LISOLO YA BOMOI
“Sikoyo nakómi kolinga mosala ya kosakola!”
NAKOLÁ na engumba Balclutha, na sudi ya esanga ya Nouvelle-Zélande. Na bomwana, nalingaki Yehova mpe nabandaki kosepela kozala Motatoli na ye. Nazalaki kosepela mingi kokende makita mpe lisangá ezalaki esika ya libateli mpe ya esengo mpo na ngai. Atako nazalaki moto ya nsɔninsɔni, nazalaki kosakola pɔsɔ nyonso. Nazalaki kobanga te kosakwela baninga na ngai ya kelasi mpe bato mosusu. Nazalaki kosepela ndenge nazalaki Motatoli ya Yehova, mpe ntango nakómaki na mbula 11 namipesaki na Nzambe.
NABUNGISI ESENGO NA NGAI
Likambo ya mawa, ntango nakómaki na mbula soki 13, boyokani na ngai ná Yehova ekómaki kobeba. Ezalaki komonana ete baninga na ngai ya kelasi bazalaki na bonsomi mingi, ngai mpe nazalaki na mposa ya kozala na bonsomi yango. Nakómaki komona ete mibeko ya baboti na ngai mpe mitinda ya Biblia ezali makasi, mpe nakómaki kokanisa ete kosambela Yehova ezali likambo moko ya mpasi mingi. Atako nazalaki kondima ntango nyonso ete Yehova azali, nazalaki komiyoka te penepene na ye.
Natikaki mpenza kosakola te, kasi nazalaki kaka kosakola likolólikoló. Ntango nazalaki kokende mosala ya kosakola, nazalaki komibongisa ata moke te. Na yango, nazalaki kokoka te kobanda lisolo ná moto mpe kokoba na yango. Yango esalaki ete mosala na ngai ya kosakola ebota mbuma te, mpe nazala na esengo te na mosala yango. Mpo na yango, natikaki mpenza kosepela na mosala ya kosakola. Nazalaki komituna boye: “Ndenge nini moto akoki kokoba kosakola pɔsɔ na pɔsɔ, mpe sanza na sanza?”
Ntango nakómaki na mbula 17, nakómaki na mposa ya kozala na lipanda. Yango wana nakangaki bisaka, natikaki ndako ya baboti na ngai, mpe nakendaki kofanda na Australie. Baboti na ngai bayokaki mawa makasi ntango bamonaki nazali kolongwa na ndako. Yango etungisaki bango mingi, kasi bakanisaki ete nakokoba kosalela Yehova.
Na Australie, nazalaki lisusu kosalela Yehova mingi te mpe nakómaki kozangisa makita. Nasalaki mpe boninga ná bilenge mosusu oyo, lokola ngai, bazalaki kosepela koyangana na makita, kasi na nsima bazalaki kokende komela masanga mpe kobina na banganda ya butu. Soki nakanisi, namonaka ete nazalaki lokolo moko na kati mpe lokolo mosusu libandá, elingi koloba nazalaki na kati ya solo mpe nazalaki na mokili; kasi nazalaki mpenza koyeba te soki nazalaki na ngámbo nini.
LITEYA MOKO YA NTINA MINGI OYO NAZALAKI KOKANISA TE
Mbula mibale na nsima, nakutanaki na ndeko mwasi moko oyo na boumeli ya mwa ntango, azalaki kosalisa ngai, kozanga ete ayeba, nakanisa esika oyo nazalaki komema bomoi na ngai. Tozalaki kofanda ndako moko elongo na bandeko basi mitano ya minzemba mpe tobengisaki mokɛngɛli ya zongazonga ná mwasi na ye Tamara báya kofanda na ndako na biso na boumeli ya pɔsɔ moko. Ntango mobali na ye azalaki kolandela makambo ya lisangá, Tamara azalaki kolekisa ntango elongo na biso mpe tozalaki kosɛka elongo. Yango esepelisaki ngai mpenza. Ayebaki mpenza komitya na esika ya basusu mpe ezalaki mpasi te kosolola na ye. Nakamwaki mpenza komona moto oyo asengelaki komipesa mingi na makambo ya Yehova alekisa ntango elongo na biso.
Tamara azalaki ndeko mwasi moko ya esengoesengo. Bolingo oyo azalaki na yango mpo na solo mpe mpo na mosala ya kosakola ezalaki kotinda bato mosusu mpe básala bongo. Atako nazalaki na esengo te mpo nazalaki kosalela Yehova te na kotalela makoki na ngai, Tamara azalaki kopesa Yehova oyo eleki malamu na kotalela makoki na ye. Ndenge na ye ya kozala mpe esengo makasi oyo azalaki na yango ebongolaki mpenza bomoi na ngai. Ndakisa na ye etindaki ngai nakanisa na solo oyo ya ntina mingi: Yehova asepelaka tósalela ye “na esengo” mpe “na koganga ya esengo.”—Nz. 100:2.
NDENGE OYO NAKÓMAKI LISUSU KOSEPELA NA MOSALA YA KOSAKOLA
Nazalaki na mposa ya kozala na esengo lokola oyo Tamara azalaki na yango. Kasi mpo nazala na esengo ya bongo, nasengelaki kosala mbongwana minene na bomoi na ngai. Yango ezwaki mwa ntango, kasi nsukansuka nakómaki kosala bambongwana ya mikemike. Nakómaki komibongisa liboso ya kokende na mosala ya kosakola mpe nasalaki mosala ya mobongisi-nzela mosungi mbala na mbala. Yango esalisaki ngai natika kobanga mpe nakóma na mpiko. Lokola nakómaki kosalela Biblia mbala mingi na mosala ya kosakola, yango esalisaki ngai nakóma kosepela lisusu mingi na mosala yango. Na nsima, nakómaki kosala mosala ya mobongisi-nzela mosungi sanza nyonso.
Nakómaki kosala boninga ná bato ya mbula nyonso na lisangá oyo bazalaki kosala nyonso na mosala ya Yehova, mpe oyo bazalaki na esengo na mosala na ye. Ndakisa na bango ya malamu esalisaki ngai natalela lisusu makambo oyo nasengeli kotya na esika ya liboso na bomoi na ngai, mpe nabanda lisusu kotánga Biblia mokolo na mokolo. Nakómaki lisusu kosepela mingi na mosala ya kosakola mpe nsukansuka nakómaki mobongisi-nzela ya sanza na sanza. Mpo na mbala ya liboso na boumeli ya bambula, nakómaki na esengo mpe nakómaki komiyoka malamu na kati ya lisangá.
NAZWI MONINGA YA MOSALA OYO AZALI MPE MOBONGISI-NZELA
Mbula moko na nsima, nakutanaki na Alex, ndeko moko ya boboto oyo alingaka Yehova mpe mosala ya kosakola. Azalaki mosaleli na misala mpe asilaki kolekisa mbula motoba na mosala ya mobongisi-nzela. Alex akendaki mpe na Malawi mpo na kopesa mabɔkɔ na esika oyo mposa ezalaki monene na boumeli ya sanza soki mwambe. Na Malawi, alekisaki ntango elongo na bamisionɛrɛ oyo bazalaki bandakisa malamu mpo na ye mpe oyo balendisaki ye akoba kotya matomba ya Bokonzi na esika ya liboso.
Na 2003, ngai ná Alex tobalanaki, mpe banda wana tozali kaka na mosala ya ntango nyonso. Toyekoli mateya mingi ya ntina mpe Yehova apamboli biso na ndenge mingi.
YEHOVA APAMBOLI BISO MPENZA
Tozali kosakola na Gleno, na Timor-Oriental
Na 2009, batindaki biso bamisionɛrɛ na Timor-Oriental, ekólo moko ya moke oyo ezali na bisanga ya Indonésie. Tokamwaki, tosepelaki, kasi tobangaki mpe mwa moke. Sanza mitano na nsima, tokómaki na engumba-mokonzi Dili.
Bomoi na ekólo yango ekesanaki mpenza na bomoi oyo tozalaki na yango liboso. Tosengelaki koyekola mimeseno ya sika, monɔkɔ ya sika mpe komesana na bilei mpe bomoi ya sika. Mbala mingi na mosala ya kosakola, tozalaki kokutana na bato oyo bazalaki mpenza babola, oyo batángá mingi te, mpe oyo bazalaki konyokwama. Tomonaki mpe bato mingi oyo bazalaki na bilembo ya bampota na nzoto mpe oyo bazalaki konyokwama na makanisi mpo na bitumba.a
Mosala ya kosakola ezalaki kobota mbuma mpenza. Na ndakisa, mokolo moko nakutanaki na elenge mwasi moko ya mbula 13 na nkombo Maria.b Mama na ye autaki kokufa eleki mwa bambula, mpe mbala mingi azalaki komona tata na ye te. Ndenge moko na bilenge mingi ya mbula na ye, Maria ayebaki te oyo asengelaki kosala na bomoi na ye. Nazali koyeba lisusu mokolo moko ndenge alelaki ntango azalaki koyebisa ngai makambo oyo ezalaki na motema na ye. Kasi nayebaki mpenza te makambo nini azalaki koloba mpo nayebaki koloba monɔkɔ ya mboka na bango malamu te. Nabondelaki Yehova, nasɛngaki ye asalisa ngai mpo nalendisa ye, mpe na nsima nabandaki kobɔndisa ye na bavɛrsɛ ya Biblia. Mwa bambula na nsima, namonaki ndenge solo ebongolaki bizaleli mpe ndenge na ye ya kolata mpe ya kosala monzɛlɛ. Na nsima, azwaki batisimo mpe sikoyo akómá koyekola Biblia ná bato ye moko. Lelo oyo, Maria azali na kati libota monene ya basaleli ya Yehova mpe amiyokaka ete balingaka ye.
Yehova apamboli mosala ya kosakola na Timor-Oriental. Atako basakoli mingi bazwi batisimo kaka na boumeli ya mbula zomi oyo euti koleka, mingi bazali babongisi-nzela, basaleli na misala to mpe bankulutu. Basusu basalaka na babiro ya kobongola mikanda mpe bapesaka mabɔkɔ mpo na kobongola mikanda oyo elimbolaka Biblia na minɔkɔ ya mboka na bango. Nayokaka mpenza esengo ntango namonaka bango bazali koyemba na makita, bazali kosɛka mpe ndenge oyo bazali kokola na elimo.
Ngai ná Alex, tozali kokende kopesa bato nkasa ya libyangi mpo na Ekaniseli na teritware moko oyo basakolá naino te
BOMOI YA ESENGO OYO NAKANISAKI NA YANGO TE
Bomoi na Timor-Oriental ekesanaki mpenza ná oyo tozalaki na yango na Australie. Kasi ezalaki bomoi moko ya esengo mpenza. Na bantango mosusu tozalaki kosala mibembo na mwa bisi moko oyo etondaki na bato, oyo ezalaki na mbisi ya kokauka mpe na ndunda oyo bato basombaki na wenze. Mikolo mosusu, tozalaki koyekola na bato Biblia na kati ya mwa ndako moko oyo ezalaki na molunge mpe salite na kati; mpe nsoso ezalaki kotambolatambola na kati. Atako mikakatano wana nyonso, mbala mingi nazalaki koloba, ‘ezali bomoi moko ya esengo mpenza!’
Tozali kozonga esika tofandaka
Soki nakanisi, napesaka baboti na ngai matɔndi ndenge basalaki nyonso báteya ngai banzela ya Yehova mpe ndenge basalisaki ngai ata na ntango oyo nazalaki na boyokani ya malamu te ná ye. Masese 22:6 ekokisamá mpenza mpo na ngai. Ezala tata to mama na ngai, bango nyonso basepelaka mpo na ngai mpe mpo na Alex. Basepelaka komona ndenge Yehova azali kosalela biso. Kobanda 2016, tozali kosala mosala ya zongazonga na teritware ya filiale ya Australasie.
Tozali kolakisa bana ya Timor-Oriental video ya Caleb ná Sofia
Ezali mpasi nandima ete na ntango moko boye, nazalaki te kosepela na mosala ya kosakola. Sikoyo, nalingaka mpenza mosala yango. Namoni ete ata soki tokutani na makambo nini na bomoi, esengo ya solosolo eutaka kaka soki tozali kosalela Yehova na motema na biso mobimba. Ya solo, mbula 18 oyo tolekisi elongo na Alex na mosala ya Yehova, ezalaki bambula moko ya esengo mpenza na bomoi na ngai. Sikoyo namoni bosolo ya maloba oyo mokomi ya Nzembo Davidi alobaki na Yehova ete: “Baoyo nyonso bazali kokima epai na yo bakosepela; bakoganga na esengo libela na libela. . . . Mpe baoyo balingaka nkombo na yo bakosepela na yo.”—Nz. 5:11.
Ezali mpenza esengo koyekola Biblia na bato yango ya komikitisa!
a Kobanda na 1975, bitumba ezalaki na Timor-Oriental na boumeli ya bambula koleka 20 mpo bato bazalaki na mposa ya kozwa lipanda na makambo ya politiki.
b Topesi bango bankombo mosusu.