Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g 10/11 nk. 18-20
  • Mpo na nini kobomba mbongo na esika ya kosilisa yango?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mpo na nini kobomba mbongo na esika ya kosilisa yango?
  • Lamuká!—2011
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Makanisi misato ya bwanya oyo euti na Biblia
  • Ndenge oyo okoki kobomba mbongo
  • Ndenge malamu ya kofuta nyongo
  • Biloko oyo okoki kokɔtela nyongo
  • Ndenge nakoki kosalela mbongo malamu
    Mituna oyo bilenge batunaka—Biyano oyo ebongi, Volimi 2
  • Saleláká mbongo na yo na bwanya
    Lamuká!—2009
  • Ndenge ya kosalela mbongo malamu
    Okoki kozala na libota ya esengo
  • Nasengeli kodefa mbongo epai ya ndeko moko ya lisangá?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
Makambo mosusu
Lamuká!—2011
g 10/11 nk. 18-20

Mpo na nini kobomba mbongo na esika ya kosilisa yango?

BATO mingi balobaka boye: “Kobomba mbongo ezalaka elɛngi te. Kosomba bilamba, baaparɛyi, mpe biloko mosusu nde ezalaka elɛngi.”

Ntango nkita ya mokili mobimba ebebaki, ata soki obungisaki mbongo to te, batoli oyo elobeli ndenge ya kobomba mbongo mpe ya kosalela yango ekoki kosalisa yo. Talá batoli oyo euti na mokanda oyo, banda kalakala, esalisaka ebele ya bato báyeba kosalela mbongo.

Makanisi misato ya bwanya oyo euti na Biblia

Eleki sikoyo pene na mbula 2000, Yesu Monazarete alobaki ndakisa moko oyo ezali na likanisi moko malamu na oyo etali ndenge ya kosalela mbongo. Na ndakisa yango, nkolo alobaki na moombo na ye boye: “Ebongaki ótia mbongo na ngai na banke, boye lokola nazongi nalingaki kokende kokamata yango ná benefisi.” (Matié 25:27, Bible na lingala ya lelo oyo) Likambo oyo Yesu alobaki ezali mpenza na ntina lelo oyo. Tótalela mpo na nini.

Na mikili mosusu, bato oyo babombaki mbongo na banki, nsima ya mbula zomi, bazwaki benefisi oyo elekaki mpenza mbongo oyo babombaki. Ya solo, lelo oyo babanki mingi te ezongiselaka bato mbongo na benefisi ebele, mpe ntango mosusu benefisi oyo bapesaka bato ezalaka te oyo balakaki bango. Kasi, benefisi ezala mingi to te, ezali malamu kobomba mbongo mpo na mikakatano oyo eyaka mbalakaka.

Biblia emonisi likambo yango na maloba oyo: “Bwanya ebatelaka ndenge mpe mbongo ebatelaka.” (Mosakoli 7:12) Kasi mbongo ekoki kobatela te soki moto abombaki yango te! Yango wana, ezali malamu kobomba mbongo mpo na mikolo ekoya, ata mpe mpo na makambo ya ntina. Biblia elendisi biso boye: “Mokomoko na bino na ndako na ye mpenza abomba mwa eloko pembeni na kotalela biloko oyo azali na yango.”​—1 Bakorinti 16:2.

Ndenge oyo okoki kobomba mbongo

Ya liboso, liboso osomba eloko moko ya ntalo, omituna soki ozali mpenza na mposa na yango.

Ya mibale, soki ozali na mposa ya eloko moko, luká eloko ya sika ntango bakitisi ntalo to oyo moto asalelá mpe azali kotɛka yango. Espen ná mwasi na ye Janne, oyo bafandaka na Norvège, bazalaki na mposa ya kosomba mwa kiti ya kotambwisa bana mpo na bebe na bango, Daniel. Basombaki kiti moko oyo ezalaki naino malamu mpenza na ntalo oyo ezalaki katikati ya mbongo oyo bakokaki kosomba yango na magazini. Espen alobi boye: “Ntango ekokóma moke mpo na Daniel, tokotɛka yango na ntalo ya malamu.” Kasi, abakisaki boye: “Koluka biloko oyo okoki kosomba na ntalo ya malamu ezwaka ntango mingi.” Okoki komona ete ebongi te olekisa ebele ya ntango mpo na koluka biloko ya kala.a

Ya misato, Kowela kosomba te; zwá ntango ya kokanisa. Soki omoni kaka ete ozali mpenza na mposa ya eloko yango, okoki koluka eloko ya ndenge wana oyo bazali kotɛka na ntalo moke to oyo basalelá. Okoki mpe kobomba mbongo mingi soki oluki kaka te kosomba biloko ya modɛlɛ oyo ekendá nsango. Lisusu, na esika ya kosombela bana biloko ya midɛlɛ ya mikolo oyo, oyo ezali ntalo mingi, mbala mosusu ebongi kosombela bango biloko na tombola.

Ndenge moko mpe, mama oyo azali na bebe akoki kopona kosomba bakushɛ oyo akoki kosukola, na esika ya kosomba bakushɛ oyo akosalela mbala moko mpe abwaki. Buku moko (Budgeting​—Personal Spending and Money Management a Key to Weathering the Storm) ya mokomi Denise Chambers elobi boye: “Bakushɛ oyo ebwakamaka ekoki kolya moto dolare 2 000 to koleka na mbula mibale. Nzokande, bakushɛ oyo basukolaka [ekozwa] dolare 300 to 500 na mbula mibale.” Abakisaki boye: “Bakushɛ ya mikolo oyo ezali mpasi te na kosalela mpe bakoki kobwaka yango ata na fulu to ekunde!”

Ya minei, kobosana te ete esɛngaka mbongo moke mpo na kosomba biloko mpe kolamba yo moko na esika ya kokende kolya na restora. Soki ozali na bana oyo bakendaka kelasi, ebongi malamu olakisa bango ndenge ya kosala mikate na esika ya kopesa bango mbongo mpo na kosomba bilei ya ntalo. Lisusu, na esika ya kosomba masanga oyo esɛngaka mbongo mingi, malamu omɛlaka mai. Mai ezali malamu mingi mpo na nzoto mpe esɛngaka mbongo mingi te.

Eleki mwa bambula, mabota mingi bazalaki kolona ndunda bango moko. Osilá kokanisa kolona yo moko mwa biloko ya kolya? Bato mingi, ata baoyo bafandaka na bandako ya mike, bazalaka na mwa esika oyo bakoki kolona mwa biloko. Mbala mosusu okokamwa ebele ya biloko oyo okoki kobuka na mwa eteni moke ya mabele!

Toli mosusu yango oyo: Soki osepeli kozala na telefone ya mabɔkɔ, ebongi osalelaka yango kaka soki osengeli kobenga nokinoki mpe kokata motángo ya unité oyo okosomba mpo na kosalela. Soki ozali na masini ya kokausa bilamba, ebongi malamu osalelaka yango mingi te. Okoki kotandaka bilamba mosusu, ata mpe bilamba nyonso, na nsinga. Okoki mpe kokangaka ntango mosusu malili. Liboso ya kotya malili, omituna boye: ‘Ndako ezali mpenza molunge?’ Okoki mpe kosolola na bato mosusu mpo na koyeba ndenge oyo basalaka mpo básalela kura mingi te.

Ezali mpe malamu kobomba mbongo na banki. Longola yango, Hilton, mosali moko na Afrique du Sud, alobi boye: “Ezali malamu te kobomba mbongo nyonso na esika moko. Ntango mosusu babanki ekweaka. Tosilá kokutana na likambo ya ndenge wana.” Yango wana, poná malamu banki oyo eyebani ete soki ekwei, Leta akofuta mbongo ya bato.

Ndenge malamu ya kofuta nyongo

Ya liboso, luká ofutaka na banki to epai ya moto oyo adefisaki yo, mbongo oyo ezali likoló ya mbongo oyo bakatelá yo mpo na sanza nyonso.

Ya mibale, luká liboso kosilisa banyongo ya minene.

Ya misato, tiká bisombasomba. Yango ezali na ntina mingi.

Osilá kobendama na eloko moko oyo basalelaki yango piblisite mingi? Danny, tata ya libota moko na Suède, alobi ete ekómelá ye. Mombongo na ye ezalaki kotambola malamu, kasi esengelaki atɛka yango mpo na kofuta nyongo oyo akɔtaki na banki. Likambo yango eteyaki ye mpe lelo oyo asalelaka mbongo malamu. Apesi toli oyo: “Kebá na lokoso. Nsoso amɛlaka mbuma oyo ekoki na mongongo na ye.”

Biloko oyo okoki kokɔtela nyongo

Bato mingi te bakoki kozala na mbongo oyo ekoki mpo básomba mbala moko ndako to lopango. Yango wana, mingi bakɔtaka nyongo na banki. Bakoki komona mbongo ya nyongo oyo bafutaka sanza na sanza na banki, lokola mbongo oyo bafutelaka ndako sanza na sanza. Kasi, nsukansuka soki nyongo esili, ndako ekómi ya bango!

Bato mingi bamonaka malamu kokɔta nyongo mpo na kosomba motuka oyo ezali naino malamu. Soki basilisi nokinoki kofuta nyongo, motuka ekómi ya bango, mpe yango ezali ndenge mosusu ya kobomba mbongo.b Bato mosusu bamonaki malamu kosomba motuka oyo moto mosusu asalelá, kasi ezali naino malamu. Bamosusu mpe, mpo na kobomba mbongo, basepelaka kozwa bisi, to mpe kotambola na velo.

Ezala mayele nini oponi kosalela, koluka makambo minene te, talelá makoki na yo mpe kozwa ekateli nokinoki te. Kosalela mbongo kozanga kokanisa liboso ekoki kokanga motó nsinga na nkingo mpe ekoki kopesa ye mpasi. Yango wana, zalá na mayele mpe yebá kosalela mbongo, mpe yango ekopesa yo esengo mingi.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Mpo na koyeba ete ozali kosomba eloko ya moyibi te, ezali malamu ete moto oyo azali kotɛka apesa yo faktire oyo ezali na nkombo mpe adrɛsi na ye.

b Kobosana te ete soki ozali lisusu na mosala te mpe ozali kokoka lisusu te kofuta nyongo, bakoki kobɔtɔla yo ndako to motuka mpe mbongo nyonso oyo ofutaki liboso ekei na mai.

[Bililingi na lokasa 19]

NDENGE YA KOBOMBA MBONGO

Luká biloko oyo bakitisi ntalo

Sombá bilamba ya ntalo moke to na tombola

Lakisá bana na yo kolamba biloko oyo bakolya

[Elilingi na lokasa 20]

Loná mwa ndunda na lopango. Tandáká bilamba na nsinga

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto