Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g 3/14 nk. 14-15
  • Ntango libala na yo ekómeli yo bololo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ntango libala na yo ekómeli yo bololo
  • Lamuká!—2014
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • MOKAKATANO
  • Ndenge ya kolimbisa
    Lamuká!—2013
  • “Libala ekumisama”
    “Bótikala na kati ya bolingo ya Nzambe”
  • Bokoki kobikisa libala na bino!
    Lamuká!—2001
  • Ntango bozali na makanisi ekeseni
    Lisalisi mpo na libota
Makambo mosusu
Lamuká!—2014
g 3/14 nk. 14-15
Mwasi oyo azali komona ete libala na ye elɛmbisi ye nzoto

LISALISI MPO NA LIBOTA | LIBALA

Ntango libala na yo ekómeli yo bololo

MOKAKATANO

Mwasi ná mobali oyo makolo na bango ekangami na shɛni moko

Emonanaki ete liboso bóbalana, yo ná molongani na yo bokokanaki na makambo mingi. Sikoyo, makambo oyo elɛmbisi yo nzoto ebebisi boyokani na bino; na esika osepela na libala yango, okómi komiyoka nde lokola ozali na bolɔkɔ.

Okoki kobongisa boyokani yango. Kasi liboso, luká naino koyeba nini esali ete olɛmba nzoto.

NINI ESALAKA BONGO?

Makambo oyo okómi kokutana na yango. Mosala oyo osalaka mokolo na mokolo, kobɔkɔla bana, mpe kozanga koyokana na babokilo ekoki mokemoke kosilisa esengo ya libala. Longola yango, makambo oyo ekanami te; na ndakisa mikakatano ya mbongo to kokipe ndeko moko ya libota oyo azali na maladi oyo esilaka te, ekoki kokɔtisa mobulu na libala.

Ozali kokoka kokanga motema te na makambo oyo ekesenisi bino. Ntango mwasi ná mobali balakani libala, bakipaka te kolandela makambo oyo ekesenisi bango. Kasi ntango babalani, bayaka komona ete bakeseni mpenza na ndenge ya kosolola, kosalela mbongo mpe na ndenge ya kobongisa makambo. Makambo oyo ezalaki liboso kosilikisa yo mpenza te, ozali kokoka lisusu kokangela yango motema te.

Moto na moto azali kokipe te ndenge moninga azali komiyoka. Ntango mikolo ezali koleka, kokatelana mangala to kosalelana makambo na boboto te mpe kozanga kobongisa matata ekoki kosala ete moto na moto aboya koyebisaka moninga makambo oyo ezali na motema; to oyo eleki mabe, akóma seresere na moto mosusu oyo azali molongani na ye te.

Ozalaki na makanisi oyo ebongi te. Bato mosusu babalaka mpo bakanisaka ete bakutani na moto oyo abongi mpenza na bango. Atako likanisi yango ekoki komonana malamu, ekoki kozala lokola libulu oyo ozali kotimola, oyo bakokunda yo na yango. Ntango kaka matata ebimi, moto oyo omonaki ete azali mpenza “sapato ya lokolo na yo” akómi kolɛmbisa yo nzoto, mokomoko na bino akómi komona ete amikosaki.

OKOKI KOSALA BOYE

Talelá nde bizaleli malamu ya molongani na yo. Meká kosala boye: Komá bizaleli misato ya malamu oyo molongani na yo azalaka na yango. Batelá liste yango, mbala mosusu tyá yango na nsima ya mwa fɔtɔ ya libala na bino to na telefone. Taláká liste yango mbala na mbala mpo obosanaka te ntina oyo obalaki ye. Kotya miso na bizaleli malamu ya molongani na yo ekoki kosala ete bózala na kimya mpe ekosalisa yo olandelaka te makambo oyo ekesenisi bino.​—Toli ya Biblia: Baroma 14:19.

Bóbongisa ntango ya kolekisaka elongo. Na ntembe te, liboso bóbalana, bozalaki kobomba ntango ya kosala makambo elongo. Kotambola elongo ezalaki likambo ya sika mpe ezalaki kosepelisa bino, mpe bomesanaki kobongisa makambo elongo. Mpo na nini te kosala makambo ya ndenge wana sikoyo? Luká mabaku oyo yo ná molongani na yo bokoki kolekisa ntango elongo, ndenge bozalaki kosala ntango bozalaki naino bafianse. Kosala bongo ekoki kosala ete boyokani na bino ekóma makasi mpe ekoki kosalisa bino bólonga mikakatano mosusu ya bomoi oyo eyaka na mbalakaka.​—Toli ya Biblia: Masese 5:18.

Yebisaká molongani na yo ndenge ozali komiyoka. Soki maloba to likambo oyo molongani na yo asalaki epesaki yo mpasi, mpo na nini te kobosana yango? Soki okokoka te, kosala makambo lokola mwana moke te; na ndakisa koboya kolobisa moninga. Soki likoki ezali, kaka mokolo yango, sololá likambo yango na molongani na yo na kimya nyonso.​—Toli ya Biblia: Baefese 4:26.

Soki maloba to likambo oyo molongani na yo asalaki epesaki yo mpasi, mpo na nini te kobosana yango?

Luká koyeba nini etindi ye aloba boye to boye mpe mpo na nini esali yo mpasi. Na ntembe te, ezala yo to ye bozalaki te na mposa ya koyokisana mpasi na motema. Monisá molongani na yo na motema moko ete osɛngi bolimbisi mpo na likambo nyonso oyo osalaki, oyo esalaki ye mpasi. Na nsima, bólobela ndenge oyo bokoki kosala mpo mokomoko na bino, na kozanga koyeba, azokisa lisusu te moninga na motema. Bólanda toli oyo ya Biblia: “Bózala na boboto na kati na bino, bóyokelanaka mpenza mawa, bólimbisanaka na motema moko.”​—Baefese 4:32.

Yebá ete makambo nyonso ekozala kaka malamu te. Biblia elobi ete baoyo bazali kobala “bakozwa bolɔzi.” (1 Bakorinti 7:28) Soki ozali kokutana na bolɔzi ya ndenge wana, kowela koloba nokinoki te ete osalaki libunga ndenge obalaki. Kutu, bópesana mabɔkɔ ná molongani na yo mpo na kobongisa matata mpe “bókoba kokanga motema moto na moto na makambo ya mosusu mpe kolimbisana na motema moko.”​—Bakolose 3:13.

BAVƐRSƐ YA NTINA MINGI

  • “Tólanda makambo oyo etyaka kimya.”​—Baroma 14:19.

  • “Sepelá na mwasi ya bolenge na yo.”​—Masese 5:18.

  • “Moi elala te bino bozali kaka na nkanda.”​—Baefese 4:26.

TOSÁ ELAKO YA LIBALA NA YO

Ozali koyeba lisusu maloba oyo olobáká na mokolo ya libala na bino? Mpo na nini te kozongela yango lisusu mpe komituna boye: ‘Makambo oyo nazali kosalela molongani na ngai, eyokani mpenza na elako oyo nasalaki?’ Kokwea te na motambo ya kotala soki molongani na yo azali kotosa mpenza elako oyo asalaki. Elako na yo ezali na maloba oyo olobaki ete okosalela molongani na yo. Soki mokomoko na bino azali kosala makasi ete atosa elako oyo asalaki, bokosepela na mbuma oyo yango ekobimisa.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto