Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g 9/13 nk. 12-13
  • Osengeli kondima liteya ya Bosato?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Osengeli kondima liteya ya Bosato?
  • Lamuká!—2013
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • YESU AZALI NZAMBE?
  • YANGO ETALI YO NA NINI?
  • Eteni 4—Ntango nini mpe ndenge nini liteya ya Bosato likólaki?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Liteya ya Trinité ekólaki ndenge nini?
    Osengeli kondima Trinité?
  • Eklezia ya ebandeli eteyaki ete Nzambe azali bosato?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Biblia ezali mpenza koteya Trinité?
    Osengeli kondima Trinité?
Makambo mosusu
Lamuká!—2013
g 9/13 nk. 12-13

Osengeli kondima liteya ya Bosato?

Bato koleka miliare mibale balobaka ete bazali bakristo. Mingi na bango bazali bandimi ya mangomba oyo eteyaka Bosato, liteya oyo elobaka ete Tata, Mwana mpe elimo santu basali Nzambe kaka moko. Ndenge nini liteya yango ekɔtaki na Lingomba? Liteya yango eyokani mpenza na mateya ya Biblia?

BASILISAKI kokoma Biblia na siɛklɛ ya liboso ya ntango na biso. Mateya oyo esalaki ete bato bakóma kondima liteya ya Bosato emonisamaki polele na mobu 325 ya ntango na biso; mbula koleka nkama mibale nsima ya kokomama ya Biblia, na likita oyo esalemaki na Asie Mineure na engumba Nicée, oyo ekómá lelo Iznik, mboka moko oyo ezali na ɛsti ya Turquie. Buku moko (New Catholic Encyclopedia) elobi ete mateya oyo eutaki na likita ya Nicée epesaki mpo na mbala ya liboso “ndimbola ya mateya ya eglize” ata mpe ya liloba Nzambe mpe Yesu. Kasi mpo na nini ezalaki na ntina bálimbola liloba Nzambe mpe Kristo bankama ya bambula nsima ya kokomama ya Biblia? Biblia ezali polele te na likambo yango?

YESU AZALI NZAMBE?

Ntango Constantin akómaki mokonzi kaka moko ya ampire ya Roma, baoyo bazalaki komibenga bakristo bazalaki na makanisi ndenge moko te mpo na boyokani oyo ezali kati na Nzambe mpe Kristo. Yesu azalaki Nzambe? To Nzambe nde akelaki ye? Mpo na kokata likambo yango, Constantin abengisaki bakambi ya Lingomba na likita oyo esalemaki na Nicée, ezalaki te mpo azalaki koluka solo, kasi nde mpo alingaki te lingomba ekabola ampire na ye.

“Kasi bísó tozalí na Nzámbe sé mǒkó, Tatá.”​—1 Korinti 8:6, Biblia Liloba lya Nzambe

Constantin asɛngaki Baepiskopo, oyo bazalaki soki nkama, báyokana bango nyonso na likambo yango, kasi esimbaki te. Na nsima, apesaki makanisi ete bango nyonso bándima liteya oyo ezangi motó ná makolo ete Yesu ná Tata “bazali kaka moto moko” (homoousios). Liloba yango ya filozofi ya Grɛki oyo euti na Biblia te, efungolaki nzela mpo na liteya ya Bosato oyo na nsima ekɔtaki na mateya ya Lingomba. Longola yango, na nsuka ya siɛklɛ ya minei, liteya yango ekómaki koteyama ndenge ezali lelo oyo, ata mpe liteya oyo elobaka ete elimo santu ezali eteni ya misato ya bonzambe.

YANGO ETALI YO NA NINI?

Yesu alobaki ete “basambeli ya solosolo bakosambela Tata na . . . solo.” (Yoane 4:23) Solo yango ekomamá na Biblia. (Yoane 17:17) Biblia eteyaka ete Tata, Mwana, mpe elimo santu basali Nzambe moko na biteni misato?

Ata esika moko te Biblia etángi liloba “Bosato.” Lisusu, ata mbala moko te Yesu alobá ete akokani na Nzambe. Kutu, Yesu azalaki kosambela Nzambe. (Luka 22:41-44) Likambo mosusu ezali boyokani oyo Yesu azalaki na yango ná bayekoli na ye. Ata nsima ya kosekwa na nzoto ya elimo, Yesu abengaki bayekoli na ye “bandeko na ngai.” (Matai 28:10) Bazalaki nde bandeko ya Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso? Soki moke te! Kasi, na kondima oyo bazalaki na yango epai ya Kristo, Mwana ya libosoliboso ya Nzambe, bango mpe bakómaki bana ya Tata kaka moko. (Bagalatia 3:26) Talá soki bavɛrsɛ oyo elandi ekokani na mateya oyo elobamaki na likita ya Nicée.

Mateya ya Nicée elobaka boye:

“Tondimelaka . . . Nkolo moko Yesu Kristo . . . oyo azali moto moko na Tata, Nzambe ya Nzambe, Pole ya Pole, Nzambe ya solo ya Nzambe ya solo.”

Oyo Biblia elobi:

  • “Tatá alekí ngáí [Yesu] na bonéne.”​—Yoane 14:28.a

  • “Nakobuta [Yesu] epái ya Tatá wa ngáí, óyo azalí mpé Tatá wa bínó; epái ya Nzámbe wa ngáí, óyo azalí mpé Nzámbe wa bínó.”​—Yoane 20:17.

  • “Kasi bísó tozalí na Nzámbe sé mǒkó, Tatá.”​—1 Korinti 8:6.

  • “Nkémbo na Nzámbe, Tatá wa mokonzi wa bísó Yézu Krístu!”​—1 Petro 1:3.

  • “Nzámbe azalí mokonzi wa Krístu.”​—1 Korinti 11:3.b

a Bavɛrsɛ oyo nyonso euti na Biblia Liloba lya Nzambe.

b Buku Biblia eteyaka mpenza nini? oyo esalisaka bato báyekola Biblia ezali na mateya oyo mibale: “Mateya ya solo etali Nzambe ezali nini?” mpe “Yesu Kristo azali nani?” Okoki kozwa buku yango epai ya Batatoli ya Yehova to kotánga yango na Internet na www.pr2711.com.

NA MOKUSE:

  • Buku moko (The New Westminster Dictionary of Church History) elobi ete “mateya ya Nicée ebimaki te na likita ya liboso oyo esalemaki na Nicée na mobu (325) . . . kasi nde na likita ya liboso oyo esalemaki na Constantinople na mobu (381).”

  • “Ndenge likita ya Nicée oyo esalemaki na mobu 325 elobaki ete Mwana ‘ná Tata bazali kaka moto moko,’ ebongisaki mpenza makambo mpo [liteya ya Bosato ekóma koteyama na nsima.]”​—Encyclopædia Britannica.

Likita ya liboso oyo esalemaki na Nicée (liyemi ya moto ya ntɔki) ebongisaki nzela mpo na liteya ya Bosato

“Liloba Bosato to likanisi oyo elobeli Nzambe moko na bapersona misato ezali ata esika moko te na Biblia ata mpe na Kondimana ya sika.”​—Encyclopædia Britannica.

“Liteya ya Bosato ebandaki te na eleko ya bakristo ya liboso, mpe tii na nsuka ya siɛklɛ ya mibale liteya yango elobelamaki polele te.”​—Library of Early Christianity​—Gods and the One God.

“Mpo na kobimisa liteya ya Bosato polele, esengelaki Lingomba ya [Katolike] esalela makanisi mosusu ya filozofi mpo na kobongisa ebengeli ya liteya yango.”​—Catechism of the Catholic Church.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto