Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g 10/11 nk. 22-23
  • Mai ya Murchison—Esika kitoko na ebale Nile na Ouganda

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mai ya Murchison—Esika kitoko na ebale Nile na Ouganda
  • Lamuká!—2011
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Lisolo ya mai ya Murchison
  • Banzela mpo na kokende kotala bweta yango
  • Babweta ya kokamwisa
    Lamuká!—2004
  • Mituna ya batángi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2020
  • Nkoma ya batángi
    Lamuká!—2002
Lamuká!—2011
g 10/11 nk. 22-23

Mai ya Murchison​—Esika kitoko na ebale Nile na Ouganda

“Yango ezalaki bweta eleki molai na Ebale Nile.”​—Samuel White Baker, moto ya Angleterre oyo azalaki kotambola mpo na koyeba bisika.

BATO mingi basepelaka kotala babweta, to bisika oyo mai ya ebale eutaka likoló mpe ezali kokwea na nse. Ebele ya bato bakendaka kolekisa bangonga mingi mpo na koyoka lokito ya mai oyo ezali kokwea na mabanga mpe kotala londende oyo emataka na bisika yango.

Ezali mpe bongo mpo na Mai ya Murchison,a na ekólo Ouganda. Ebale Nile ezali na molai ya kilomɛtrɛ 6 400, mpe bato mosusu balobaka ete bweta yango nde ezali esika eleki kitoko na ebale yango. Ezali solo ete ezali na molai ndenge moko te na bweta ya Angel, na Amerika ya Sudi to mpe mai na yango ezali ebele mpenza te lokola bweta ya Victoria na Afrika to bweta ya Niagara na Amerika ya nɔrdi. Kasi, bato mingi basepelaka na kitoko mpe makasi ya Mai ya Murchison.

Lisolo ya mai ya Murchison

Mai ya Murchison ezali kaka moko na bisika kitoko na kati ya zamba moko ya kilomɛtrɛ-karé 3 841, oyo babengaka Parkɛ ya Murchison Falls. Parkɛ yango oyo ezali na nɔrdi-wɛsti ya Ouganda, eponamaki na 1952. Baker amonaki bweta wana na ebandeli ya bambula 1860. Na buku na ye (The Albert N’yanza), alobelaki ndenge oyo amonaki bweta yango mpo na mbala ya liboso.

Akomaki boye: “Ntango tokómaki pembeni, tomonaki mbala moko esika moko ya kitoko. . . . Mai ya bweta ezalaki mpɛmbɛ, ezalaki komonana kitoko mpenza na ngomba oyo ezali ngámbo na ngámbo ya ebale, mpe ebele ya banzete ya mbila mpe ya makemba ebakisaki lisusu kitoko ya esika yango. Yango ezalaki bweta eleki molai na Ebale Nile.” Liboso, Baker apesaki bweta yango nkombo ya Murchison, prezida ya kompanyi oyo etindaki ye (Royal Geographical Society).

Banzela mpo na kokende kotala bweta yango

Ndenge malamu ya kotala bweta yango ezali na masuwa. Mobembo ebandaka na libongo ya Paraa mpe yango epesaka moto libaku ya kotambola na masuwa na Ebale Nile, mpe nzelanzela amonaka banyama ya zamba na mosika. Mobembo yango ebandaka na libongo ya Paraa. Mbala mingi bato bamonaka bangubu, banzoku, bangando, mpe bampakasa. Kutu, ntango moto azali komona banyama yango, akoki kobosana mwa moke ete mobembo na ye ezali libosoliboso mpo na kokende kotala bweta. Kasi, ntango akómi na esika yango oyo mai ya mpɛmbɛ emonanaka lokola nde ezali kobima na mabanga, amonaka mbala moko ntina oyo Baker akamwaki.

Atako bato mingi bamonaka bweta mobimba ntango bazali na masuwa, kasi kotala yango ntango ozali na mpɛpɔ ezalaka lisusu kitoko. Bato mosusu kutu balobaka ete yango nde eleki kitoko. Moto oyo azali na mpɛpɔ akoki komona ndenge oyo Ebale Nile, oyo na bisika mosusu ezali na bonene ya mɛtrɛ 49, ekɔndá na esika yango mpe mai na yango elekaka na mwa lidusu ya mɛtrɛ 6 mpe na nsima ekweaka na nse, na ntaka ya mɛtrɛ 40. Balobaka ete yango ezali “moko na bisika oyo mai esopanaka makasi mpenza koleka na mokili mobimba.” Bato oyo bakendaka na esika yango bayokaka lokola nde mabele ezali koningana ntango mai ezali kokita na ngámbo mosusu.

Baker alobaki ndenge oyo ayokaki liboso amona bweta yango. Alobaki ete ayokaki lokito ya makasi ntango azalaki kotambola mokolo moko na ntɔngɔ. Akanisaki ete ezalaki makɛlɛlɛ ya nkake oyo ezalaki kouta mosika, kasi akamwaki komona ete ezalaki nde lokito ya bweta.

Lokola Baker, mbula na mbula, bankóto ya bato bakendaka kotala esika yango oyo ezali na mai kitoko mpe oyo ekitaka na nguya mpenza. Moto oyo amoni ndenge mai wana ekweaka longwa na likoló abosanaka likambo yango noki te. Ya solo mpenza, Mai ya Murchison ezali esika kitoko na Ebale Nile.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Ebengamaka mpe Mai ya Kabalega to Kabarega.

[Etanda/​Elilingi na lokasa 23]

Parkɛ ya Murchison Falls

Ankɛtɛ moko oyo esalemaki na 1969 emonisaki ete parkɛ yango ezalaki na ngubu nkóto 14, nzoku nkóto 14 na nkama mitano, mpe mpakasa nkóto 26 na nkama mitano. Na mbula zomi oyo elandaki, motángo ya banyama yango ekitaki mingi mpenza. Eleki mwa bambula, lokola milende esalemaki mpo na kobatela banyama oyo etikalaki, esalaki ete motángo ya banyama emata lisusu. Lelo oyo, zamba yango ezali mpe na banyama mosusu lokola mikomboso mpe bamakako, mpe na esobe ya parkɛ yango ezali na banyama lokola badikala mpe bambuli. Kutu, parkɛ yango ezali na mitindo ya nyama koleka 70 mpe bandɛkɛ koleka 450.

[Eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 22]

Bafɔtɔ nyonso ya nkasa 22 mpe 23: Na ndingisa ya Uganda Wildlife Authority

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto