Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g 9/14 lok. 3
  • Makambo oyo ezali koleka na mokili

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Makambo oyo ezali koleka na mokili
  • Lamuká!—2014
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Mokili
  • Angleterre
  • Chine
  • Mpoto
  • Ndenge nini Nzambe atalelaka mobulu?
    Lamuká!—2003
  • Mobulu ekosila mokolo mosusu?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2016
  • Mbongwana ya ezalela ya basi na mikolo na basi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
  • Makambo etali mangomba
    Lamuká!—2015
Makambo mosusu
Lamuká!—2014
g 9/14 lok. 3

MAKAMBO OYO EZALI KOLEKA NA MOKILI

Mokili

Mwasi oyo mobali na ye moko azali kobɛta mpe konyokola ye

Ebongiseli ya ONU oyo etalelaka bokolɔngɔnɔ ya nzoto (OMS) emonisi ete “na mokili mobimba, likambo ya kobɛta mpe konyokola basi ekómi makasi koleka ndenge ezalaki liboso.” Ebongiseli yango elobi ete basi mingi (35%) bakoki kokutana na yango epai ya mibali na bango to bato mosusu. Kasi “mingi na bango (30%) na mokili mobimba bazali kokutana na yango nde epai ya mibali na bango moko.”

Angleterre

Eglize

Na ankɛtɛ moko oyo esalemaki epai ya bato 64 303, mingi na bango (79%) balobaki ete “soki bampasi mpe koyinana etondi lelo na mokili ezali nde mpo na Mangomba.” Lisusu, ankɛtɛ oyo esalemaki na Angleterre mpe na Pays de Galles mpo na koyeba motángo ya bato oyo bafandaka kuna emonisaki ete na 2001 bato mingi (72%) bazalaki komibenga bakristo, nzokande na 2011 motángo yango ekitaki na (59%). Kaka na eleko yango motángo ya bato oyo balobaka ete basambelaka te oyo ezalaki (15%) emataki tii na (25%).

Chine

Baboti oyo bakomi mibange na ekoló Chine

Na kotalela lapolo moko ya bapanzi-nsango, mibeko oyo bauti kobimisa kala mingi te na Chine esɛngi bana oyo bakómi mikóló básukaka kaka te na kokende kotala mbala na mbala baboti na bango oyo bakómi mibange kasi “bámoniselaka bango mpe bolingo.” Mibeko yango “elobeli te etumbu oyo bakopesa” bana oyo bakotosa yango te.

Mpoto

Biloko ya monyato

Bato ya mobulu bazali kobimisa biloko lokola savon ya kosukola ndako to nzoto, mafuta ya kopakola ata mpe bilei ya monyato. Prezida ya kompanyi moko oyo epesaka toli na makambo ya kobatela bilei alobaki boye: “Bakómi kobimisa biloko ya monyato ata na biloko oyo ekoki kopesa benefisi mingi te.” Moto moko ya mayele alobi ete biloko mosusu ya kolya (10%) oyo bikólo ya bozwi esombaka ezalaka ya monyato.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto