Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g 10/14 lok. 3
  • Mpo na yo kolonga na bomoi esɛngaka nini?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mpo na yo kolonga na bomoi esɛngaka nini?
  • Lamuká!—2014
  • Masolo mosusu
  • Mitungisi mpo na libota
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
  • Yehova ayokaka kolela ya moto oyo atutami
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
  • Ndenge tozwaka nguya ya kolonga mikakatano nyonso
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • “Sikoyo nakómi kolinga mosala ya kosakola!”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2021
Makambo mosusu
Lamuká!—2014
g 10/14 lok. 3

ELOBELI TITRE YA EZIPELI | KOLONGA YA SOLOSOLO ELIMBOLI NINI?

Mpo na yo kolonga na bomoi esɛngaka nini?

Liboso opesa eyano, kanisá na bandakisa oyo elandi.

Na bato oyo, nani mpo na yo alongi mpenza?

  • Alex

    ALEX

    Alex azali na mombongo oyo asalaka. Azali sembo, asalaka mosala makasi mpe azali na limemya. Mombongo na ye ezali kokola mpe yango esali ete ye ná libota na ye bákelela na eloko te.

  • Charles

    CHARLES

    Charles mpe azali na mombongo ya ndenge wana mpe ekɔtiselaka ye mbongo mingi koleka oyo ya Alex. Mpo aleka baninga, Charles akómá moombo ya mosala mpe akómá kobɛla maladi ndenge na ndenge.

  • Jeannette

    JEANNETTE

    Jeannette azali na kelasi ya ntei, amipesaka mpenza na kelasi mpe alingá koyekola. Yango wana azwaka bapwɛ ya malamu na kelasi.

  • Hélène

    HÉLÈNE

    Hélène azwaka kutu bapwɛ koleka Jeannette mpe azali mwana-kelasi oyo bakumisaka ye mingi; kasi ayibaka na baekzamɛ mpe asepelaka kotánga kelasi mpenza te.

Soki olobi ete Charles ná Hélène to bango nyonso minei balongi, boye otalelaka kolonga kaka na matomba oyo moto azwaka ata soki asali nini mpo na kozwa yango.

Na ngámbo mosusu, soki oponi kaka Alex ná Jeannette, boye otalelaka kolonga na bizaleli ya moto mpe na mosala malamu oyo asali. Ezali malamu kotalela makambo ndenge wana. Talá bandakisa oyo elandi:

  • Nini eleki malamu mpo na bomoi mobimba ya Jeannette​—kozwa bapwɛ ebele to kokolisa mposa ya koyekola?

  • Nini eleki malamu mpo na bana ya Alex​—bázala na eloko nyonso oyo mbongo esombaka to bázala na tata oyo alingaka kolekisa ntango mingi elongo na bango?

Na mokuse: Kolonga ya lokuta etalelamaka kaka na makambo oyo emonanaka na miso; kasi kolonga ya solosolo emonanaka nde na bizaleli ya malamu.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto