamboka yango mpe bákonza yango? Te. Bikólo yango emipesaki mpenza na losambo ya bikeko, kosopa makila mpe kosala pite na ndenge ya mbindo. Bazalaki ata kotumba bana na bango na mɔtɔ lokola mbeka. (Mitángo 33:52; Yirimia 7:31) Bosantu ya Nzambe, bosembo mpe bolingo mpo na basaleli na ye etindaki ye apɛtola mokili yango. Atako bongo, Yehova atalaki motema ya moto mokomoko mpe abikisaki bato oyo bandimaki kotika banzela na bango ya mabe mpe kosalela ye. Mokonzi moko te ya basoda akoki kosala likambo ya ndenge wana lelo oyo.
[Elilingi na lokasa 31]
Yesu alingaki ete bayekoli na ye bábundelaka ye to baninga na bango bakristo?
[Elilingi na lokasa 31]
Batatoli ya Yehova oyo babimaki na kaa ya bakangami ya Buchenwald, na 1945