Kosala makambo na bosembo ememaka matomba ya solosolo
“Ata soki moto azali na biloko mingi, biloko na ye ekopesa ye bomoi te.”—Luka 12:15.
MOTO nyonso alukaka mbongo ya kobikela. Nzambe asɛngi biso tókokisa bamposa na biso moko mpe ya libota na biso.—1 Timote 5:8.
Bongo soki moto akómi komipesa na koluka mbongo mpe biloko tii ekómi kozwa esika ya liboso na bomoi na ye? Mbala mingi, bato oyo basalaka bongo basalaka mpe makambo ezangi bosembo mpo na kozwa bomɛngo. Bayaka koyeba ete ezali mabe kaka ntango ebebeli bango. Lisusu, ndenge Biblia elobi, bolingo ya mbongo ebimisaka bampasi mingi.—1 Timote 6:9, 10.
Tótalela bandakisa ya bato minei oyo bamonaka ete matomba ezali kaka te kozwa bomɛngo.
Kobatela lokumu na yo moko
“Eleki sikoyo bambula ebele, nasololaki na moto moko oyo alingaki kosomba eloko moko ya dolare milio moko na kompanyi na biso. Kompanyi elingaki kofuta ngai mbongo mingi soki asombi yango. Moto yango ayebisaki ngai ete liboso asomba yango, nandima kopesa ye katikati ya mbongo oyo bakofuta ngai. Likambo oyo asɛngaki ngai ezalaki mabe mpe ezalaki kobuka mibeko ya Leta; nayebisaki ye mpe bongo.
“Nalukaki komonisa ye mabe ya likambo yango; natunaki ye soki akondima koyebisa makambo na ye ná oyo etali mombongo na ye na moto oyo azalaka sembo te. Nayebisaki ye lisusu ete naboyi, kasi akoki koya epai na ngai soki alingi kosomba eloko yango. Aya mpe lisusu te.
“Soki nandimaki, nalingaki kobebisa bosembo na ngai mpe lokumu na ngai ya mokristo. Mbɛlɛ nakómaki moombo ya moto oyo alingaki kokɔtisa ngai na banzela na ye ya mabe.”—Don, États-Unis.
Kimya ya motema
Ndenge lisolo ya liboso emonisi yango, bapesaki Danny mbongo ebele ya kanyaka mpo akosa ete izini moko ekoki kobimisa biloko na ndenge oyo kompanyi na bango esɛngaki. Asalaki nini?
Alobi boye: “Napesaki mokambi yango matɔndi mpo na bilei mpe na nsima nazongiselaki ye anvɛlɔpi na ye. Amekaki lisusu kondimisa ngai yango mpe alobaki ete soki napesi lapolo ya malamu mpo na izini na bango, akobakisela ngai mbongo mingi. Naboyaki.
“Soki nandimaki mbongo wana, nalingaki kobangabanga ntango nyonso ete mokolo mosusu ekoyebana. Na nsima, patrɔ na ngai ayokaki likambo yango. Nazalaki na esengo mpe na motema ya kokita mpo nasalaki likambo moko te ya mabe. Masese 15:27 eyelaki ngai na makanisi, oyo elobi ete: ‘Moto oyo azali kozwa litomba na ndenge ya mabe azali komemela ndako na ye moko mpasi, kasi moto oyo ayinaka makabo [to kanyaka] akokoba kozala na bomoi.’”—Danny, Hong Kong.
Esengo na libota
“Nazali na kompanyi ya ngai moko ya kotonga bandako. Mabaku mingi ya kobuba bakiliya to ya kofuta bampako te emonanaka. Kasi, lokola nasalaka nyonso nazala sembo, ngai moko ná libota na ngai tozwi matomba mingi.
“Kozala sembo esuki kaka te na mosala to na mombongo, kasi na makambo nyonso ya bomoi. Koyeba ete mobali na yo to mwasi na yo akobuka te mitinda ya Nzambe oyo etali kozala sembo esalaka ete otyela ye motema koleka. Molongani na yo akotyela yo mpe motema mpo ayebi ete ozalaka sembo ntango nyonso.
“Okoki kozala na kompanyi oyo eleki monene na mokili mobimba, kasi mbongo na yo ekokoka te kosilisa mikakatano ya libota. Lokola nazali Motatoli ya Yehova, namoni mpenza ete kolanda toli ya Biblia esalisaka ngai nazala na bokatikati. Nazalaka na ntango ya kolekisa elongo na libota na ngai, na esika nalanda mokili oyo emipesá na koluka mbongo mpe konduka biloko na lokoso nyonso.”—Durwin, États-Unis.
Boyokani ya malamu na Nzambe
“Na mosala na ngai, nasombaka mpe biloko mpo na kompanyi na biso. Bakiliya mosusu basɛngaka ngai nazwa ndambo ya mbongo oyo bazongisaka ntango kompanyi esombi eloko. Kasi kosala bongo ezali lolenge moko ya koyiba kompanyi.
“Bafutaka ngai mbongo mingi mpenza te, mpe nazali na bosɛnga. Kasi eloko eleki ntina ezali nde kozala na lisosoli ya pɛto mpe kondimama na Yehova Nzambe. Yango wana, na makambo nyonso ya mombongo, nalandaka toli ya Baebre 13:18 oyo elobi ete: ‘Tolingi kozala sembo na makambo nyonso.’”—Raquel, Philippines.
[Etanda/Bililingi na lokasa 9]
Toli mpo na kosala mombongo na bosembo
Makambo oyo endimami to te na mombongo etaleli esika na esika. Kasi, toli ya Biblia ekoki kosalisa biso tóyeba kozwa bikateli ya malamu na mombongo. Kosala mombongo na bosembo esɛngi makambo oyo motoba:
Koloba solo
Toli: “Bólobanaka lokuta te.”—Bakolose 3:9.
Kosala mpenza oyo olobi
Toli: “Tiká liloba na bino Ɛɛ ezala Ɛɛ, Te na bino, Te.”—Matai 5:37.
Koyeba kobomba sekele
Toli: “Kobimisa te lisolo ya nkuku ya moto mosusu.”—Masese 25:9.
Kolongobana
Toli: “Osengeli te kondima kanyaka, mpo kanyaka ebomaka miso ya bato oyo bamonaka malamu.”—Kobima 23:8.
Kozala sembo
Toli: “Makambo nyonso oyo bolingaka bato básalela bino, bino mpe bósalela bango kaka bongo.”—Matai 7:12.
Kotosa mibeko ya Leta
Toli: “Bózongisela bango nyonso oyo esengeli na bango: oyo asɛngi mpako, mpako.”—Baroma 13:7.
[Etanda/Bililingi na lokasa 9]
Mpo na kotikala sembo na mombongo
● Yebá makambo oyo eleki ntina. Na ndakisa, koluka bomɛngo ná kozala na boyokani malamu na Nzambe, nini eleki ntina mpo na yo?
● Zwá bikateli liboso. Kanisá liboso makambo oyo ekoki komeka bosembo na yo, mpe yebá ndenge ya kosala na ntango omekami.
● Yebisá makambo oyo ondimaka. Na ebandeli ya boyokani moko ya mombongo, yebisá na boboto nyonso makambo oyo ondimaka to oyo oboyaka.
● Luká lisalisi epai ya basusu. Soki okutani na komekama to na likambo moko oyo ozali koyeba te ndenge ya kosala, luká toli epai ya moto mosusu oyo atalelaka makambo lokola yo.
[Elilingi na lokasa 8]
Soki ozali sembo, okozala na kimya ya motema