Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g 5/15 lok. 3
  • Makambo etali Azia

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Makambo etali Azia
  • Lamuká!—2015
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Koteya bana ebatelaka bango
  • Liwa nsima ya mopɛpɛ makasi
  • Likambo ya komiboma epai ya mibange na Corée du Sud
  • Namoni mbongwana minene na Corée
    Lamuká!—2009
  • Ndenge ya kobatela bana na yo
    Lamuká!—2007
  • Namoni bokoli oyo esalemi na Corée
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Biblia elobi nini na likambo etali kosunga baboti oyo bakómi mibange?
    Biyano na mituna ya Biblia
Makambo mosusu
Lamuká!—2015
g 5/15 lok. 3
Mwana moko ya moke ya mwasi ná mama na ye na Azia

MAKAMBO OYO EZALI KOLEKA NA MOKILI

Makambo etali Azia

Azia ezali na bato ebele koleka bakɔntina nyonso. Bato ebele ya mokili mobimba (1/3) bafandaka na Chine mpe Inde. Mikakatano nini bikólo ya Azia ezalaka na yango mpo na koteya mpe kobatela bana-mboka?

Koteya bana ebatelaka bango

Bato ya mayele ya Chine na makambo ya mibeko balobi ete soki baboti bateyi bana na bango te makambo etali kosangisa nzoto ntango bazali naino mike, bana bakozala na likama mpo bato mabe bakoki kosangisa na bango nzoto. Na bambula minei oyo eleki, bazuzi ya Chine basambisaki bato 8 000 oyo bafundaki bango ete basangisaki nzoto na bana mike. Profesɛrɛ moko na makambo ya mibeko na iniversite ya Beijing, alobi ete lokola bana “bazalaka na likoki ya komibatela te, ezalaka mpasi te mpo básala bango mabe. Yango wana, koteya bana ekobatela bango mpo básala bango mabe te.”

OYO BIBLIA ELOBI: Baboti ya bwanya bateyaka bana na bango ndenge ya komibatela na “moto oyo alobaka makambo ya kilikili.”​—Masese 2:1, 10-12.

Liwa nsima ya mopɛpɛ makasi

Ankɛtɛ moko emonisi ete na Philippines, motángo ya bana mike ya basi oyo bakufaki mbula moko na nsima ya mopɛpɛ makasi oyo ebɛtaki na ekólo yango eleki mbala 15 motángo ya bato oyo bakufaki na mopɛpɛ yango. Ekoki kozala ete nsima ya mopɛpɛ makasi, makambo lokola kozanga mosala, mbongo ya kotonga lisusu bandako, ndenge ya kosalela mbongo oyo ebimaka mpo na bana mike ya basi, ata mpe kozanga bilei mpe lisalisi ya minganga nde esalaki ete bákufa mingi ndenge wana.

OYO BIBLIA ELOBI: ‘Kabolá limpa na yo na moto oyo azali na nzala, mpe kɔtisá na ndako na yo bato ya mpasi, bato oyo bazangá ndako. Soki omoni moto moko bolumbu, latisá ye.’​—Yisaya 58:7.

Likambo ya komiboma epai ya mibange na Corée du Sud

Na 2011, na bato oyo bamibomaki na Corée du Sud, mingi na bango (25%) bazalaki mikóló ya mbula 65 to koleka. Bato mosusu ya mayele bamoni ete yango ezalaki mpo bato bazali kokipe mibange lisusu te ndenge ezalaki liboso to mpo na kozanga mbongo. Mibange mingi (50%) ya ekólo yango bazali babola. Mwa ndambo ya bato ya Corée du Sud bamoni sikoyo ete bana basengeli kokipaka baboti na bango oyo bakómi mibange.

OYO BIBLIA ELOBI: “Kumisá tata na yo mpe mama na yo.”​—Baefese 6:2.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto