Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g 7/12 lok. 3
  • Nkanda ebotaka mbuma mabe

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nkanda ebotaka mbuma mabe
  • Lamuká!—2012
  • Masolo mosusu
  • Biblia elobi nini mpo na nkanda?
    Biyano na mituna ya Biblia
  • Mpo na nini bato bakómi nkanda mingi boye?
    Lamuká!—2012
  • Mpo na nini osengeli kokitisa nkanda na yo?
    Lamuká!—1997
  • Ndenge ya kopekisa nkanda
    Lamuká!—2012
Makambo mosusu
Lamuká!—2012
g 7/12 lok. 3

Nkanda ebotaka mbuma mabe

Mobali moko azalaki kosomba limpa na restora esika baumelaka te kopesa moto biloko oyo asombi. Atombokaki ntango amonaki ete bapesaki ye biloko na ye noki te. Na mbala moko, akɔtaki na restora yango mpe agangelaki mosali moko, atindikaki ye na mesa mpe abɛtaki ye mbata. Na nkanda nyonso, akamataki limpa na ye mpe abimaki.

BISO nyonso tosilikaka, kaka ndenge tozalaka mpe na bolingo, na elikya, na mawa, tobangaka mpe tomitungisaka. Moto oyo ayebi kopekisa nkanda na ye abimisaka yango na ndenge ebongi, mpe ekoki kosalisa ye na makambo mosusu. Na ndakisa ekoki kopesa ye makasi ya kolonga mikakatano to makambo mosusu.

Ndenge lisolo oyo tolobeli emonisi yango, nkanda ekoki mpe kobimisa mbeba. Bato mosusu bazalaka na nkanda makasi mpe basilikaka mpambampamba. Soki moto atumoli bango, bakoki kogangela to kofinga ye, to kutu kosimba ye na nzoto. Ezali lokola nde batikaka nkanda na bango etambwisa bango, na esika ete bayeba kopekisa yango. Nkanda ya ndenge wana ezali likama mpe ememelaka moto mikakatano mingi na bomoi, ezala na makanisi, na mayoki, na bomoto na ye mpe na boyokani na ye na basusu.

Bato ya nkandankanda babimisaka mikakatano mpo na bango moko mpe mpo na bazalani na bango. Moto ya ndenge wana akoki kotomboka ata mpo na makambo ya mikemike mpe kobimisa mbeba monene. Talá bandakisa oyo elandi:

Moleki nzela moko abɛtaki mobali moko lisasi na nkingo ntango sakosi ya moko ya baninga ya mobali yango etutaki ye.

Elenge mobali moko ya mbula 19 abɛtaki bebe ya sanza 11 ya fianse na ye tii na liwa. Elenge yango azalaki kobɛta lisano ya video ya mobulu; ntango mwana asimbaki butɔ esalaki ete lisano yango ekatana mpe atombokaki.

Makambo ya ndenge wana oyo ezali kosalema na mokili mobimba, emonisi ete bato mingi bakómi mpenza nkandankanda. Mpo na nini bato mingi bakómi nkandankanda boye?

[Etanda na lokasa 3]

Moto nyonso ayokaka nkanda. Yango wana, na bantango mosusu ezali mabe te kobimisa nkanda na ndenge ebongi. Kasi masolo oyo ezali kolobela nkanda ya mabe, oyo ekoki kobimisela biso mpe basusu likama, ezala na makanisi, na nzoto, mpe oyo ekoki kobebisa boyokani na biso na Nzambe.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto