Nasengeli kodefa mbongo epai ya ndeko moko ya lisangá?
MWANA ya Simon azali kobɛla. Asengeli kozwa nkisi nokinoki. Kasi Simon azali mpenza mobola, azali na mbongo te mpo na kosomba nkisi yango. Akosala nini? Ndeko moklisto moko, nkombo na ye Michael, azali na mbongo mingi. Mbala mosusu Michael akoki kodefisa ye mbongo. Nzokande, Simon ayebi malamu na motema na ye ete akokoka te kozongisa mbongo soki badefisi ye yango.a
Simon akei koyebisa Michael likambo oyo azali na yango. Kasi Michael ayebaki nini akokaki kosala te. Ayebaki ete ndeko na ye asengeli mpenza na mbongo. Ayebaki mpe lisusu ete Simon akokoka te kozongisa mbongo oyo akoki kodefisa ye. Mpamba te bobele mpo na koleisa libota na ye, Simon amonaka mpasi mingi. Na bongo, Michael asengeli kosala nini?
Na bamboka mingi, bato babungisaka biloko bazali na yango na mbalakaka. Mpe batikalaka mabɔkɔ mpamba to mpe bazangaka makoki ya kosomba nkisi ya monganga. Banki edefisaka mbongo te. To mpe banki oyo edefisaka mbongo esɛngaka mosolo mingi ya kobakisa likoló ya oyo odefaki. Ntango likambo moko ya mbalakaka ebimi, ndenge mosusu ya kosala ezalaka te bobele kodefa mbongo epai ya moninga. Atako bongo, liboso ya kodefa mbongo ezali na mwa makambo ya ntina oyo osengeli kotalela.
Tángá liboso motuya
Makomami mazali kopesa toli ya malamu epai na modefisi mpe epai na modefi. Soki balandi toli yango, bakoki kopɛngola mikakatano oyo mibimaka mpe kotungisama na makanisi.
Na ndakisa, Biblia ezali kokundwela biso ete tosengeli te kozwa likambo litali kodefa mbongo na lisɛki. Ntoma Paulo asɛngaki na baklisto ya Loma ete: “Bózalaka na nyongo epai na moto moko te, bobele nyongo na kolingana. Mpo ete ye oyo akolingaka moto mosusu, azali kokokisa Mibeko.” (Baloma 13:8) Ya solo mpenza, nyongo oyo moklisto azali na yango epai na basusu ezali bobele nyongo ya bolingo. Yango wana, tosengeli libosoliboso komituna: ‘Nasengeli mpenza kodefa?’
Soki ezali bongo, boye ezali likambo ya mayele kotalela makambo oyo makoki kobima nsima ya kozwa nyongo. Yesu Klisto amonisaki ete liboso ya kozwa bikateli ya minene esengeli kokanisa malamu. Atunaki bayekoli na ye ete: “Soko moto moko kati na bino azali na mposa na kotonga ndako, akofanda liboso kotánga motuya na yango kotala soko azali na mosolo na kosilisa yango te?” (Luka 14:28) Tosengeli kosalela lilako oyo ntango tolingi kodefa mbongo epai ya ndeko moko. Kotánga liboso motuya ya mbongo ya kodefa elimboli kotalela ndenge nini mpe ntango nini tokozongisa mbongo yango.
Modefisi asengeli koyeba ndenge nini mpe ntango nini mbongo oyo adefisi yo ekofutama. Soki totaleli likambo yango malamumalamu, tokokoka kopesa ye biyano ya sikisiki. Tosili nde kotalela malamu soki tokozongisa mbongo oyo todefi noki? Na ntembe te, ekoki kozala likambo ya pɛtɛɛ koloba na ndeko na biso ete: “Nakozongisa mbongo na yo noki. Okoki kotyela ngai motema.” Kasi ekozala malamu kotalela likambo yango na lolenge oyo ebongi, boye te? Tosengeli koyeba uta na ebandeli lolenge ya kozongisa mbongo oyo todefi, mpamba te ezali yango nde Yehova asɛngi na biso. Nzembo 37:21 elobi ete: “Moto mabe akodefa, nde akozongisa te.”
Soki totaleli malamu ndenge nini mpe ntango nini tokozongisa mbongo oyo todefi, boye tokoyeba kilo ya likambo oyo tozali kondima. Yango ekosalisa biso tóboya bidefadefa. Koboya kokɔta banyongo ezali malamu. Masese 22:7 ekebisi biso boye: “Modefi azali moombo na modefisi.” Ata soki modefi mpe modefisi bazali bandeko na elimo, kodefa mbongo ekoki kobebisa bondeko na bango. Matata na ntina na banyongo esilá kokɔtisa mobulu kati na masangá mosusu.
Yebisá mpo na nini olingi kodefa mbongo
Modefisi asengeli koyeba ndenge tokosalela mbongo oyo tolingi kodefa. Tozali kodefa mpe epai ya bato mosusu? Soki ezali bongo, tosengeli koyebisa likambo yango polele epai ya moto oyo alingi kodefisa biso mbongo, mpamba te yango ezali na ntina mpo na koyeba soki tokokoka kozongisa mbongo oyo tolingi kodefa.
Tosengeli kokesenisa mbongo oyo moto adefi mpo na kosala mombongo na mbongo oyo moto adefi mpo na kosilisa likambo moko ya mbalakaka. Ezali na mobeko moko te na Makomami oyo elobi ete moto asengeli kodefisa ndeko na ye mbongo mpo asala mombongo. Kasi, akokoka te kokanga motema mpo na kosalisa ndeko na ye oyo azangi mpenza, oyo azangi ata mbongo ya kolya, ya kosomba bilamba to ya kosomba nkisi. Koloba polele mpe koloba solo na makambo oyo ekosalisa biso tópɛngola kozanga koyokana oyo ekoki kobima na nsima.—Baefese 4:25.
Bókoma yango na mokanda
Ebongi mpenza ete bókoma yango na mokanda mpo na kopɛngola matata oyo makoki kobima na nsima. Soki tokomi yango na mokanda te, tokoki mpenza kobosana makambo mosusu ya mikemike, ata oyo ezali na ntina. Tosengeli kokoma na mokanda motuya ya mbongo oyo todefi mpe ntango nini tosengeli kozongisa yango. Ekozala likambo ya mayele ete modefi mpe modefisi bátya mabɔkɔ na mokanda yango mpe mokomoko azala na kopi ya mokanda yango. Biblia emonisi ete boyokani nyonso oyo etali makambo ya mbongo esengeli kokomama na mokanda. Mwa moke liboso ete bato ya Babilone bábebisa Yelusaleme, Yehova ayebisaki Yilimia ete asomba eteni ya mabelé epai na moko na bandeko na ye. Tokoki kozwa litomba soki totaleli lolenge basalaki.
Yilimia alobi ete: “Nasombaki mpe elanga kati na Anatoto, oyo na Hanamaele, mwana na ndeko na tata na ngai mpe napimelaki ye mosolo, sɛkɛlɛ zomi na nsambo na palata. Nakomaki mpe mokanda mpe nakangaki yango, nabyangaki batatoli mpe napimelaki ye mosolo kati na epimelo na bozito. Bongo nakamataki mokanda na lisombi oyo ekangami pelamoko mobeko mpe ezaleli, mpe oyo ezalaki polele lokola. Mpe napesaki mokanda na lisombi epai na Baluku, mwana na Neliya, mwana na Mahaseya, na miso na Hanamaele, mwana na ndeko na tata na ngai mpe na miso na batatoli baoyo bakomaki nkombo na mokanda na lisombi, liboso na Bayuda nyonso baoyo bafandaki na lopango na bakɛngɛli.” (Yilimia 32:9-12) Ezali solo ete ndakisa oyo elobeli nde kosomba eloko kasi kodefa mbongo te. Atako bongo, yango emonisi biso ntina ya kosalela na lolenge ya polele mpe ya sikisiki makambo matali mbongo.—Talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli, 1 Augústo 1973, nkasa 479-480 (ebimeli ya Lifalanse).
Soki mikakatano mibimi, baklisto basengeli kosilisa yango na kolanda toli ya Yesu oyo ezwami na Matai 18:15-17. Kasi nkulutu moko oyo amekaki kopesa lisalisi na makambo motindo wana alobi ete: “Eloko tomonaki na makambo nyonso wana ezali ete bandeko bazalaki kokoma makambo yango na mokanda te. Yango wana ezalaki koyebana te soki nyongo esengelaki kofutama ndenge nini. Nandimi solo ete kokoma makambo ya mbongo na mokanda ezali elembo ya bolingo. Yango ezali te elembo ya kozanga kotyela moninga motema.”
Nsima ya koyokana na likambo moko, tosengeli kosala makasi ete tótosa maloba na biso. Yesu apesaki toli oyo: “Tiká ete liloba na bino lizala, Ɛɛ! Ɛɛ! mpe Te! Te! Oyo eleki bongo euti na mabe.” (Matai 5:37) Soki eloko moko ya mbalakaka ebebisi makambo oyo tokanaki, tosengeli nokinoki koyebisa likambo yango epai na modefisi. Mbala mosusu akoki kopesa biso nzela ya kozongisa mbongo oyo todefaki mokemoke na boumeli ya ntango molai.
Nzokande, makambo ya mpasi oyo makoki kokwela biso, makolongola te mokumba na biso oyo tozali na yango. Moto oyo abangaka Yehova asalaka makasi ete atosa liloba na ye. (Nzembo 15:4) Atako makambo matamboli ndenge oyo tokanaki yango te, tosengeli kosala nyonso mpo na kofuta nyongo oyo tozali na yango. Mpamba te yango ezali mokumba na biso baklisto.
Zalá na mayele ntango ozali kodefisa mbongo
Ya solo, ata mpe modefisi asengeli kokeba. Ndeko oyo azali kodefisa mbongo asengeli mpe kotánga motuya. Liboso ya kodefisa mbongo ebongi tókanisa malamumalamu. Biblia ekebisi biso, ntango elobi ete: “Kozala te esika moko na baoyo bazali kobɛtana mabɔkɔ, esika moko na baoyo bazali komipesa ndanga mpo na kodefa mbongo.”—Masese 22:26, NW.
Liboso ya kondima kodefisa mbongo, kanisá makambo oyo makoki kobima soki ndeko akokoka te kozongisa mbongo oyo adefi. Yango ekoki kobendela yo moko mikakatano na makambo ya mbongo? Atako ndeko akoki kozala na makanisi malamu, makambo makoki kobongwana to mpe akoki komikosa na lolenge na ye ya kotalela makambo. Yakobo 4:14 ekundweli biso banso ete: “Boyebi makambo na lobi te. Bomoi na bino ezali nini? Bozali bobele londende, komonana mwa ntango moke na nsima kolimwa.”—Kokanisá na Mosakoli 9:11.
Mingimingi soki moto alingi kodefa mbongo mpo na kosala mombongo, ekozala likambo ya mayele kotalela soki moto yango ayebani ndenge nini. Ayebani ete azali moto oyo babongi kotyela motema, oyo akokisaka maloba na ye to lokola moto oyo ayebi kosalela mbongo malamu te? Azali nde na momeseno ya kotambola na bandako ya bandeko ya lisangá mpo na kosɛngaka mbongo? Ezali likambo ya mayele kokanisa maloba oyo: “Moto na zoba ayambi maloba nyonso, nde moto na mayele akotala malamu na nzela ekokenda ye.”—Masese 14:15.
Na bantango mosusu, mbongo ya kodefa ekoki mpe kozala na litomba te epai na moto oyo adefi yango. Yango ekoki kokóma kilo mpo na ye. Ekoki kosilisa ye esengo. Tolingi ete ndeko motindo wana azala “moombo” na biso? Esengeli nde ete mbongo ya kodefa ebebisa bondeko na biso, epesa biso mpasi na motema to ata mpe kolɛmbisa biso soki akoki kozongisa yango te?
Soki ndeko azali mpenza na mposa ya mbongo, mpo na nini te kokabela ye, ata mwa moke, na esika ya kodefisa ye? Makomami malendisi biso ete tóyokelaka bandeko na biso mawa ntango bazali na mpasi. Mokomi na nzembo ayembaki ete: “Moyengebene azali na boboto mpe akopesaka.” (Nzembo 37:21) Bolingo esengeli kopusa biso na kosala oyo tokoki kosala mpo na kosalisa bandeko oyo bazali na bosɛnga.—Yakobo 2:15, 16.
Talá malamu epai wapi olingi kotya lokolo
Lokola mbala mingi mbongo ya kodefa ebimisaka matata, tosengeli kotalela yango lokola likambo ya lisɛki te. Tokodefa mbongo bobele soki tomoni ete nzela mosusu ezali te. Lokola touti kolobela yango, modefi asengeli koloba solo epai na modefisi. Asengeli kokoma na mokanda ndenge mpe ntango nini akozongisa mbongo oyo alingi kodefa. Mpe ntango ndeko azali mpenza na mpasi, ezali malamu kokabela ye na esika ya kodefisa ye.
Michael adefisaki Simon mbongo oyo asɛngaki te. Nzokande, akabelaki ye nde mwa mbongo moke. Simon asepelaki mingi na lisalisi wana oyo epesaki ye nzela ya kosomba nkisi mpo na mwana na ye. Mpe Michael azalaki na esengo mingi mpo amonisaki bolingo na ye ya bondeko na ndenge ebongi mpenza. (Masese 14:21; Misala 20:35) Michael mpe Simon bazali kozela ntango oyo Bokonzi ekoyangela wana Klisto “akobikisa mobola oyo akonganga” mpe moto moko te akoloba ete, “Nazali kobɛla.” (Nzembo 72:12; Yisaya 33:24, NW) Na kozeláká ntango yango, tótala malamu epai tolingi kotya lokolo soki esengeli mpenza ete tósɛnga ndeko moko mbongo ya kodefa.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Oyo ezali nkombo na bango te.
[Elilingi na lokasa 25]
Kokoma mbongo oyo odefi na mokanda ezali elembo ya bolingo, kasi emonisi te ete bazangi kotyela yo motema