Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g 7/12 nk. 7-9
  • Ndenge ya kopekisa nkanda

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ndenge ya kopekisa nkanda
  • Lamuká!—2012
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • “Tiká nkanda”
  • Yebá kokitisa nkanda na yo
  • Yekolá kokitisa motema
  • Bongolá lolenge na yo ya kotalela makambo
  • Biblia elobi nini mpo na nkanda?
    Biyano na mituna ya Biblia
  • Nkanda ebotaka mbuma mabe
    Lamuká!—2012
  • Kebá nkanda ebɛtisa yo libaku te
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • “Mayele ya kososola oyo moto azali na yango ekitisaka mpenza nkanda na ye”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2014
Makambo mosusu
Lamuká!—2012
g 7/12 nk. 7-9

Ndenge ya kopekisa nkanda

ELEKI sikoyo mbula koleka 2 000, Aristote, moto ya filozofi ya Grɛki asalelaki liloba “catharsis” mpo na kolobela ndenge oyo moto abimisaka nkanda to mawa ntango azali kotala lisano to teyatre moko ya nsɔmɔ mpe ya mawa. Likanisi na ye ezalaki ete soki moto abimisi nkanda na ye, motema na ye ekitaka.

Na ebandeli ya bambula 1900, monganga moko ya bamaladi ya motó na nkombo Sigmund Freud, na ekólo Autriche, azalaki mpe koteya makanisi yango. Mpo na ye, soki bato bazali kobomba nkanda na bango na motema to kopekisa yango, nsukansuka bakobɛla bamaladi ya motó. Na ndenge yango, Freud azalaki koloba ete moto asengeli te kopekisa nkanda na ye, kasi asengeli nde kobimisa yango nyonso.

Na bambula ya 1970 mpe ya 1980, bato ya mayele basalaki baankɛtɛ mpo na kotala soki likanisi ya catharsis ezali mpenza solo; bamonaki na bisika mosusu makambo moke mpenza oyo endimisi likanisi yango, kasi na bisika mosusu bamonaki ata eloko moko te. Makambo oyo bamonaki etindaki Carol Tavris, monganga moko ya bamaladi ya motó, akoma ete: “Sikoyo ezali ntango ya kobosana libela liteya ya catharsis. Ata bolukiluki moko te ya bato ya mayele emonisi ete kotala mobulu esilisaka nkanda.”

Monganga mosusu ya bamaladi ya motó, Gary Hankins alobaki ete: “Bolukiluki emonisi ete mbala mingi ‘kobimisa’ nkanda na ndenge wana, ekitisaka yango te kasi ebakisaka nde yango.” Ya solo, ezali mwa mpasi minganga ya bamaladi ya motó bákóma na likanisi moko mpo na likambo ya catharsis. Nzokande, bato ebele bazwá lisalisi na toli ya Biblia, buku oyo etondi na bwanya.

“Tiká nkanda”

Davidi, moko ya bakomi ya nzembo alobelaki likambo ya kopekisa nkanda na maloba kitoko. Alobaki boye: “Tiká nkanda, mpe tiká kotomboka; kosilika te kaka mpo na kosala mabe.” (Nzembo 37:8) Mpo tóloba to tósala te likambo oyo ekopesa biso mawa na nsima, tosengeli kosala nyonso ‘tósilika te’. Koloba ezali pɛtɛɛ kasi kosala nde mama ya likambo! Kasi okoki kosala yango. Tótalela makambo misato oyo ekoki kosalisa yo opekisa nkanda na yo.

Yebá kokitisa nkanda na yo

Mpo na kokitisa nkanda na yo, kitisá naino motema mpe zelá moke. Bóya koloba likambo nyonso oyo eyeli yo liboso na makanisi. Soki obandi koyoka ete okómi kosilika mpe omoni ete etikali moke otomboka, landá toli oyo ya Biblia: “Ebandeli ya kowelana ezali lokola ntango moto azali kofungola mai; na bongo liboso koswana ebima, bendá nzoto.”​—Masese 17:14.

Kolanda toli wana nde esalisaki mobali moko na nkombo Jack ayeba kopekisa nkanda na ye. Tata ya Jack azalaki molangwi-masanga mpe moto ya nkanda makasi. Ntango Jack akolaki, ye mpe akómaki moto ya nkanda makasi. Alobi boye: “Soki nasiliki, nazalaki koyoka lokola nzoto mobimba epeli motɔ. Mpe nazalaki kotomboka, kofinga mpe kobɛta makofi.”

Kasi makambo ebandaki kobongwana ntango Batatoli ya Yehova bakómaki koyekola na Jack Biblia. Amonaki ete na lisalisi ya Nzambe, akokoka kobongwana mpe kopekisa nkanda na ye. Mpe abongwanaki mpenza! Jack alobeli ndenge asalaki ntango moninga na ye moko ya mosala asilikisaki ye mpe afingaki ye. Alobi boye: “Nayokaki mbala moko motema esuki. Likanisi ya liboso ezalaki nakanga ye mpe nabamba ye na mabele.”

Nini esalisaki Jack akitisa motema? Alobi boye: “Nazali koyeba lisusu ndenge nasambelaki Nzambe ete, ‘Yehova nabondeli yo, salisá ngai natomboka te!’ Mpo na mbala ya liboso na bomoi na ngai, nayokaki kimya na motema mpe nalongwaki wana.” Jack akobaki koyekola Biblia. Abondelaki mpe amanyolaki mingi likoló ya bavɛrsɛ lokola Masese 26:20 oyo elobi ete: “Esika nkoni ezali te mɔtɔ ekufaka.” Na nsima, Jack akómaki kopekisa nkanda na ye.

Yekolá kokitisa motema

“Motema ya kimya ezali bomoi ya nzoto ya mosuni.” (Masese 14:30) Kosalela toli yango ya Biblia ekoki kosalisa moto azala malamu na nzoto, na makanisi mpe azala na boyokani malamu ná Nzambe. Bandá naino na koyekola mwa makambo oyo esalisaka moto akitisa nkanda. Makanisi oyo elandi esalisi bato mingi mpo na kokitisa nkanda na bango:

● Kopema makasi nde lolenge eleki malamu ya kokitisa nkanda nokinoki.

● Ntango ozali kobenda mpema, zongeláká liloba to fraze moko oyo ekitisaka yo motema, na ndakisa “likambo te,” “natika kaka,” to “ekoleka na yango.”

● Komipesa na likambo moko oyo esepelisaka yo mingi, na ndakisa kotánga, koyoka miziki, kolona to kobongisa bafololo, to likambo mosusu nyonso oyo omonaka ete ekitisaka yo motema.

● Kosala ngalasisi mbala na mbala mpe kolya malamu.

Bongolá lolenge na yo ya kotalela makambo

Okoki kokima ntango nyonso te bato to makambo oyo esilikisaka yo, kasi okoki koyekola kopekisa nkanda na yo. Mpo na yango, osengeli kobongola lolenge na yo ya kokanisa.

Bato oyo balukaka ete basusu básala makambo na ndenge ya kokoka bazalaka mpe bakómaka na nkanda makasi. Mpo na nini? Mpamba te soki moto to eloko moko eyokani te na ndenge bango bazalaki komizela, bayokaka motema mpasi mpe basilikaka noki. Mpo na koboya ezaleli wana ya koluka ete bato básala makambo na ndenge ya kokoka, tosengeli kobosana te ete “moto ata moko te azali moyengebene, ata moko te . . . Bato nyonso batiki nzela, bango nyonso.” (Baroma 3:10, 12) Na yango, tokomiyokisa mpasi mpamba soki tozali komizela ete biso moko to moto mosusu nyonso asala makambo na ndenge ya kokoka.

Tokomonisa bwanya soki tozali koluka te ete biso moko to basusu básala makambo oyo eleki makoki na bango. Biblia elobi ete: “Biso nyonso tobɛtaka mabaku mbala mingi. Soki moto abɛtaka libaku na maloba te, ye azali moto ya kokoka.” (Yakobo 3:2) Ya solo, “ezali na moto moko te oyo azali moyengebene na mabele oyo asalaka kaka malamu mpe asalaka lisumu te.” (Mosakoli 7:20) Na yango, soki tozali koluka kozala bato ya kokoka, likambo oyo ekoki kosalema te, bomoi na biso ekokóma na mikakatano mpe tokokóma nkandankanda.

Lokola tozali bato ya kozanga kokoka, biso nyonso tosilikaka mbala na mbala. Kasi moto na moto akoki kopona ndenge oyo akobimisa nkanda na ye. Ntoma Paulo akebisaki baninga na ye bakristo boye: “Bóyoka nkanda, mpe ata bongo bósala lisumu te; moi elala te bino bozali kaka na nkanda.” (Baefese 4:26) Ya solo, soki toyebi kopekisa nkanda na biso, tokoyeba kobimisa mayoki na biso na ndenge ya malamu, mpo na litomba na biso moko mpe ya basusu.

[Etanda/​Bililingi na nkasa 8, 9]

YEKOLÁ KOKITISA MOTEMA

Bendáká mpema

Mipesá na likambo moko oyo esepelisaka yo mingi

Saláká ngalasisi

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto