Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g 5/14 lok. 3
  • Makambo oyo ezali koleka na mokili

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Makambo oyo ezali koleka na mokili
  • Lamuká!—2014
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Azia ya Sudi-Ɛsti
  • Mpoto
  • Nouvelle-Zélande
  • Alaska
  • Mokili
  • Makambo oyo ezali koleka na mokili
    Lamuká!—2013
  • Kosalela bana na makambo ya kosangisa nzoto—Likambo oyo ezali komonana na mokili mobimba
    Lamuká!—1997
  • Esika ebale moko ezongaka nsima
    Lamuká!—2009
  • Makambo oyo ezali koleka na mokili
    Lamuká!—2014
Lamuká!—2014
g 5/14 lok. 3

MAKAMBO OYO EZALI KOLEKA NA MOKILI

Azia ya Sudi-Ɛsti

Nyoka oyo elingami na nzete

Ebongiseli moko (Fonds mondial pour la nature) elobi ete kobanda 1977 tii 2011, bamonaki na bassin du Mékong, etúká oyo esangisi bikólo oyo: Cambodge, Laos, Myanmar, Thaïlande, Vietnam, mpe etúká ya Yunnan na Chine lolenge mingi ya sika ya banzete mpe banyama, ata mpe nyoka oyo babengi (Trimeresurus rubeus), oyo miso na yango ezali lokola mabanga ya rubi. Na bikelamu oyo bamonaki na 2011, banzete ezalaki 82, banyama 21 oyo ebendanaka na libumu, bambisi 13, magorodo 5 mpe banyama 5 oyo emɛlisaka bana mabɛlɛ.

Mpoto

Lapolo ya zulunalo The Moscow Times elobi ete kotɛka bato ekómi mpenza mokakatano mpo na bikólo ya “Union européenne.” Bakómi kotɛka bato mpo na kosangisa na bango nzoto na makasi, kosalisa bango misala na makasi, ata mpe “kotɛka binama ya nzoto ya bato na ndenge oyo eyokani na mibeko te.” Bato oyo basalaka mimbongo yango bakendaka na bisika oyo bobola ezali, misala ezali te to na bisika oyo bazwaka basi ná mibali na valɛrɛ ndenge moko te.

Nouvelle-Zélande

Elenge moko oyo azali kotala TV

Bato ya mayele oyo basalaki baankɛtɛ epai ya bana mpe bilenge oyo batalaka televizyo bamoni ete kotala televizyo koleka ndelo esalaka ete moto akóma na “bizaleli mingi ya mabe ntango abandi kokóma mokóló.” Makambo oyo bato yango bamoni eyokani na toli oyo ete bana basengeli kotalaka baemisyo ya malamu, kasi basengeli “te kolekisa ngonga moko to mibale liboso ya televizyo na mokolo.”

Alaska

Ndenge oyo mboka Alaska ezali komonana mosika na aviɔ

Bamboka mingi ya Alaska ezalaka na libongo to pene ya bibale, mpe bamboka yango mingi (86%) ezindaka na mai mpe mabele na yango ebukanaka. Balapolo emonisi ete kobakisama ya molunge nde ezali kosala ete baglasi oyo ebatelaka mabongo na bango esalema noki te, mpe yango ezali kosala ete mipɛpɛ makasi ya ɔtɔne ebebisa bamboka yango.

Mokili

Bitutelo oyo etambwisamaka na mopɛpɛ

Atako bato bazali kobimisa mbongo mingi mpo na kosalela baaparɛyi oyo ebendaka nguya ya mopɛpɛ mpe ya moi, Maria van der Hoeven, mokambi moko ya Agence Internationale de L’Énergie alobi boye: “Nguya oyo bazali kobimisa lelo na baaparɛyi yango ebongisi makambo te mpo mopɛpɛ ezali kaka ya kobeba ndenge ezalaki bambula 20 liboso.”

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto