Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g 6/15 nk. 8-9
  • Ndenge ya kokómisa ndai ya libala makasi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ndenge ya kokómisa ndai ya libala makasi
  • Lamuká!—2015
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • MOKAKATANO
  • 1 Kotosa ndai ya libala
    Lamuká!—2018
  • Ndenge okoki kobongisa libala na yo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • Sekele 2: Komipesa
    Lamuká!—2010
  • Ndenge ya kokokisa ndai na yo ya libala
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
Makambo mosusu
Lamuká!—2015
g 6/15 nk. 8-9
Mobali moko ná mwasi na ye bazali kotambola na nɛjɛ mpe bazali na esengo

LISALISI MPO NA LIBOTA | LIBALA

Ndenge ya kokómisa ndai ya libala makasi

MOKAKATANO

Mokolo oyo obalaki, olapaki ndai. Ndai yango ezalaki mpo na bomoi mobimba; ozwaki ekateli ya kokangama kaka na molongani na yo mpe kobongisa matata oyo ekoki kobima na libala.

Kasi, nsima ya bambula, kozanga koyokana malamu na libala ebebisi boyokani na bino. Omonaka ete ndai oyo olapelaki molongani na yo ezali kaka makasi?

OYO OSENGELI KOYEBA

Mobali moko ná mwasi na ye bafandi na bwato oyo ekangami na longo

Ndai ya libala ezali lokola longo oyo ekoki kobatela libala na yo

Ndai ya libala ezali solisyo kasi te komitya nsinga na nkingo. Bato mingi lelo basepelaka te na ndai ya libala. Bamosusu bamonaka ete kolapa ndai ezali ekateli ya mabe mpo ezali lokola komitya nsinga na nkingo. Na esika okanisa bongo, zwá yango nde lokola longo oyo ekoki kobatela libala na yo. Mwasi moko na nkombo Megan, alobi boye: “Moko ya makambo oyo eleki malamu na ndai ya libala ezali ya koyeba ete moko te akotika moninga ata soki matata ebimi.”a Koyeba ete bokokabwana te ekoki kotinda yo ozala na ekateli ya kobongisaka matata ata soki makambo mosusu ezali kosimba te.​—Talá etanda “Ndai ya libala mpe bosembo.”

Na mokuse: Soki ozali na mikakatano na libala na yo, sikoyo nde ntango ya kokómisa ndai ya libala na bino makasi na esika ya komona ete ebongaki te olapa ndai yango. Ndenge nini okoki kosala yango?

OYO OSENGELI KOSALA

Talelá ndenge na yo ya kotalela makambo. Fraze “kobalana mpo na bomoi mobimba,” esalaka ete omona lokola okangami na motambo to esalaka nde ete omiyoka obatelami? Ntango matata ebimi, omonaka ete kotika molongani na yo nde solisyo ya malamu? Mpo okómisa ndai ya libala na yo makasi, ezali na ntina omonaka ete libala ezali mpo na libela.​—Toli ya Biblia: Matai 19:6.

Talelá makambo oyo okutaná na yango. Okoki kotalela ndai ya libala na kolanda makambo oyo omoná epai ya baboti na yo. Mwasi moko na nkombo Lea, alobi boye: “Baboti na ngai babomaki libala ntango nazalaki naino mwana mpe namonaka ete mbala mosusu yango esalá ete nakóma kotalela ndai ya libala na ndenge ya mabe.” Zalá na elikya ete okoki kosala ete makambo ezala bongo te na libala na yo. Etángamá te ete osengeli kaka kosala mabunga oyo baboti na yo basalaki!​—Toli ya Biblia: Bagalatia 6:4, 5.

Talelá maloba na yo. Ntango bozali koswana makasi ná molongani na yo, kebá ete oloba te makambo oyo okoyoka mawa na nsima, na ndakisa “nakotika yo!” to “nakoluka moto mosusu oyo akosepela na ngai!” Maloba ya ndenge wana ebebisaka ndai ya libala mpe na esika ebongisa makambo, esalaka nde ete mwasi ná mobali bákóma kofingana. Na esika ya kosalela maloba mabe, okoki koloba maloba lokola: “Namoni lokola biso mibale tozali na nkanda. Tokoki kosala nini mpo tóbongisa likambo yango?”​—Toli ya Biblia: Masese 12:18.

Monisá polele ete ‘olingaka ye kaka.’ Tyá fɔtɔ ya molongani na yo na mesa ya biro na yo. Lobáká makambo ya malamu ya molongani na yo epai ya basusu. Mityelá mokano ya kobengaka molongani na yo mikolo nyonso soki ozali na ndako te. Mbala mingi saleláká liloba “biso” mpe bafraze lokola “ngai ná mwasi na ngai” to “ngai ná mobali na ngai.” Kosala bongo ekosala ete yo moko mpe bato mosusu bámona ete olingaka mpenza molongani na yo.

Lukáká toli epai ya balongani oyo bazali ndakisa malamu. Luká lisalisi epai ya balongani oyo balongaki kosilisa matata ya libala. Tuná bango boye: “Ndai ya libala elimboli nini mpo na bino mpe ndenge nini esalisi bino na libala na bino?” Biblia elobi boye: “Ebende epelisaka ebende. Ndenge moko mpe moto angɛngisaka elongi ya moto mosusu.” (Masese 27:17) Na kotalela toli oyo, mpo na nini te kolanda toli ya baoyo bazali kolonga na mabala na bango?

a Biblia epesi nzela na koboma libala kaka soki molongani moko asali ekobo. Talá lisolo “Biblia elobi nini?​—Ekobo” na nimero oyo ya Lamuká!

BAVƐRSƐ YA NTINA MINGI

  • “Oyo Nzambe akangisi esika moko moto akabola yango te.”​—Matai 19:6.

  • “Moto na moto akomema mokumba na ye moko.”​—Bagalatia 6:5.

  • “Moto mosusu alobaka kozanga kokanisa lokola nde azali kozokisa na mopanga, kasi lolemo ya bato ya bwanya nde nkisi oyo ebikisaka.”​—Masese 12:18.

NDAI YA LIBALA MPE BOSEMBO

“Soki ozali sembo epai ya molongani na yo mpe ye azali sembo epai na yo, bokomona ete libala na bino ezali mpo na libela. Ntango bozali kokanisa basanza mpe bambula oyo ekoya, bokomimona ete bozali kaka elongo. Bokoyoka mawa ata moke te ndenge bobalanaki mpe kotalela makambo ndenge wana, ekolendisa libala na bino. Mwasi moko alobaki boye: ‘Ata ntango nasilikeli [mobali na ngai] makasi mpe nasiliki mpo na makambo oyo ekómeli biso, nabangaka te ete libala na biso ekokufa. Nakanisaka nde ndenge oyo tokozongisa boyokani kati na biso. Nayebaka ete nsukansuka tokoyokana kaka, ata soki na ntango wana nazali koyeba te ndenge nini tokosala yango.’”​—Euti na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15/09/2003.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto