Nkoma ya batángi
Libondeli Lisolo “Mituna oyo bilenge batunaka . . . Nzambe akoyoka mabondeli na ngai?” (22 Yuni 2001, ebimeli ya Lifalanse) elendisaki ngai mingi. Nazwaki zulunalo yango ntango nazalaki na mbeto ya lopitalo. Nakokaki te kokende na Ndako ya Bokonzi to na liyangani na biso. Nazalaki na mawa mpenza mpe nakokaki kokanga motema te. Nsima ya kobondela Yehova, natikaki komitungisa mpe motema na ngai ekitaki na ndenge ya kokamwa mpenza. Koyeba ete Yehova akobosana ngai soki moke te ebɔndisaka ngai.
A. O., Japon
Nazali na mbula 18 mpe nazali mobongisi-nzela ya sanza na sanza, elingi koloba mopalanganisi ya nsango malamu ya ntango nyonso. Na boumeli ya mwa basanza oyo euti koleka, nanyokwamaki na makanisi. Namiyokaki lokola Stéphane, elenge oyo balobeli na lisolo yango, oyo alobaki ete ntango mosusu azalaki kokanisa ete asengelaki te kotungisa Nzambe na mikakatano na ye. Kasi natalelaki malamumalamu toli oyo ezali na Luka 12:6, 7. Nabandaki komiyoka malamu koleka mpe nafungolelaki Yehova motema na ngai.
M. D., Nicaragua
Akolaki na kuva Lisolo “Baboti na ngai basundolaki ngai—Kasi Nzambe alingaki ngai” (22 Yuni 2001, ebimeli ya Lifalanse) ezongisaki makambo mingi na makanisi na ngai. Namonaki lisusu ndenge mama na ngai azalaki koyebisa biso bomoi oyo azalaki na yango na kati ya kuva mpe ndenge bamamɛlo bazalaki kosala ye. Ntango abimaki na kuva na mbula 16, azalaki na esika ya kokende te. Bato mingi banyokwamá ndenge wana mpe babangaka kolobela yango. Nazali na esengo ndenge bobimisaki lisolo yango.
G. E., États-Unis
Bokolɔngɔnɔ ya nzoto Na nimero na bino ya 8 Yuni 2001 (ebimeli ya Lifalanse), natángaki lisolo oyo ezalaki na motó ya likambo “Mosala ya monganga na mikolo ya lelo—Ekokóma tii wapi?” Lokola nazali monganga te mpe moto ya siansi te, namonaki makambo oyo bolimbolaki mpe ndenge bolobelaki lisolo ya mosala ya monganga kitoko mingi mpe na ntina mpenza. Nakobatela nimero yango malamu.
E. F., Allemagne
Komɛla bangi Moninga moko ya mosala ayelaka ngai bazulunalo na bino mbala na mbala, mpe natángaka yango. Kasi ezali mpasi mpo nandima likanisi moko oyo bokomaki na masolo oyo ezalaki na motó ya likambo “Komɛla bangi—Likoki ya kosilisa mokakatano yango ezali!” Likanisi yango elobaki ete baalanga-nzembo nyonso ya miziki ya rock bamɛlaka bangi. (8 Yuli 2001, ebimeli ya Lifalanse) Ezali na baalanga-nzembo mingi oyo basimbaka bangi ata kosimba te mpe basalaka mosala na bango malamu.
M. M., Japon
Eyano ya “Lamuká!”: Tolingaki koloba te ete baalanga-nzembo nyonso ya miziki ya rock bamɛlaka bangi. Nzokande, eyebani malamu ete baalanga-nzembo mingi ya miziki ya rock mpe bafanatiki na bango bamɛlaka bangi soki bazali na bisika oyo miziki ya rock ezali kobɛtama.
Chutes ya Niagara Nauti kosilisa kotánga lisolo “Chutes ya Niagara—Esika moko ya kokamwa.” (8 Yuli 2001, ebimeli ya Lifalanse) Nasepelaki na yango mingi. Eleki mikolo mingi te, mobali na ngai amemaki ngai kuna mpo na anivɛrsɛrɛ ya libala na biso. Nakanisaki ete nakosepela na esika yango te. Namikosaki mpenza! Nasepelaki mingi ntango nazalaki komona ndenge mai ya chutes yango ezali kokita mpe koyoka makɛlɛlɛ na yango.
C. K., États-Unis
Bolobaki ete eleki sikoyo mbula 12 000 banda mabele ya libulu monene esika mai ya ebale ezali koleka ezali kolyama mokemoke. Yango eyokani te na lisolo ya Biblia oyo ezali kolobela Mpela oyo esalemaki na mokili mobimba.
R. P., Grande Bretagne
Eyano ya “Lamuká!”: Tolobelaki kaka makanisi bato oyo bayekolaka makambo ya mabele (géologues) bazali kopesa mikolo oyo, kasi tomonisaki te soki makanisi yango ezali mpenza bongo to te. Ezali solo ete makanisi yango etaleli te lisolo oyo tozali kokuta na Biblia na ntina na Mpela ya ntango ya Noa, oyo na ntembe te esalemaki esili koleka pene na mbula 5 000.—Matai 24:37.