Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g 9/14 nk. 4-7
  • Okosala nini ntango osili makasi?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Okosala nini ntango osili makasi?
  • Lamuká!—2014
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • 1. YEBÁ MAKAMBO YA KOTYA NA ESIKA YA LIBOSO.
  • 2. KÓMISÁ BOMOI NA YO PƐPƐLƐ.
  • 3. YEBÁ NTANGO YA KOPEMISA NZOTO.
  • 4. SALÁ ETE NZOTO EZONGELA MAKASI.
  • Nasala nini mpo makasi nyonso esila ngai te?
    Mituna oyo bilenge batunaka
  • Ndenge ya kobanda lisolo
    Mosala na biso ya Bokonzi—2014
  • Osalaka mosala koleka ndelo?
    Lamuká!—2017
  • 2 Batelá mbongo mpe biloko na yo ya kobikela
    Lamuká!—2022
Makambo mosusu
Lamuká!—2014
g 9/14 nk. 4-7

ELOBELI TITRE YA EZIPELI

Okosala nini ntango osili makasi?

Anil, oyo alongaki kolɛmba makasi oyo azalaki na yango na esika ya mosala

ANIL asilaki makasi nyonso. Azwaki mosala ya sika mpo ezalaki ya lokumu mpe ya mbongo mingi. Kasi, akómaki kosala tii na butu makasi, ezala na bawikende; na bantango mosusu azalaki kosala bangonga koleka 80 na pɔsɔ. Alobi boye: “Makambo oyo ezalaki koleka na esika ya mosala ezalaki mabe mpenza, mpe misala nyonso ezalaki na motó na ngai. Namilobelaki boye: ‘Likambo nini namilukeli? Soki nakobi kaka boye, nakokufa.’” Makasi ya Anil ekómaki kosila nokinoki.

Makasi oyo esilaka moto na esika ya mosala ezali kaka kolɛmba nzoto te, eleki kutu mitungisi oyo moto nyonso azalaka na yango na mosala na ye ya mokolo na mokolo. Emonanaka na kolɛmba makasi oyo esilaka te, komitungisa mingi mpe komona ete ozali lisusu kokoka mosala te. Baoyo bakómaka bongo, makanisi na bango ezalaka lisusu na mosala te, mposa ya kosala esilaka bango mpe basalaka lisusu mosala malamu te. Baankɛtɛ emonisi mpe ete kosila makasi ndenge wana ebimiselaka moto bamaladi ndenge na ndenge.

Makambo nini esilisaka moto makasi? Mbala mingi ezalaka mpo na mosala oyo eleki ndelo. Mpo na mikakatano ya nkita, bapatrɔ mosusu basɛngaka basali na bango básalaka bangonga mingi, kasi ntango mosusu ezalaka mpo na mbongo moke. Baaparɛyi ya mikolo oyo ezali kosala ete bato mosusu básalaka ntango nyonso; ekómi mpasi báyeba kokesenisa ntango ya mosala ná ya makambo mosusu. Bato mosusu basilaka makasi mpo bamonaka ete kozwa mosala ekómá mpasi, bamosusu bayebaka te bábanda na mosala nini mpe básuka na oyo wapi, to mpe bamonaka ete bazali kosalela bango makambo na bosembo te. Longola yango, kozanga koyeba mosala nini kotya na esika ya liboso mpe kozanga koyokana na baninga ya mosala esilisaka mpe moto makasi.

Moto ye moko akoki kosala ete makasi nyonso esila ye. Mpo na koluka kokóma moto monene mpe kozwa mbongo mingi, bato mosusu balukaka kosala misala ebele. Bato ya ndenge wana bakómaka na misala koleka ndelo mpe yango esalaka ete makasi ekóma kosila bango.

Soki mosala oyo osalaka esilisaka yo makasi, okoki kosala nini? Toboyi te, ekoki kozala mpasi kobongola makambo soki omoni ete makambo oyo okanaki te ekangi yo na motambo. Ata bongo, talá makambo minei oyo ekoki kosalisa yo obima na motambo yango. Okomona makambo mingi ya kosala koleka ndenge ozali kokanisa.

1. YEBÁ MAKAMBO YA KOTYA NA ESIKA YA LIBOSO.

Libota ya esengo

Nini ezali na ntina mingi mpo na yo? Na ntembe te, bato mingi batyaka boyokani ya libota mpe kozala na sante ya malamu na esika ya liboso na liste na bango. Yango nde makambo oyo ezalaka mpasi kokokisa soki moto asili makasi.

Koyeba makambo ya kotya na esika ya liboso ekosalisa yo omibongisa mpo na kozwa bikateli oyo ezalaka mpasi kozwa mpe koboya kotingama na likambo moko boye. Na ndakisa, okoki komona ete mosala na yo ezali kosilisa yo makasi. Kasi okoki kokanisa boye: ‘Nakokoka kotika mosala oyo te to kotika kosala mingi; nazali na mposa ya mbongo!’ Toboyi te, moto nyonso azalaka na mposa ya mbongo, kasi okondima kobungisa makambo oyo ozwaka na valɛrɛ mingi kaka mpo na mbongo?

Kebá ete bato mosusu bátya yo mbamba olanda makambo oyo bango batyaka na esika ya liboso. Na ntembe te, makambo oyo patrɔ na yo atyaka na esika ya liboso ná oyo ya yo ekeseni. Bato mosusu bakoki kopona kotya mosala na esika ya liboso na bomoi na bango, kasi yango elingi koloba te ete yo mpe osengeli kosala bongo.

TOLI YA BIBLIA: “ATA SOKI MOTO AZALI NA BILOKO MINGI, BILOKO NA YE EKOPESA YE BOMOI TE.”​—LUKA 12:15

2. KÓMISÁ BOMOI NA YO PƐPƐLƐ.

Mwa bilei

Mpo omitungisaka mingi te mpe ozwaka ntango mpo na makambo oyo ozwaka mpenza na valɛrɛ, okoki kotika kosala bangonga mingi, okoki kosɛnga patrɔ na yo apesa yo misala mingi te to okoki kotala soki esengeli ozwa mosala mosusu. Ata soki okani kosala nini, na ntembe te, ekosɛnga otalela mwa moke lolenge na yo ya kosalela mbongo mpe kobongola makambo mosusu na bomoi na yo. Kosala bongo ezali mpasi te ndenge okoki kokanisa.

Na bamboka mingi, bakompanyi oyo etɛkaka mpe esombaka biloko emonisaka ete mpo moto azala na esengo, esɛngi azala na mbongo mpe biloko mingi. Kasi, ezalaka mpenza bongo te. Bomoi oyo ezangi mindɔndɔ ekoki kopesa moto bonsomi mingi mpe esengo. Mpo bomoi na yo ekóma ndenge wana, kosombaka bisombasomba te mpe bombaká mbongo. Kokɔtaka banyongo mingi te to futáká banyongo. Mpo na kosala mbongwana wana, sololá na bato ya libota na yo mpe luká lisalisi na bango.

TOLI YA BIBLIA: “SOKI TOZALI NA BILEI MPE NA ELOKO YA KOZIPA NZOTO, TÓSEPELA NA BILOKO YANGO.”​—1 TIMOTE 6:8

3. YEBÁ NTANGO YA KOPEMISA NZOTO.

Soki ozali na programɛ ya mosala oyo eleki ndelo to makambo mosusu ezali kosila te epai osalaka, sololá na patrɔ na yo. Soki mwaye ezali, monisá ye solisyo oyo ekosepelisa yo mpe ye. Monisá ye mpenza ete olingi mosala wana mpe yebisá ye oyo okolinga kosala; kasi zalá polele mpe kondima te oyo okokoka kosala te.

Mobali moko oyo azali kotala ngonga na montre na ye

Salelá bososoli mpe yebá ete makambo ekoleka te kaka ndenge okanisi. Soki olingi kosala mingi te, patrɔ na yo akoki kokitisa salɛrɛ na yo. Tyá na makanisi ete okoki kobungisa mosala mpe yebá oyo okosala na nsima. Kobosana te ete ntango ozali naino na mosala, ozali na libaku mingi ya kozwa mosala mosusu.

Ata soki boyokani na patrɔ na yo mpe bosali programɛ ya malamu ya mosala, akoki lisusu kotya yo mpanzi likoló mpo osala mosala mingi. Nini ekoki kosalisa yo okangama na ekateli na yo? Kokisáká makambo boyokanaki. Kosala bongo ekoki kopesa yo makasi ya kosɛnga patrɔ na yo akokisa mpe maloba na ye, ata mpe alekisa ndelo te na programɛ ya mosala oyo boyokanaki.

TOLI YA BIBLIA: “TIKÁ LILOBA NA BINO ƐƐ EZALA ƐƐ, TE NA BINO, TE.”​—MATAI 5:37

4. SALÁ ETE NZOTO EZONGELA MAKASI.

Ata soki mosala na yo ezali na mikakatano makasi mpenza te, mwa mitungisi ekozanga te, okoki kosala na bato ya mitó mpasi mpe kokutana na makambo mosusu oyo ekosepelisa yo te. Na yango, zwáká ntango ya kopema malamu mpe kozwa mwa mopɛpɛ na ndenge oyo ebongi. Yebá ete mpo yo ná libota na yo bózwa mwa mopɛpɛ mpe bósepela, esɛngi kaka te bóbimisa mbongo ebele.

Mwasi moko oyo azali kotánga ntango azali kozwa mwa mopɛpɛ

Salá boninga ná bato mosusu oyo bosalaka na bango te mpe tyeláká bango likebi mpe boyá kolobela mingi yo moko mpe misala oyo osalaka. Mpo na nini? Buku Okopesa mbongo to okondima kokufa? elobi boye: “Ndenge ozali ezali na ntina mingi koleka oyo osalaka mpo na mbongo.” Soki oyebani libosoliboso mpo na mosala na yo to mpo na valɛrɛ oyo yango epesaka yo, boye, ekozala mpasi omona oyo mosala yango ezali kosala na bomoi na yo.

TOLI YA BIBLIA: “MWA KOPEMA MOKE ELEKI EBELE YA MOSALA MAKASI MPE KOLANDA MOPƐPƐ.”​—MOSAKOLI 4:6

Okoki kobongola makambo mosusu mpo olonga likambo yango? Ɛɛ. Anil, oyo tolobelaki na ebandeli ya lisolo oyo asalaki bongo. Alobi boye: “Nasololaki na patrɔ na ngai ya kala mpe nasɛngaki ye soki akondima kozongisa ngai na mosala, mpe andimaki. Nazalaki kobanga kokutana na baninga na ngai ya kala mpo nayebisaki bango ete nakei na mosala oyo ekofuta ngai mbongo mingi. Atako salɛrɛ na ngai ekitaki makasi, nazwaki kimya na makanisi mpe nazwaki ntango mingi ya kolekisa ná bato ya libota na ngai mpe ya kosala makambo mosusu oyo nazwaka mpenza na valɛrɛ.”

MILENDE MPO NA KOZONGISA MAKASI NA NZOTO

Wayne ná Marie, mwasi ná mobali oyo bafandaka na États-Unis, bazali na mbula soki 30.

Nini etindaki bino bóluka kolonga likambo yango?

Wayne: Tozalaki kosala mimbongo ebele mpe banyongo elekelaki biso motó. Nazalaki na mposa ya kokolisa mombongo na biso tii ntango ekokóma monene mpenza mpe kozwa mbongo mingi ata soki nasali mosala mingi te. Mposa na ngai ezalaki ya kokitisa mitungisi, kasi nabakisaki nde yango.

Yango esalaki bino nini?

Wayne: Tomonaki ete makambo oyo tozalaki kosala mosala makasi mpo na yango​—kozala na bilamba ya kitoko, ndako ya monene, mpe kobimisa mbongo mingi mpo na kokende bakonje epesaki biso esengo te. Nalɛmbaki mingi na makanisi mpe nazalaki lisusu na mposa ya kosala eloko moko te.

Marie: Sante etungisaki ngai mingi, mikakatano ekɔtaki na libala na biso mpe tozalaki koyokana lisusu malamu te.

Ndenge nini bokómisaki bomoi na bino pɛpɛlɛ?

Wayne: Totalelaki mikano mpe bomoi na biso malamumalamu. Totikaki kosala mimbongo mosusu. Natikaki biro ya kitoko oyo nazalaki na yango. Nasombaki motuka ya ntalo moke atako nazalaki na mposa ya motuka ya kitoko mpenza. Nafungolaki magazini moko oyo nalingaki ete ezala monene mingi te. Totikaki kosomba bisombasomba.

Marie: Ezalaki pɛtɛɛ te kokómisa bomoi na biso pɛpɛlɛ ndenge nakanisaki. Totikaki kokende kolya ntango nyonso na restora mpe tokómaki kolya na ndako. Tokómaki kokende kotambwisa makolo mpe sante ekómaki malamu. Nsukansuka, tokómaki kosala kaka ndambo ya mokolo mpe kosala mosala mosusu oyo ezangi lifuti.

Yango ebimisaki matomba nini?

Marie: Totikaki koluka kokóma na mbongo mingi. Tokómaki kotya makanisi na biso na makambo oyo eleki ntina mpe tokómaki koyokana malamu.

Wayne: Tokómaki na bomoi ya pɛpɛlɛ mpe ya esengo.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto