Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g 1/12 nk. 7-9
  • Makanisi ya baboti mosusu

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Makanisi ya baboti mosusu
  • Lamuká!—2012
  • Masolo mosusu
  • Apɛndisi​—Mituna oyo baboti batunaka
    Mituna oyo bilenge batunaka—Biyano oyo ebongi, Volimi 1
  • Baboti​—Bóbɔkɔla bana na bino na bolingo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • Teyá mwana na yo uta azali naino moke mpenza
    Sɛkɛlɛ́ ya bolamu na libota
  • Ndenge ya kobatela bana na yo
    Lamuká!—2007
Makambo mosusu
Lamuká!—2012
g 1/12 nk. 7-9

Makanisi ya baboti mosusu

Soki ozali na mwana oyo akɔti naino kelasi te, kozanga ntembe okutanaka na mikakatano. Na ndakisa, osengeli kosala nini soki mwana na yo azali kosala bipale? Ndenge nini okoki koteya mwana na yo ayeba kokesenisa malamu ná mabe, mpe kosembola ye na ndenge oyo ebongi? Talá ndenge baboti mosusu balongaki mikakatano yango.

SOKI MWANA NA YO ASALAKA BIPALE

“Soki mwana akokisi mbula mibale, mbala mingi akómaka mobulu makasi; alingaka bápesa ye eloko nyonso oyo azali na mposa na yango. Mwana na biso ya mobali akómaki mpe bongo. Soki asɛngi eloko oyo azali na mposa na yango kasi topesi ye yango te, azalaki kobwaka biloko na nse. Lokola azalaki mwana na biso ya liboso, tomesanaki naino te na makambo wana. Atako baboti mosusu bayebisaki biso ete mwana nyonso ya mbula wana asengeli kozala bongo, yango ekitisaki biso motema te.”​—Susan, Kenya.

“Ntango mwana na biso ya mwasi akómaki na mbula mibale, azalaki kolala na nse, koganga, kolela, mpe kobɛtabɛta biloko na makolo na ye . . . Yango ezalaki kopesa biso nkanda! Tozalaki koluka kosolola na ye na ntango wana, kasi esimbaki te. Yango wana, ngai ná mobali na ngai tozalaki koyebisa ye akende na shambrɛ na ye mpe, na boboto nyonso, tozalaki koyebisa ye ete soki nkanda ekiti, akoki koya mpo tósolola na ye likambo yango. Soki tomoni ete afandi kimya, moko na biso azalaki kokende na shambrɛ na ye mpo na kosalisa ye amona mpo na nini likambo oyo asalaki ezalaki mabe. Mayele wana esimbaki. Mokolo moko, toyokaki kutu ye azali kobondela Nzambe mpo alimbisa ye. Na nsima, azalaki lisusu kolela to kosilika mingi te, mpe nsukansuka atikaki mpenza kosala bongo.”​—Yolanda, Espagne.

“Bana mike bamekaka mpo na koyeba makambo nini bakopekisa bango. Soki otikeli mwana nzela asala likambo oyo opekisaki ye, ozali koteya ye malamu te. Tomonaki ete ntango toboyaka ete bana na biso básala makambo mosusu, mokemoke bayekolaka ete bakozwa te eloko oyo bazali na mposa na yango soki bagangi to bazali kolela.”​—Neil, Grande-Bretagne.

KOPESA DISIPLINI

“Ntango mwana akokisi naino mbula mitano te, ezalaka mpasi mpo na koyeba soki azali koyoka yo na likebi. Ezali na ntina mingi kozongela mbala na mbala likambo oyo oyebisi ye. Osengeli kozongela lisusu maloba na yo mbala ebele, kosala bajɛstɛ mpe koloba na lisɛki te.”​—Serge, France.

“Atako bana na biso minei bakolaki esika moko, bazalaki ndenge moko te; mokomoko azalaki na makambo na ye. Mwana na biso moko azalaki kolela soki kaka ayebi ete asali likambo moko oyo esepelisi biso te; mosusu azalaki komeka mpo na koyeba makambo nini tokopekisa ye. Na bantango mosusu, soki kaka totali mwana na liso mabe to togangeli ye, akotika kosala mobulu; nzokande na bantango mosusu ezalaki kosɛnga mpenza kopesa ye etumbu.”​—Nathan, Canada.

“Ezali na ntina mingi ete tókakolaka te mibeko oyo totyeli bana. Atako bongo, moboti asengeli te kozala makambo makasi. Na bantango mosusu, soki mwana asɛngi biso mpenza bolimbisi, tomonaka ete ezali malamu tókangela ye motema te mpe tólɛmbisa mwa moke etumbu oyo topesaki ye.”​—Matthieu, France.

“Nalukaka kotya mibeko mingi te, kasi namonisaka polele ete mwa mibeko oyo natye ezali ya kokakola te. Mwana na ngai ya liboso oyo azali na mbula misato ayebi nini ekokómela ye soki atosi te, mpe yango esalisaka ye ayeba nini asengeli kosala to te. Ezali solo ete ntango nalɛmbi, ezalaka mpasi te mpo nakanga miso na makambo ya mabe oyo mwana na ngai azali kosala. Kasi, mpo natosa mibeko oyo natyaki, nasalaka makasi napesa ye etumbu soki asali likambo ya mabe. Esengeli nasalaka bongo mbala nyonso oyo atosi te!”​—Natalie, Canada.

SOKI OLOBI LIKAMBO, TOSÁ MALOBA NA YO

“Bana mike bakangaka makambo nyonso oyo emonisi ete moboti alobaki likambo, kasi akokisi yango te.”​—Milton, Bolivie.

“Na bantango mosusu, mwana na ngai ya mobali atunaka likambo moko na ndenge ekeseni mpo na koyeba soki tokopesa kaka eyano moko. To soki nalobi likambo moko, na nsima mama na ye alobi ndenge mosusu, akomona ete tozali koyokana te na mibeko oyo totyaki, mpe akoluka koboya kotosa mibeko yango.”​—Ángel, Espagne.

“Na bantango mosusu, ntango nazali na esengo, nakangaka miso na mabe oyo mwana na ngai azali kosala, kasi ntango nazali na nkanda, napesaka ye etumbu makasi. Namonaki ete kosala bongo ekokómisa ye kaka motó makasi.”​—Gyeong-ok, Corée.

“Ezali na ntina mingi bana báyeba ete soki etamboli moko ezali mabe lelo, ata lobi ekozala kaka mabe.”​—Antonio, Brésil.

“Soki papa alobi likambo moko, kasi mama alobi ndenge mosusu, bana bakomona ete baboti na bango bazalaka na liloba moko te, mpe bazwaka bikateli soki bazali na esengo to na nkanda. Kasi soki baboti bakangami na mibeko oyo batyelaki bana, bana bakoyeba ete likambo oyo ezali mabe ekotikala kaka mabe. Soki baboti basali bongo, bakomonisa ete balingaka bana na bango mpe babatelaka bango.”​—Gilmar, Brésil.

“Bana balukaka kosɛnga baboti na bango biloko oyo bazali na mposa na yango na ntango oyo bayebi ete ezali mpasi baboti báboya, na ndakisa ntango bato mosusu bazali na ndako. Soki naboyi likambo, nayebisaka yango na mwana na ngai mbala moko, mpe namonisaka ye polele ete nakoyokela ye te ata soki azali kolela mpo napesa ye yango.”​—Chang-seok, Corée.

“Baboti nyonso mibale basengeli kozala na likanisi moko. Soki ngai ná mwasi na ngai toyokani te na likambo moko, tolobelaka yango na miso ya bana te. Bana bayebaka ntango baboti na bango bayokani te na likambo moko, mpe yango ekoki kotinda bango báboya kotosa baboti.”​—Jesús, Espagne.

“Ntango mwana ayebi ete baboti na ye bazali na likanisi moko mpe bakoki kokosama te, abangaka eloko te. Ayebaka nini ekokómela ye soki atosi mibeko to soki atosi yango te.”​—Damaris, Allemagne.

“Ngai ná mwasi na ngai tokokisaka maloba na biso soki tolaki mwana na biso ya mwasi ete tokopesa ye eloko moko ya kitoko. Yango esalisaka ye andima makambo oyo tozali kolaka ye.”​—Hendrick, Allemagne.

“Soki patrɔ na ngai abongolaka ntango nyonso makambo oyo asɛngaka ngai na mosala, nakosepela te. Ezali mpe bongo mpo na bana. Babangaka eloko te soki bayebi mibeko oyo totyeli bango mpe soki bayebi ete mibeko yango ekobongwana te. Basengeli mpe koyeba nini ekokómela bango soki batosi mibeko yango te, mpe etumbu yango ekopesama kaka, ata ndenge nini.”​—Glenn, Canada.

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 8]

“Tiká Ɛɛ na bino ezala Ɛɛ, mpe Te na bino, Te.”​—Yakobo 5:12

[Etanda/​Bililingi na lokasa 9]

NDAKISA YA LIBOTA MOKO

Zemi oyo tokanaki te​—Ndenge oyo tosalaki mpo na komesana

Lisolo ya Tom ná Yoonhee Han

Tom: Tosalaki kaka sanza motoba ya libala ntango mwasi na ngai Yoonhee ayebaki ete azali na zemi. Nakangaki motema, mpo nalingaki kosalisa Yoonhee ayeba ete akoki kotyela ngai motema mpo nabɔndisa ye mpe napesa ye makasi. Kasi na nse ya motema, nazalaki kobanga!

Yoonhee: Likambo yango elekelaki ngai mpe ebangisaki ngai! Nazalaki kolela butu moi; nazalaki kondima te ete nakoki mpo na kozala mama.

Tom: Nandimaki te ete nakoki mpo na kozala tata! Kasi nsima ya kosolola ná baboti mosusu, toyaki komona ete kozwa zemi oyo ekanami te ezali likambo oyo ekómelaka bato mingi. Lisusu, esalisaki biso tóyoka makambo oyo baboti mosusu bazalaki koloba na oyo etali esengo oyo moto ayokaka soki abandi kobɔkɔla mwana. Mokemoke, natikaki kobanga mpe nakómaki kozela mwana yango na esengo.

Yoonhee: Ntango Amanda abotamaki, mikakatano mosusu ebimaki. Azalaki kolela ntango nyonso, mpe nasalaki bapɔsɔ mingi nazalaki lisusu kozwa mpɔngi te. Nazalaki lisusu na mposa ya kolya te, yango wana nazalaki kolɛmba mingi. Liboso, nazalaki kolinga kozala ná bato te. Kasi na nsima, nayaki komona ete koboya kozala ná bato ekokaki kosalisa ngai te. Yango wana, nakómaki kolekisa ntango mingi elongo na basi mosusu oyo bautaki kobota sika. Yango esalisaki ngai nasolola na bato mosusu oyo bakutanaki na likambo oyo ekómelaki ngai, mpe nayeba ete kaka ngai moko te nde nazalaki na mikakatano.

Tom: Nazalaki kosala makasi mpo tókoba kosala makambo oyo tomesaná kosala na libota. Na ndakisa, lokola ngai ná Yoonhee tozali Batatoli ya Yehova, tozalaki kosala makasi mpo tósakolaka mpe tóyanganaka na makita mbala na mbala. Lisusu, kozala na mwana esɛngaka kobimisa mbongo, oyo mbala mosusu bokanaki te. Tozalaki kosala makasi mpo tóbimisa mbongo mingi te koleka oyo tozalaki na yango, mpo tózwaka banyongo te, mpo yango ekokaki kobakisela biso mitungisi mosusu.

Yoonhee: Liboso nazalaki kokanisa ete nakokoka te kobima na mosala ya kosakola ná mwana, mpo bana batungisaka mingi. Kasi nayaki komona ete bato basepelaka mingi na bana. Koyeba bongo esalisaki ngai nakoba kosakola mpe nasepela lisusu mingi na mwana na ngai.

Tom: Biblia elobi ete bana bazali “libula oyo euti na Yehova” mpe bazali “mbano.” (Nzembo 127:3) Mpo na ngai, maloba wana emonisi ete mwana azali likabo ya motuya mingi. Ndenge kaka tosalaka na likabo nyonso: Tokoki kopona kobatela yango malamu to kobebisa yango. Nayekoli ete mbala nyonso oyo mwana abakisi bambula, esɛngaka komesana na makambo ya sika, mpe nasengeli kozala pene na mwana na ngai ntango nyonso tii akokola, mpo soki nasali bongo te, nakozwa lisusu libaku ya kosala yango te.

Yoonhee: Ntango mosusu, na bomoi na biso, tokutanaka na makambo oyo tokanaki te; kasi kobota mwana oyo bokanaki te ezali likambo ya mabe te. Sikoyo Amanda akómi na mbula motoba, kasi soki azali te, nayokaka malamu te.

[Elilingi]

Tom ná Yoonhee mpe mwana na bango Amanda

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto