LISOLO YA BOMOI
Natikaki ete Yehova atambwisa banzela na ngai
NTANGO nazalaki elenge, naponaki nzela moko, elingi koloba, mosala moko ya mosuni oyo nazalaki kolinga mingi. Kasi Yehova asɛngaki ngai napona nzela mosusu, mpe ezalaki lokola ayebisaki ngai boye: “Nakosala ete ozala na mayele ya kososola mpe nakoteya yo nzela oyo osengeli kokende.” (Nz. 32:8) Lokola natikaki ete Yehova atambwisa banzela na ngai, nazalaki na likoki ya kosalela bomoi na ngai na mosala na ye mpe nazwaki mapamboli mingi, ezala mpe mbula 52 oyo nasalaki na Afrika.
LONGWA NA ANGLETERRE TII NA AFRIKA
Nabotamaki na mobu 1935 na Darlaston, mboka moko ya Pays Noir, etúká moko ya Angleterre, bapesaki yango nkombo wana ntango baizini ezalaki kobimisa milinga ya moindo. Ntango nazalaki na mbula soki 4, baboti na ngai babandaki koyekola Biblia na Batatoli ya Yehova. Lisusu, ntango nazalaki na mbula soki 14 to 15, namindimisaki ete yango ezalaki solo mpe nazwaki batisimo na mobu 1952 ntango nazalaki na mbula 16.
Kaka na ntango yango, nabandaki koyekola mosala na izini moko ya monene oyo ezalaki kosala bamasini oyo basalelaka na mabɔkɔ mpe biloko ya mituka. Nabandaki kozwa formasyo mpo na kokóma sɛkrɛtɛrɛ ya kompanyi, mpe nazalaki kolinga yango mingi mpenza.
Nasengelaki kozwa ekateli moko ya ntina mingi ntango mokɛngɛli motamboli moko asɛngaki ngai nabanda kotambwisa Boyekoli ya Mokanda na lisangá na biso ya Willenhall. Kasi ezalaki ekateli moko ya mpasi mingi. Kendekende, nakómaki koyangana na makita na masangá mibale. Na boumeli ya pɔsɔ, nazalaki koyangana na lisangá oyo ezalaki pene na esika na ngai ya mosala na Bromsgrove, oyo ezalaki na ntaka ya kilomɛtrɛ soki 32 uta na ndako na ngai. Mpe na mikolo ya nsuka ya pɔsɔ, ntango nazalaki kozonga na ndako epai ya baboti na ngai, nazalaki koyangana na makita na lisangá ya Willenhall.
Lokola nazalaki na mposa ya kopesa ebongiseli ya Yehova mabɔkɔ, nandimaki bosɛnga ya mokɛngɛli motamboli, atako esɛngaki ngai natika mosala oyo nazalaki kolinga mingi mpenza. Nayokaka mawa soki moke te ndenge natikaki Yehova atambwisa nzela na ngai, oyo epesi ngai likoki ya kozala na bomoi ya esengo mpenza.
Wana nazalaki koyangana na lisangá ya Bromsgrove, nakutanaki na ndeko mwasi moko na nkombo Anne, oyo azalaki kitoko mpe moto ya elimo. Tobalanaki na mobu 1957, mpe tosalaki elongo lokola babongisi-nzela ya sanza na sanza, babongisi-nzela monene, bakɛngɛli batamboli, mpe tosalaki na Betele. Anne azalaki kopesa ngai esengo.
Na mobu 1966, tosepelaki kokɔta na kelasi ya mbala 42 ya Eteyelo ya Gileade. Batindaki biso na Malawi, oyo bato mingi bazalaki kobenga motema nsai ya Afrika mpo bazali bato ya boboto mpe bayambi-bapaya. Tozalaki kokanisa ete tokoumela mingi te kuna.
KOSALA NA NTANGO OYO MAKAMBO MINENE ESALEMAKI NA MALAWI
Bazalaki kosalela motuka na nkombo Kaiser Jeep na mosala ya mokɛngɛli motamboli na Malawi
Tokómaki na Malawi na mokolo ya 01/02/1967. Na sanza ya liboso, tolekisaki ntango mingi mpo na koyekola monɔkɔ ya sika, mpe na nsima tobandaki mosala ya mokɛngɛli ya etúká. Tozalaki kotambola na motuka babengi Kaiser Jeep oyo bato mosusu bazalaki kokanisa ete ekokaki kotambola esika nyonso, ata mpe kokatisa bibale. Nzokande ezalaki bongo te, tozalaki kaka kokatisa mwa mai oyo ezali mozindo te. Na bantango mosusu, tozalaki kofanda na ndako moko ya mabele oyo tozalaki kozipa kapo likoló na yango na eleko ya mbula mpo mai ekɔta te na ndako. Ezalaki kotungisa biso mingi ndenge tobandaki mosala na biso ya misionɛrɛ bongo, kasi tozalaki kosepela na yango!
Na sanza ya 04/1967, nayaki koyeba ete tokozala na mikakatano na guvɛrnema. Nalandaki diskur ya prezida ya Malawi, Hastings Banda, na radio. Alobaki ete Batatoli ya Yehova bazalaki kofuta batakse te mpe bazalaki kotɛmɛla politiki ya mboka. Na ntembe te, bifundeli wana ezalaki ya lokuta. Biso nyonso toyebaki ete mama ya likambo ezalaki ndenge toboyaka kokɔta na makambo ya mokili, mingimingi ndenge toboyaka kosomba bakarte mpo na kozala mosangani ya parti ya politiki.
Na sanza ya 09/1967, totángaki na zulunalo moko oyo elobaki ete prezida afundaki bandeko ete bazalaki kotya mobulu bisika nyonso. Alobaki na liyangani moko ya politiki ete guvɛrnema na ye esengeli kosala na lombangu mpo na kopekisa mosala ya Batatoli ya Yehova. Na mokolo ya 20/10/1967, mosala ya Batatoli ya Yehova epekisamaki. Mwa moke na nsima, bapolisi mpe bakonzi ya immigration bayaki kokanga Betele mpe bazongisaki bamisionɛrɛ na mboka na bango.
Bakangaki ye mpe bamemaki ye longwa na Malawi na mobu 1967 elongo na baninga na ye bamisionɛrɛ Jack ná Linda Johansson
Nsima ya kolekisa mikolo misato na bolɔkɔ, batindaki biso na Île Maurice, mboka oyo ezalaki koyangelama na bato ya Angleterre. Kasi, bakonzi ya Île Maurice bandimaki te tófanda kuna lokola bamisionɛrɛ. Yango wana batindaki biso na Rhodésie (lelo oyo ekómá Zimbabwe). Ntango tokómaki kuna, tokutanaki na mokonzi moko mabe ya immigration oyo aboyaki tókɔta kuna, alobaki boye: “Sikoyo bozali awa mpo bomoni ete ebongi mpenza mpo na bino, mpamba te babenganaki bino na Malawi mpe na Île Maurice.” Anne abandaki kolela. Emonani lokola moto moko te azalaki na mposa na biso awa! Na ntango yango, nazalaki na mposa ya kolongwa wana mpe kozonga na Angleterre. Nsukansuka, bakonzi ya immigration bandimaki ete tólekisa butu moko na Betele soki tondimi kozonga na biro na bango monene na mokolo ekolanda. Tomitungisaki mingi mpenza, kasi tokobaki kotika makambo na mabɔkɔ ya Yehova. Na mokolo oyo elandaki na nsima ya midi, bapesaki biso ndingisa ya kofanda na Zimbabwe lokola bapaya. Nakobosana soki moke te ndenge namiyokaki mokolo wana mpe nandimaki ete Yehova azalaki kotambwisa nzela na biso.
MOKUMBA YA SIKA—KOSALA NA MALAWI UTA NA ZIMBABWE
Elongo na Anne na Betele ya Zimbabwe, 1968
Na biro ya filiale ya Zimbabwe, nazwaki mokumba ya kosala na Departema ya Mosala, nazalaki kolandela mosala ya kosakola na Malawi mpe na Mozambique. Bazalaki konyokola bandeko makasi na Malawi. Lokola ezalaki mosala oyo nazalaki kosala, nazalaki kobongola balapolo ya bakɛngɛli ya zongazonga oyo bazalaki kokoma na monɔkɔ ya Malawi oyo bazalaki kotinda. Mokolo moko na butu mpenza nazalaki kosala, nalelaki ntango natángaki makambo etali minyoko oyo bandeko basi mpe mibali bazalaki kokutana na yango.a Kasi, bosembo, kondima mpe ezaleli na bango ya koyika mpiko elendisaki ngai mpenza.—2 Ko. 6:4, 5.
Tosalaki nyonso oyo tokoki mpo na kopesa bandeko oyo batikalaki na Malawi bilei ya elimo mpe baoyo bakendaki na Mozambique mpo na kokima makambo ya mabe oyo bazalaki kosala Batatoli ya Yehova. Bandeko oyo bazalaki kobongola na monɔkɔ ya Chichewa, monɔkɔ oyo bato balobaka mingi na Malawi, bakendaki kofanda na ferme moko monene ya ndeko moko na Zimbabwe. Atongaki bandako mpe biro moko mpo na bango. Kuna bakobaki kosala mosala na bango ya ntina mingi ya kobongola mikanda oyo elimbolaka Biblia.
Tozwaki bibongiseli mpo na bakɛngɛli ya zongazonga oyo bazalaki na Malawi mpo bákendeke koyangana na liyangani ya etúká mbula nyonso na Zimbabwe. Kuna nde bazalaki kozwa badiskur ya kosala. Ntango bazalaki kozonga na Malawi, bazalaki koyebisa bandeko makambo oyo bayokaki na liyangani. Mbula moko ntango bayaki kotala Zimbabwe, tobongisaki Eteyelo ya mosala ya Bokonzi mpo na kolendisa bakɛngɛli ya zongazonga wana ya mpiko.
Azali kosala diskur moko na monɔkɔ ya Chichewa na liyangani moko na Chichewa/Shona na Zimbabwe
Na sanza ya 02/1975, nakendaki kotala Batatoli ya Yehova ya Malawi oyo bakimaki na bakaa na Mozambique. Bandeko yango bazalaki kolanda malako ya suka ya ebongiseli ya Yehova, ezala mpe ebongiseli ya sika ya kozala na lisangani ya bankulutu. Bankulutu ya sika bazalaki na makambo mingi ya elimo ya kosala, na ndakisa, kosala badiskur, kolobela mokapo ya mokolo, mpe Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli, ezala mpe kosala mayangani. Babongisaki bakaa yango kaka lokola esika ya liyangani, ezalaki na badepartema ya kotya bopɛto, kokabola bilei, mpe kobatela esika yango. Bandeko wana ya sembo basalaki makambo mingi na lisalisi ya Yehova, mpe yango elendisaki ngai mingi mpenza.
Na nsuka ya bambula 1970, filiale ya Zambie nde ekómaki kotambwisa mosala na Malawi. Kasi, nakobaki ntango nyonso kokanisa bandeko ya Malawi mpe nazalaki kobondela mingi mpo na bango, kaka ndenge bandeko mingi bazalaki kosala. Na mabaku mingi, lokola nazalaki mosangani ya Komite ya filiale ya Zimbabwe, nakutanaki na bamonisi ya biro monene, elongo na bandeko oyo bazalaki kokamba oyo bautaki na Malawi, Afrika ya Sudi, mpe Zambie. Mbala na mbala, tozalaki kotuna motuna kaka moko: “Nini mosusu tokoki kosala mpo na bandeko na biso ya Malawi?”
Wana mikolo ezalaki koleka, monyoko ekómaki kokita. Bandeko oyo bakimaki mboka bakómaki kozonga malɛmbɛmalɛmbɛ na Malawi, na ntango wana minyoko ya bandeko oyo batikalaki ekómaki kokita malɛmbɛmalɛmbɛ. Bikólo ya zingazinga epesaki nzela ete Batatoli ya Yehova básakola mpe báyanganaka elongo mpe elongolaki bipekiseli oyo etyelaki bango. Mozambique mpe esalaki bongo na mobu 1991. Kasi tozalaki komituna boye: ‘Ntango nini Batatoli ya Yehova ya Malawi bakozwa bonsomi?’
TOZONGAKI NA MALAWI
Nsukansuka makambo ya politiki ekómaki kobongwana na Malawi, mpe na mobu 1993 guvɛrnema elongolaki bipekiseli oyo etyelaki Batatoli ya Yehova. Mwa moke na nsima, nasololaki na misionɛrɛ moko oyo atunaki boye: “Okozonga lisusu na Malawi?” Nazalaki na mbula 59, yango wana nayanolaki boye: “Te, nakómi mobange!” Kasi, kaka na mokolo yango tozwaki mokanda uta na Lisangani ya Mikóló-Bakambi oyo esɛngaki biso tózanga kuna.
Tozalaki kosepela na mosala oyo tozalaki kosala na Zimbabwe, yango ezalaki ekateli moko ya mpasi mpo na biso. Tozalaki na esengo mpe tosalaki boninga malamu na bandeko na Zimbabwe. Lisangani ya Mikóló-Bakambi eyebisaki biso na boboto ete tokoki kotikala na Zimbabwe soki tosepeli. Yango wana, tokokaki kopona na pɛtɛɛ nyonso tótikala na biso na Zimbabwe. Kasi nakanisaki ndenge Abrahama ná Sara batikaki ndako na bango ya kitoko ntango bazalaki mibange mpo na kotosa malako ya Yehova.—Eba. 12:1-5.
Toponaki kolanda malako ya ebongiseli ya Yehova mpe tozongaki na Malawi na mokolo ya 01/02/1995, mbula 28 nsima ya kokóma mbala ya liboso kuna. Komite ya filiale etyamaki, ezalaki ngai ná bandeko mosusu mibale, mpe tobongisaki makambo mingi mpo misala ya Batatoli ya Yehova ezonga lisusu.
YEHOVA AZALI KOKOLISA YANGO
Oyo nde esengo komona ndenge Yehova azali kokolisa mosala yango nokinoki! Basakoli babakisamaki nokinoki soki 30000 na mobu 1993 mpe bakómaki 42000 na mobu 1998.b Lisangani ya Mikóló-Bakambi endimaki baplan mpo na biro ya filiale ya sika mpo na kolandela mosala monene oyo tosengelaki kosala. Tozwaki lopango ya ektare 12 na Lilongwe, mpe nazalaki kosala na komite ya botongi.
Ndeko Guy Pierce ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi asalaki diskur ya milulu ya kofungola bandako ya sika ya Betele na sanza ya 05/2001. Batatoli ya Yehova koleka 2 000 bayanganaki na molulu yango, ezalaki mingimingi baoyo bazalaki na mbula koleka 40. Bandeko basi mpe mibali yango bayikaki mpiko bambula mingi na minyoko makasi oyo bakutanaki na yango na ntango ya epekiseli. Na mosuni, bazalaki babola mpenza kasi na elimo bazalaki bazwi mpenza. Mpe na ntango yango basepelaki kotala Betele ya sika. Esika nyonso bazalaki kokende na Betele, bazalaki koyemba nzembo ya Bokonzi na ebɛtɛli ya miziki ya Afrika, oyo esalaki ete molulu mobimba esepelisa motema na ndenge oyo namiyoká naino te. Yango emonisaki polele ete Yehova apambolaka baoyo bayikaka mpiko na bosembo mpenza.
Ntango basilisaki kotonga Betele mobimba, nasepelaki mingi ntango bapesaki ngai mokumba ya kobanda kosala milulu ya kofungola Ndako ya Bokonzi. Masangá mingi ya Malawi etyamaki na programɛ ya kotonga Bandako ya Bokonzi na lombangu na mikili oyo ezali na bozwi mingi te. Liboso, masangá mosusu ezalaki kosala makita na nse ya banzete babengi eucalyptus. Bandako ya Bokonzi etongamaki na nsamba ya matiti mpe bandeko bazalaki kofandela banzete ya milai. Lelo oyo, bandeko bazali na Bandako ya Bokonzi ya sika ya kitoko oyo basalaki makasi mpo na kotumba babriki na ba-four oyo bango moko batongaki. Kasi bazalaki kosepela kofandela ba-banc kasi bakiti te, mpamba te bazalaki koloba ete bato mingi bafandaka na banc moko na esika moto moko afanda na kiti ye moko!
Nasepelaka mpe komona ndenge Yehova asalisaka bato bákóma bakristo oyo bakɔmɛli. Bilenge mibali ya Afrika bakamwisaki ngai mpo bamipesaki na bolingo na bango moko na mosala ya Yehova mpe nokinoki bayebaki makambo mingi na nzela ya formasyo oyo bazwaki na ebongiseli ya Yehova mpe ndenge basalelaki formasyo yango. Yango wana, bazwaki mikumba ya minene na Betele mpe na masangá. Masangá elendisamaki lisusu mingi na bakɛngɛli ya sika oyo bazalaki bana-mboka, oyo mingi na bango bazalaki na basi. Atako bato mingi, ezala mpe bandeko na bango ya libota bazalaka na mposa ete bato oyo babalani bázala na bana, bandeko yango ná basi na bango bazwaki ekateli ya kozala na bana te na mokili oyo mpo bázala na likoki ya kosalela lisusu Yehova mingi koleka.
NAZWAKI EKATELI MOKO MALAMU MPENZA
Elongo na Anne na Betele ya Grande-Bretagne
Nsima ya kolekisa mbula 52 na Afrika, nabɛlaki makasi mpenza. Komite ya filiale esɛngaki Lisangani ya Mikóló-Bakambi ete bátinda biso na Grande-Bretagne mpe endimaki yango. Tosepelaki te kotika mokumba oyo tozalaki kolinga, kasi lokola tokómi mibange, bandeko ya libota ya Betele ya Grande-Bretagne bazali kobatela biso malamu mpenza.
Nandimi ete nazwaki ekateli moko oyo eleki malamu ya kotika Yehova atambwisa banzela na ngai. Soki natyaki motema na mayele na ngai moko, nani ayebi epai mosala na ngai ya mosuni elingaki komema ngai. Yehova ayebaki makambo nyonso oyo nasengelaki na yango mpo na ‘kosembola banzela na ngai.’ (Mas. 3:5, 6) Ntango nazalaki elenge, nayekolaki makambo mikemike etali ndenge kompanyi etambwisamaka. Kasi, ebongiseli ya Yehova epesaki ngai mokumba moko oyo eleki kitoko. Mpo na ngai, kosalela Yehova ezalaki mpe ekokoba kozala mosala oyo eleki mosika misala nyonso oyo nasalá na bomoi na ngai!
a Lisolo ya Batatoli ya Yehova na Malawi ebimaki na Buku ya mobu ya Batatoli ya Yehova ya 1999, nk. 148-223.
b Lelo oyo, Malawi ezali na basakoli koleka 100 000.