Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g 7/12 nk. 19-21
  • Likambo monene na Malawi—Bandako ya Bokonzi 1000!

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Likambo monene na Malawi—Bandako ya Bokonzi 1000!
  • Lamuká!—2012
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Ntango ya mpasi!
  • Bolingo emonanaki na misala!
  • Ezali mpo na bolamu ya bato nyonso
  • “Engɛngisi mpenza kartye”
  • “Ndako ya Bokonzi oyo ezali likamwisi”
  • Bokoli ezali kosɛnga ete bisika mosusu ya losambo etongama nokinoki
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • Kotonga bandako mpo na kokumisa Yehova
    Bokonzi ya Nzambe ezali koyangela!
  • Natikaki ete Yehova atambwisa banzela na ngai
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2022
  • Oyo ezali esika na biso ya losambo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
Makambo mosusu
Lamuká!—2012
g 7/12 nk. 19-21

Likambo monene na Malawi​—Bandako ya Bokonzi 1 000!

MOTATOLI moko na nkombo Augustin alobaki boye: “Nandimaki te ete likambo ya boye ekokaki kosalema awa na Malawi!” Azalaki kolobela kotongama ya ebele ya Bandako ya Bokonzi, ndenge Batatoli ya Yehova babengaka bisika na bango ya losambo. Na mobu 1993, Batatoli bazalaki 30 000 na Malawi, mwa ekólo moko oyo ezali na sudi-ɛsti ya Afrika; bazalaki te na bisika ya malamu mpo na kosambela mpe koyekola Biblia.

Kasi lelo oyo, makambo ezali lisusu bongo te! Na engumba Blantyre, na sanza ya Libwa ya mobu 2010, Batatoli ya Yehova na Malawi basilisaki kotonga Ndako ya Bokonzi na bango ya 1 000!a Mpo na nini Batatoli ya Yehova bazelaki tii bákóma 30 000 liboso bábanda kotonga bisika ya losambo? Mpe ntango babandaki kotonga, nini esalisaki bango bátonga bandako 1 000 na ntango mokuse na ekólo oyo bozwi ezali mingi te? Lisusu, programɛ yango ya botongi ebimisaki matomba nini epai ya Batatoli mpe bazalani na bango?

Ntango ya mpasi!

Na ebandeli ya bambula 1900, Bayekoli ya Biblia (ndenge oyo Batatoli ya Yehova bazalaki kobengama na ntango wana), babandaki koteya mateya ya Biblia na Malawi. Na 1967, Batatoli bakómaki 17 000. Ndenge moko na bakristo ya siɛklɛ ya liboso, bayebanaki lokola bato oyo batosaka mibeko mpe bakonzi ya Leta. Lisusu, na ndakisa ya bakristo ya liboso, bazalaki kokɔta ata moke te na makambo ya politiki.​—Yoane 18:36; Misala 5:29.

Likambo ya mawa, ekateli na bango wana oyo euti na Biblia, ememelaki Batatoli mindɔndɔ epai ya guvɛrnema na katikati ya bambula ya 1960, mpe bapekisaki mosala na bango na mobu 1967. Eumelaki te, balongolaki Batatoli mingi na mosala kaka mpamba, mpe batɛmɛli babɔtɔlaki to babebisaki biloko na bango. Lokola minyoko elekaki makasi mpe babangaki ete básilisa bango nyonso na koboma, bankóto ya Batatoli bakimaki na Mozambique mpe Zambie, bikólo oyo ezali mosika te na Malawi.

Nsukansuka, makambo ebandaki kobonga mpo na Batatoli ya Yehova na Malawi, mpe na ebandeli ya bambula ya 1990, mingi na bango bazongaki epai na bango. Basepelaki mpenza na mokolo ya 12 ya sanza ya Mwambe 1993, ntango epekiseli ya mosala na bango oyo eumelaki mbula 26 elongwaki! Nzokande, bakutanaki na mokakatano mosusu. Bakómaki koleka 30 000 na masangá 583, kasi bazalaki na bisika ya losambo ya malamu te! Basengelaki kosala nini?

Bolingo emonanaki na misala!

Na boumeli ya mbula motoba nsima ya kolongola epekiseli, Batatoli ya Malawi basalaki mosala monene ya kotonga Bandako ya Bokonzi na mwa makoki oyo bazalaki na yango. Kasi ezalaki mosala ya pɛtɛɛ te mpo motángo ya bato oyo bazalaki kokóma Batatoli ezalaki kobakisama mbula na mbula, mpe esengelaki kobakisa Bandako ya Bokonzi mosusu. Balongaki mokakatano yango ndenge nini? Balandaki toli ya Biblia oyo ezali na 2 Bakorinti 8:14, ete: “Na nzela ya bokokani,” mbongo oyo euti na bikólo ya bozwi mingi ‘ezipa kozanga’ ya bikólo lokola Malawi. Mpo na yango, na 1999, Lisangani ya Mikóló-Bakambi ya Batatoli ya Yehova ebandisaki programɛ moko mpo na kotonga bisika ya losambo na mikili oyo bazali na bozwi mingi te. Na nzela ya lisalisi wana ya bolingo, Batatoli na Malawi bakómaki kotonga Bandako ya Bokonzi na lombangu.b

Kala na Malawi, masangá ezalaki kosala makita na bandako ya kelasi, na mwa bandako mike, to kutu na nse ya banzete. Kasi sikoyo, masangá koleka 1 230 eyanganaka mpo na koyekola Biblia na bisika ya losambo oyo ebongi mpenza, oyo etongami mpo losambo ya solo ekende liboso. Ya solo, Batatoli ya Yehova koleka 75 000 na Malawi bazali na botɔndi mingi mpo na lisungi oyo bandeko na bango bakristo ya mokili mobimba bapesaka.

Likambo mosusu oyo esalisaki Batatoli bátonga bisika mingi ya losambo na ntango mokuse, ezali mpo bazalaki te na mposa ya bisika ya mindɔndɔmindɔndɔ. Bazalaki te koluka kotonga bisika ya kokamwisa to oyo ekosɛnga mbongo mingi. Balingaki nde bisika ya mindɔndɔ te, kasi oyo ekokumisa Nzambe, mpe oyo ebongi mpo na koyekola Biblia.

Ezali mpo na bolamu ya bato nyonso

Liboso, bazalaki kosɛka Batatoli ya Yehova mpe koloba ete bazali lingomba moko oyo ezangi bisika ya losambo. Yango esalaki ete Batatoli mosusu báyoka nsɔni kobengisa na makita bato oyo bazalaki kosepela na nsango malamu. Kanisá sikoyo esengo oyo bayokaki ntango bakómaki na Bandako ya Bokonzi ya kitoko! Sikoyo bakómaki na esengo ya kobengisa na makita bato oyo bafandi na bango esika moko mpe baoyo basepelaka na nsango malamu. Kutu na esika moko, bandeko basepelaki komona bato 698 bayei koyangana na makita ya lisangá na Ndako ya Bokonzi ya sika!

Batatoli mingi mpe bato mosusu balobaki ete bakanisaki te ete mokolo mosusu bakozwa ndako ya kitoko mpe oyo etongami malamu ndenge wana na mboka na bango. Augustin, oyo tolobelaki na ebandeli ya lisolo oyo, akanisi lisusu lisangá moko oyo ezalaki kosala makita na nse ya nzete moko. Alobi boye: “Na eleko ya elanga, makambo ezalaki malamu. Kasi na eleko ya mbula, mawa!” Soki mbula esilá kobɛtɛla yo, oyebi mawa oyo Augustin alobeli.

Augustin akanisi lisusu mbala moko oyo akendaki kotala lisangá ya mboka Chimwanje. Alobi boye: “Tosalaki makita na mwa ndako ya banzete mpe matiti. Kasi toyebaki te ete limpulututu (araignée) moko ya monene oyo ezalaka na ngɛngɛ mabe, ekómaki kofanda na nsamba ya mwa ndako yango. Na mbala moko, limpulututu yango ekweaki pembeni ya lokolo na ngai ntango nazalaki kosala diskur! Nayokaki ndeko moko agangi na nsɔmɔ ‘Augustin, nyatá yango, nyatá yango!’ Nanyataki yango. Mpe ngai oyo nazali na bomoi tii lelo.” Kasi lelo oyo, bandeko ya lisangá bakutanaka lisusu na mikakatano ya ndenge wana te mpo bakómi na Ndako ya Bokonzi ya sika.

“Engɛngisi mpenza kartye”

Programɛ ya kotonga Bandako ya Bokonzi etindi bato mingi mpe bankumu mingi ya mboka bákumisa mpe bámemya Batatoli ya Yehova, ndenge makambo oyo elandi emonisi yango:

✔ “Kotongama ya esika ya sika ya losambo, ezala mpe bolingo mpe bomoko oyo Batatoli ya Yehova bamonisi, ebongi ete mangomba mosusu elanda ndakisa na bango.”​—Nkumu ya mboka Chabwenzi.

✔ “Eloko esepelisaka mingi epai ya Batatoli ezali bomoko na bango. Biso tobandá kotonga ndako-nzambe na biso eleki sikoyo mbula zomi, kasi toyebi te mokolo nini ekosila. Nazali kopesa bino matɔndi mingi na ndenge botongi eloko ya kitoko boye epai na biso.”​—Mokonzi ya mboka Chigwenembe.

✔ “Ndenge na bino ya kosala mosala ekamwisaka. Bokendeke mbangu kasi na molɔngɔ! Bozali mpenza na bomoko.”​—Nkumu ya mboka Chiuzira.

Mosala ya kotonga Bandako ya Bokonzi ebendi likebi ya bato mingi, yango wana ata babimisi ya diksionɛrɛ moko ya Chichewa/​Chinyanja ná Lingelesi elobi boye mpo na Batatoli: “Batatoli ya Yehova batongi [Bandako ya Bokonzi] mingi.”

“Ndako ya Bokonzi oyo ezali likamwisi”

Na mokolo ya 30 na sanza ya Yambo ya mobu 2011, bandeko ya lisangá ya Manyowe na engumba Blantyre, oyo tolobelaki liboso, basalaki molulu ya kofungola Ndako ya Bokonzi na bango ya sika, mpe ezalaki Ndako ya Bokonzi ya 1 000 oyo etongamaki na Malawi. Ndeko moko ya lisangá alobaki ete: “Kozwa Ndako ya Bokonzi oyo ezali likamwisi. Ezali lokola ndɔtɔ oyo ekokisami.”

Elenge mwasi moko na lisangá ya Manyowe alobi ete: “Nazangisaki ata mokolo moko te na ntango ya botongi. Nazali mpenza na esengo ya kopesa mabɔkɔ na kotongama ya ndako ya kitoko ya losambo na teritware na biso.”

Nkulutu moko ya lisangá alobaki boye: “Ezalaki mpasi mpo bakonzi ya Leta bándima ete tótonga Ndako ya Bokonzi. Mbala mingi, bakonzi ya engumba baboyaki kotya sinyatire na mikanda oyo esengelaki mpo na kotonga. Kasi nkumu-mboka moko ya mwasi na nkombo Liness Chikaoneka, abundanaki mpenza mpo na kondimisa bakonzi ya Leta batyá sinyatire na mikanda yango.”

Mokolo moko, mwasi yango akendeki kotika nkulutu moko mpo bátya sinyatire na mokanda. Ayebisaki mokonzi ya Leta ete: “Nalingi Batatoli bátonga Ndako ya Bokonzi na mboka na ngai. Bazali bato malamu. Naino nasambisá likambo na bango te.” Na nsima, mokonzi wana atyaki sinyatire na mokanda yango.

Mwasi yango asepelaki mingi mokolo Batatoli basalaki molulu ya kofungoli Ndako ya Bokonzi. Alobaki boye: “Nasepeli mingi mpenza mpe nazali na esengo ndenge ndako oyo ya kitoko etongami na mboka na ngai!”

Na Malawi mobimba, Batatoli ya Yehova mpe bato oyo bafandi pene na bango bazali se komonisa botɔndi mpo na mosala ya kotonga Bandako ya Bokonzi. Lokola Batatoli ya Yehova bazali na elimo ya komipimela mpe basalaka mosala makasi, bazali lisusu na mosala mingi te ya kotonga Bandako ya Bokonzi ndenge ezalaki na mobu 1993. Ya solo, ntango nyonso oyo bato bakokoba kosepela na “nsango malamu ya Bokonzi ya [Nzambe]” mpe masangá ya sika ekosalema, bakozala kaka na mposa ya kotonga Bandako ya Bokonzi mosusu. (Matai 24:14) Na yango, Batatoli bazali na botɔndi mingi mpo na lisungi mpe makabo ya bolingo oyo baninga na bango Batatoli ya mokili mobimba bazali kopesa.c

Kasi libosoliboso, Batatoli bapesaka matɔndi epai ya Yehova, Nzambe na bango. Bazali mpenza koloba lokola mokomi ya nzembo oyo alobaki ete: “Bikólo nyonso oyo osali ekoya, mpe ekogumbamela yo, Ee Yehova, mpe ekopesa nkombo na yo nkembo. Mpo yo ozali monene mpe ozali kosala makambo ya kokamwa.”​—Nzembo 86:9, 10.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Motángo ya Bandako ya Bokonzi eleki sikoyo 1 030.

b Kobanda 1999, Batatoli ya Yehova batongi Bandako ya Bokonzi 23 786 na bikólo 151 oyo ezali na bozwi mingi te.

c Na mokili mobimba, mosala ya Batatoli ya Yehova esimbami mpenza na makabo oyo bato bapesaka na bolingo na bango moko.

[Elilingi na lokasa 20]

Liboso programɛ ya kotonga Bandako ya Bokonzi ebanda, mbala mingi bazalaki kosala makita na bandako ya matiti

[Elilingi na lokasa 20]

Sikoyo, masangá eyanganaka na Bandako ya Bokonzi lokola oyo

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto