Eklezia ya ebandeli eteyaki ete Nzambe azali bosato?
Eteni 4—Ntango nini mpe ndenge nini liteya ya Bosato likólaki?
Masoló misato ya liboso na molongó ya masoló oyo, mamonisaki ete ezala Yesu soko bayekoli na ye to mpe bakonzi ya mangomba balandi na bantomá bateyaki Bosato te. (Mosenzeli ya 1er novembre 1991; 1er février 1992; mpe 1er avril 1992) Lisoló oyo ya nsuka likolimbola lolenge nini liteya ya Bosato ekólaki, mpe mokumba oyo mokokisamaki na likita ya Nicée, oyo esalemaki na mobu 325 ya ntango na biso.
NA MOBU 325 ya ntango biso, Constantin, mokonzi Moloma, ayanganisaki likita na engumba Nicée, na Asie Mineure. Mposa na ye ezalaki ete asilisa kowelana ya lingomba oyo eumelaki ntango molai na ntina na Mwana na Nzambe mpe Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso. Likoló na makambo mabimaki na likita yango, mokanda Encyclopœdia Britannica moyebisi, ete:
“Constantin nde akambáki likita yango. Atambwisaki masoló, mpe ezali ye nde apesaki makanisi . . . oyo masengelaki kolobela boyokani ya Klisto mpe Nzambe kati na endimeli oyo esalamaki na likita, ete [Mwana] azali lolenge moko [ho·mo·ouʹsi·os] na Tata.’ . . . Lokola babangisamaki na mokonzi yango, ba episkopo nyonso, longola bobele mibale, batyaki mabɔkɔ na mokanda mpo na kondima likanisi yango; wana emonisi ete mingi basalaki yango na bolingo na bango moko te.”1
Mokonzi mopakano wana asalaki bongo mpo na bindimiseli oyo azalaki na yango na Biblia? Te. Mokanda A Short History of Christian Doctrine moyebisi ete: “Mpo na koloba solo, Constantin asosolaki soko moke te likoló na mateya oyo mautaki na téoloji ya Greke.”2 Eloko oyo ayebaki ezalaki bobele ete, kowelana na lingomba ezalaki likámá mpo na bomoko ya bokonzi na ye, mpe alingaki kosilisa yango.
Liteya ya Bosato libandisamaki?
Likita ya Nicée libandisaki, to lindimisaki liteya ya Bosato ya Boklisto ya lokutá? Bato mingi bakanisi bongo. Kasi makambo mamonisi ete, ezali bongo te.
Na ntina na Mwana na Nzambe, Endimeli ebimisamaki na likita wana eyebisaki makambo oyo masengelaki kopusa bakonzi ya mangomba mingi na kotalela ye, na lolenge mosusu, lokola moto oyo akokani na Nzambe Tata. Kasi, ezali ntina mpenza na komona oyo elobelami te kati na Endimeli ya Nicée. Ntango ebimaki na ebandeli, endimeli wana eyebisaki na mobimba na yango ete:
“Tozali na kondima epai na Nzambe bobele moko, Tata mozwi-na-nguya nyonso, mozalisi ya biloko bimonani mpe yango ezangi komonana;
“Mpe epai na Nkolo Yesu Klisto, Mwana na Nzambe, bobele ye nde abotamaki epai na Tata, elingi koloba auti na nzoto na Tata, Nzambe na Nzambe, pole na pole, Nzambe ya solo na Nzambe ya solo, oyo abotamaki, azalisamaki te, oyo azali lolenge moko na Tata, kati na ye biloko nyonso bizalisamaki na likoló mpe na mabelé; oyo akitaki longwa na likoló mpo na biso mpe mpo na lobiko na biso, abongwanaki mosuni, akómaki moto, aokaki mpasi mpe asekwaki mokolo ya misato amataki na makoló, mpe akoya kosambisa bakufi mpe bato na bomoi;
“Mpe epai na Elimo-Santu.”3
Endimeli oyo eyebisi ete Tata, Mwana, mpe elimo santu bazali bato misato kati na Nzambe moko? Elobi ete bango misato bakokani mpo na seko, na nguya, na etɛlɛmɛlo, mpe na mayele? Te, elobi bongo te. Soko liloba moko te limonisi ete misato ekokóma moko. Na ebandeli, Endimeli ya Nicée ebandisaki Bosato te mpe endimisaki yango te.
Lisusu, endimeli wana ekokanisi Mwana na Tata na ndimbola oyo ye azali “lolenge moko” na [Tata]. Kasi elobi motindo wana te na ntina na elimo santu. Elobi bobele ete: “Tozali na kondima . . . epai na Elimo-Santu.” Awa, tomoni te liteya ya Bosato oyo boteyami na boklisto ya lokutá.
Ata liloba “lolenge moko” (ho·mo·ouʹsi·os) elimboli mpenzampenza te ete likita wana lindimaki kokokana ya Tata mpe Mwana kati na makambo nyonso. Mokanda New Catholic Encyclopedia moyebisi ete:
“Likambo oyo ete likita lizalaki na likanisi ya kondimisa ete lolenge oyo Tata mpe Mwana bakokani na makambo nyonso, ezali kopesa ntembe.”4
Ata soki likita lizalaki na mposa ya koloba ete Mwana mpe Tata bazalaki moko mpenza, mbɛlɛ esali mpe Bosato te. Mbɛlɛ ekómaki bato mibale kati na Nzambe moko, kasi bato misato kati na Nzambe moko te oyo elakisami na liteya ya Bosato.
“Likanisi ya bato moke”
Na Nicée, ba episkopo nyonso bakanisaki ete Mwana ekokanaki na Nzambe? Te, mpamba te ezalaki na makanisi makeseni. Na ndakisa, likanisi oyo limonisamaki na Arius, oyo azalaki koteya ete Mwana azwaki ebandeli mpe akokani te na Nzambe, kasi azali nde na nsé na ye kati na makambo nyonso. Nzokande, Athanase azalaki kondima ete Mwana akokani na Nzambe, na lolenge mosusu. Ezalaki mpe na makanisi mosusu lokola.
Na ntina na ekateli ezwamaki na likita mpo na kotalela Mwana lokola ete azali lolenge moko (nzoto moko mpenza) na Nzambe, Martin Marty alobi ete: “Nicée emonisaki likanisi ya bato moke; boyokani bosalemaki elongo na mikakatano; baoyo na baoyo bazalaki na makanisi ya Arius te, bandimaki yango te.”5 Bobele bongo, mokanda A Select Library of Nicene and Post-Nicene Fathers of the Christian Church emonisi ete “etɛlɛmɛlo ya polele mpe ekeseneki na oyo ya Arius, emonisamaki bobele na bato moke; atako bongo, bato moke wana balóngaki.”6 Lisusu, mokanda A Short History of Christian Doctrine moyebisi ete:
“Oyo ntalo monene na baepiskopo mpe bateolojié ya Orient bazalaki komona lokola ete ekoki kondimama te, ezalaki nde likanisi oyo Constantin akɔtisaki ye moko kati na Endimeli, homoousios [“lolenge moko”]; likanisi oyo ekómaki likambo ya kowelana kati na mateya oyo matalelamaki na lingomba ete mazali solo mpe oyo matalelamaki ete mazali lipɛɔngwi.”7
Nsima na likita, kowelana eumelaki bambula mingi. Baoyo bandimaki likanisi ya kokokanisa Mwana na Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso, bandimamaki na bato te na boumeli ya mwa ntango. Na ndakisa, Martin Marty alobaki na ntina na Athanase ete: “Motuya ya bato oyo bazalaki kosepela na ye ebakisamaki mpe na nsima, ekitaki, mpe mbala na mbala [na bambula oyo elandaki likita], azalaki kokenda kofanda na bamboka ya bopaya mpe azalaki kozonga.”8 Athanase afandaki bambula mingi na bamboka ya bapaya mpo ete bakonzi ya politike mpe bakonzi ya mangomba bandimaki te likanisi na ye oyo elobi ete Mwana akokani na Nzambe.
Na yango, koloba ete Likita ya Nicée oyo lisalemaki na mobu 325 ya ntango biso, ebandisaki to endimisaki liteya ya Bosato, ezali solo te. Oyo eyei kokóma liteya Bosato, ezalaki te na eleko wana. Likanisi oyo ete moko na moko kati na Tata, Mwana mpe elimo santu azali Nzambe ya solo mpe bakokani na seko, na nguya, na etɛlɛmɛlo mpe na mayele, nzokande bobele Nzambe moko—bapersona misato kati na Nzambe moko—elobelamaki na likita wana te soko mpe te na bakonzi ya mangomba balandi na bantomá. Na yango mokanda The church of the First Three Centuries elobi ete:
“Liteya ya Bosato oyo lipalangani na eleko na biso . . . libimaki te na maloba ya Justin [Martyr]: mpe ezali bobele bongo epai na bakonzi nyonso ya lingomba oyo bazalaki liboso na likita ya Nicée; elingi koloba, epai na bakomi baklisto nyonso na boumeli ya bikeke misato oyo bilandaki kobotama ya Klisto. Ya solo, balobeli Tata, Mwana, mpe Elimo na bisakweli to elimo mosantu, kasi balobeli te lokola nde bakokani, lokola nde bazali lolenge moko, lokola nde bazali Misato kati na Moko, lokola yango endimami lelo epai na bateyi ya Bosato. Liteya ya Bosato, lokola oyo elimbolamaki na bakonzi ya lingomba, ekeseneki mpenza na oyo ya lelo. Oyo tozali koloba ekoki komonisama ata elembeteli mosusu na lisoló ya makanisi na bato.”
“Soki tosɛngi na moto ete atanga bobele mokomi moko ayebani oyo, na boumeli ya bikeke misato ya liboso, andimaki Bosato na ndenge elimbolami lelo, akozala na mokakatano.”9
Atako bongo, likita ya Nicée libimisaki mbongwana monene. Epesaki nzela ete likanisi ya Mwana akokani na Tata, endimama na Leta, likambo oyo na nsima, libimisaki likanisi ya Bosato. Mokanda Second Century Orthodoxy, ya J. A. Buckley, emonisi ete:
“Kino na nsuka ya ekeke ya mibale, Lingomba ya mokili mobimba lizalaki na likanisi bobele moko ya moboko; bango nyonso bazalaki kondima ete Tata aleki monene. Bango nyonso bazalaki kotalela Nzambe Tata Mozwi-na-Nguya-Nyonso lokola oyo aleki likoló, akobongwanaka te, oyo aleki monene mpe azali na ebandeli te. . . .
“Na ntango bakomi mpe bakonzi ya lingomba ya ekeke ya mibale basilaki kokufa, Lingomba . . . libebisamaki mingi mpenza, kino . . . na likita ya Nicée, wana kondima ya ebandeli ezalaki mpenza kobeba mokemoke. Bato moke oyo bazalaki na lokumu, bandimisaki na makasi, mateya na bango oyo matalelamaki lokola lipɛngwi epai na bato mingi oyo bandimaki yango, mpe na lisungi ya bakonzi ya politike, bato wana bazalaki na masɛnginya, na bolengoli to kobangisa baoyo bazalaki komeka kobatela bopeto ya kondima na bango oyo ezalaki na litɔnɔ te.”10
Likita ya Constantinople
Na mobu 381 ya ntango na biso, Likita ya Constantinople lindimisaki Endimeli ya Nicée. Mpe ebakisaki makambo mosusu. Ebengaki elimo santu ete “Nkolo” mpe “oyo akopesaka bomoi.” Endimeli oyo ebongisamaki na mobu 381 ya ntango na biso (ezali mpenza yango nde esalelami lelo kati na mangomba mpe ebéngami “Endimeli ya Nicée”) emonisi ete boklisto ya lokutá ezalaki pene na kosala liteya Bosato oyo esili kobongisama. Nzokande, ata likita wana limonisaki liteya wana na mobimba na yango te. Mokanda New Catholic Encyclopedia endimi ete:
“Emonani ete, mbula 60 nsima na Nicée l, Likita ya Constantinople I [381 ya ntango na biso] liboyaki kosalela liloba homoousios na lolenge oyo bazalaki kolimbola bonzambe ya Elimo Santu.”11
“Bateolojié bazali kokamwa na Endimeli wana emonani lokola ete ezali malamu na lolenge yango elobelami; na ndakisa, lolenge oyo bazali kosalela liloba homoousios mpo na komonisa Elimo Santu, oyo ezali nzoto moko na Tata mpe na Mwana.”12
Bobele mokanda wana mayebisi ete: “Homoousios ezali kati na Makomami te.”13 Te, Biblia esaleli liloba wana te; elobeli mpe elimo santu te soko mpe Mwana te lokola ete bazali nzoto moko na Nzambe. Ezali liloba oyo liuti na Biblia te, oyo ememaki kino na liteya ya Bosato oyo euti na Biblia te, to mpo na koloba malamu, liteya oyo lizali kotɛmɛla Biblia.
Ata nsima na likita ya Constantinople, esengelaki bikeke mingi mpo ete liteya ya Bosato likoka kondimama kati na boklisto ya lokutá. Mokanda New Catholic Encyclopedia elobi ete: “Na Occident, . . . emonani lokola ete bato nyonso baboyaki kondima likita ya Constantinople I mpe Endimeli na yango.”14 Mokanda wana momonisi ete, liboso na ekeke ya nsambo mpe ya mwambe, Endimeli oyo esalemaki na likita wana, eyebanaki na bato mingi te epai na Occident.
Bato na mayele bandimi lisusu ete Elembo ya Athanase oyo etangami mbala mingi mpo na kolimbola mpe kokɔtela Bosato, ekomamaki na Athanase te, kasi na moto moko ayebani te oyo akomaki yango nsima mpenza. Mokanda The New Encyclopœdia Britannica molimboli ete:
“Liboso na ekeke ya zomi na mibale, lingomba ya Orient liyebaki endimeli wana te. Uta ekeke ya zomi na nsambo nde balimboli ya Biblia balobaki ete endimeli yango eutaki na Athanase te (ye oyo akufaki na mobu 373), kasi mbala mosusu ekomamaki mpenza na ekeke ya mitano na sudi ya France. . . . Emonani ete bopusi ya endimeli wana eyokisaki liboso nguya na yango na ekeke ya motoba mpe na ekeke ya nsambo, na sud ya France, mpe ekómaki na Espagne. Na ekeke ya libwa, lingomba ya Germanie likɔtisaki yango kati na losambo mpe nsima mwa moke, oyo ya Loma mpe esalaki bongo.”15
Ndenge nini ekólaki
Liteya ya Bosato likólaki mokemoke kino kopalangana nsima na bikeke mingi. Makanisi ya Bosato ya bafilozofe Bagreke lokola Platon, oyo azalaki na bomoi bikeke mingi liboso na Klisto, ekɔtaki mokemoke kati na mateya ya Lingomba. Mpo na yango, mokanda The Church of the First Three Centuries elobi ete:
“Tondimi ete liteya Bosato libimaki nsima mpenza, nde likólaki mokemoke; ete ebandeli na yango elobami te na Makomami ya Bayuda mpe na Makomami na boklisto; ekólaki, mpe ekɔtisamaki kati na boklisto na nzela na bakonzi ya lingomba ya Platon; ete na eleko ya Justin, mpe ntango mingi na nsima, eteyamaki na bato nyonso ete Mwana azali na nsé na Tata mpe nzoto moko na ye te, mpe ete Bosato ezalaki bobele na ebandeli na yango.”16
Liboso na Platon, Bosato, to trinité, ezalaki mingi mpenza na Babilone mpe na Ezipito. Mpe milende oyo bakonzi ya mangomba basalaki mpo nakobenda bato bazangi kondima kati na mokili ya Loma, eyaki kobebisa mokemoke mwa makanisi ya boklisto ya solo. Ezali motindo wana nde endimeli oyo ete Mwana mpe elimo santu bakokani na Tata, eyaki kondimama.a
Esengelaki lisusu ntango mingi mpo ete liloba “Bosato” likoka kondimama. Na nsuka na ekeke ya mibale, Théophile, episkopo wa Antiokia ya Sulia, oyo akomaki na Greke mpe akɔtisaki liloba tri·asʹ, oyo elimboli “Bosato,” to “Trinité.” Na nsima, Tertullien, mokomi na lokóta Latin, oyo azalaki kofanda na engumba Carthage, na Afrique du Nord, akɔtisaki liloba trinitas kati na mikanda na ye, oyo elimboli “Trinité.”b Kasi liloba tri·asʹ lizali te kati na Makomami na Greke na boklisto, oyo mapemamaki na Nzambe, mpe liloba trinitas lizali te kati na libongoli ya Biblia na Latin oyo ebéngami Vulgate. Maloba yango nyonso mazwami na Biblia te. Kasi liloba “Trinité,” liuti na makanisi ya bapakano, mpe likɔtaki na mateya ya bakonzi ya mangomba mpe, nsima na ekeke ya minei, ekómaki liteya ya Lingomba.
Na yango, tokoki koloba te ete balimboli na Biblia batalelaki yango na bozindo mpo na komona soki Bosato eteyamaki kati na yango. Kasi, ezali makanisi ya lingomba mpe oyo na Leta nde ebimisaki mpenza liteya wana. Kati na mokanda The Christian Tradition, mokomi Jaroslav Pelikan abendaki likebi likoló na “ntina ya kowelana oyo euti na makambo ya teoloji te, mpe oyo bato mingi bayebaki ntina na yango; kasi banguya ekokani ezalaki kotɛmɛlana. Liteya yango limonanaki mbala mingi lokola litɛmɛlami—to liuti—na makanisi ya lingomba mpe na matáta mauti na kozanga boyokani na bato.“17 E. Washburn Hopkins, molakisi na université ya Yale, akomaki na ntina yango, ete: “Ndimbola mpenza ya Trinité oyo epalangani, euti nde na makanisi ya Lingomba.”18
Bosato ezali liteya na mayele te soki tokokanisi yango na mateya ya pɛtɛɛ na Biblia oyo ete, Nzambe aleki likoló mpe akokani na moto moko te. Lokola Nzambe alobaki yango, ete “bokokokanisa ngai na nani? Bokozalisa ngai lolenge moko na nani? Bokomekanisa ngai na nani ete tozala motindo moko?”—Yisaya 46:5, MN.
Oyo yango emonisaki
Bokóli ya mokemoke ya Bosato, emonisaki likambo nini? Moko na lolenge ya kotika boklisto ya solo oyo Yesu asakolaki. (Matai 13:24-43) Ntomá Paulo asakolaki mpe lipɛngwi lisengelaki koya:
“Ntango ekoya oyo bakondima lisusu mateya na lobiko te, kasi, na kolanda bamposa na bango mpenza, bakomipesa na ebele na mateya mpo na kominyomitisa matoi; mpe bakolongola matoi na bango longwa na solo, mpe bakolanda masapo.”—2 Timoté 4:3, 4, MN.
Liteya Bosato lizali kati na masapo yango. Kasi kati na masapo mingi mauti na boklisto ya solo te, oyo makólaki mpe mokemoke, totangi molimo ekufaka te, epongelo, limbe mpe minyoko na mɔ́tɔ na seko.
Bongo, liteya ya Bosato ezali nini? Ezali liteya ya bopakano oyo libongisami mpo ete ekóma liteya na boklisto. Libimisamaki na Satana mpo na kokosa bato, mpo ete bazala na mobulungano mpe bazanga bososoli na ntina na Nzambe. Na yango, bazali pene na kondima mateya mosusu ya lokutá ya mangomba mpe makambo mosusu mabe.
“Na mbuma na bango”
Na Matai 7:15-19 (MN) Yesu alobaki tokoki kokesenisa lingomba ya lokutá na oyo ya solo, na nzela oyo:
“Bokɛba na basakoli na lokuta baoyo bakoyela bino na bilamba ya mpate, nde bazali na mitema ya nkoi. Bokoyeba bango na mbuma na bango. Bakozwaka nde mbuma na vinyo epai na nzubɛ, soko nde mbuma na misuke epai na matiti mabe? Bobele bongo, nzete malamu ekobotaka mbuma malamu, nde nzete mabe ekobotaka mbuma mabe. . . . Nzeté nyonso ekobota mbuma te, ekokatama mpe ekobwakama na mɔ́tɔ.”
Tozwa ndakisa moko. Yesu alobaki na Yoane 13:35 (MN), ete: “Soki bozali na bolingo kati na bino, bato nyonso bakoyeba ete bino bozali bayekoli na ngai.” Lisusu, na Yoane 4:20 mpe 21 (MN), Liloba lipemami na Nzambe liyebisi ete:
“Soko moto akoloba ete: ‘Nalingi Nzambe,’ nde akoyina ndeko na ye, moto yango azali mobuki na lokutá. Na yango, soko moto akolingaka ndeko na ye te, oyo ye asili komona, akolinga Nzambe te, oyo ye amoni naino te. Nde tozwi etinda oyo epai na ye ete: ye oyo alingi Nzambe, akolinga mpe ndeko na ye.”
Tokokanisa etinda ya moboko oyo ete, baklisto ya solo basengeli kozala na bolingo kati na bango, na makambo malekaki na boumeli ya bitumba mingi ya mokili na ekeke oyo ya ntuku mibale mpe na matata mosusu mabimaki. Bato ya lingomba moko na boklisto ya lokutá babundaki etumba mpe babomanaki mpo na bolingo ya bikoló na bango. Ngambo moko na moko ezalaki komiloba ete bazalaki baklisto mpe basungamaki na bakonzi na bango ya mangomba, oyo bazalaki koloba ete Nzambe azalaki kosalisa bango. Likambo oyo ete “baklisto” babomami na “baklisto” mosusu ezali mbuma epɔli. Ezali nde kobebisa bolingo na boklisto, botyoli na mibeko na Nzambe.—Tala lisusu 1 Yoane 3:10-12.
Mokolo oyo etumbu ekopesama
Na yango, kotika boklisto ya solo ekɔtisaki te bobele bindimeli na mbindo, lokola liteya ya Bosato, kasi ememaki lisusu na kosala misala na mbindo. Nzokande, etumbu esengeli kopesama mokolo mosusu, mpamba te, Yesu alobaki ete: “Nzeté nyonso ekobota mbuma te, ekokatama mpe ekobwakama na mɔ́tɔ.” Tala ntina oyo Liloba na Nzambe lipesi toli oyo ete:
“Bino bato na ngai, bobima na ye [lingomba ya lokutá] ete bosangana na masumu na ye te, ete bozwa moko na malózi na ye mpe te. Mpo ete mopiko na masumu na ye ekomi kino na likoló, mpe Nzambe asili kokanisa misala mabe na ye.”—Emoniseli 18:4, 5.
Mosika te, Nzambe ‘akotya kati na mitema’ ya bakonzi ya politike, likanisi ya kobalukela lingomba ya lokutá. “Bakobebisa ye, mpe . . . bakolya misuni na ye mpe bakotumba ye na mɔ́tɔ.” (Emoniseli 17:16, 17) Lingomba ya lokutá, mpe filozofi na yango euti na bapakano na ntina na Nzambe, bakobomama libela. Ee, Nzambe akoloba na basambeli na lingomba ya lokutá, maloba oyo Yesu alobaka na bango na eleko na ye, ete: “Ndako na bino esundolami,”—Matai 23:38, MN.
Lingomba ya solo likobika na bitumbu ya Nzambe, na motindo boye ete, na nsima, lokumu nyonso mpe nkembo nyonso ekopesama na ye oyo Yesu abéngaki “Nzambe bobele moko ya solo.” Azali ye oyo mokomi na Nzembo alobelaki na ntango alobaki ete: “Bobele yo oyo azali na nkombo Jéhovah, Oyo-Aleki-Likoló na mabelé mobimba.”—Yoane 17:3; Nzembo 83:18, MN.
Mikanda:
1. Encyclopœdia Britannica, 1971, Volume 6, lokasa 386.
2. A Short History of Christian Doctrine, na Bernhard Lohse, 1963, lokasa 51.
3. Ibid., nkasa 52-3.
4. New Catholic Encyclopedia, 1967, Volume VII, lokasa 115.
5. A Short History of Christianity, na Martin E. Marty, 1959, lokasa 91.
6. A Select Library of Nicene and Post-Nicene Fathers of the Christian Church, na Philip Schaff mpe Henry Wace, 1892, Volume IV, lokasa xvii.
7. A Short History of Christian Doctrine, lokasa 53.
8. Ibid., lokasa 91.
9. The Church of the First Three Centuries, na Alvan Lamson, 1869, nkasa 75-6, 341.
10. Second Century Orthodoxy, na J. A. Buckley, 1978, nkasa 114-15.
11. New Catholic Encyclopedia, 1967, Volume VII, lokasa 115.
12. Ibid., Volume IV, lokasa 436.
13. Ibid., lokasa 251.
14. Ibid., lokasa 436.
15. The New Encyclopœdia Britannica, 1985, ebimeli ya 15, Micropœdia, Volume 1, lokasa 665.
16. The Church of the First Three Centuries, lokasa 52.
17. The Christian Tradition, na Jaroslav Pelikan, 1971, lokasa 173.
18. Origin and Evolution of Religion, na E. Washburn Hopkins, 1923, lokasa 339.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mpo na kozwa makanisi mingi mosusu, tala brochure Osengeli kondima Trinité? oyo ebimisami na la Société Watchtower.
b Lokola emonisamaki kati na masoló ya liboso na molongó ya masoló oyo, atako Théophile mpe Tertullien basalelaki maloba wana, bamonisaki te Bosato oyo boteyami lelo na boklisto ya lokutá.
[Elilingi na lokasa 22]
Nzambe akosala ete bakonzi ya politike babalukela mangomba ya lokutá
[Elilingi na lokasa 24]
Lingomba ya solo likobika na bitumbu ya Nzambe